Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kanyaka epalangani tii wapi?

Kanyaka epalangani tii wapi?

“Kompanyi na biso esalelaka mokonzi moko ya guvɛrnema misala. Mbala mingi, elekaka sanza mibale to misato liboso báfuta biso mpo na misala yango. Kasi, na mikolo euti koleka, moto moko oyo asalaka na guvɛrnema abengaki ngai na telefone. Ayebisaki ngai akoki kosala ete báfutaka biso nokinoki soki tondimi kopesaka ye mwa kanyaka to madesu ya bana.”​—JOHN. *

OSILÁ kokutana na likambo moko ya kanyaka? Ata soki ezali te lolenge ya kanyaka oyo touti kolobela, ekoki kozala ete osilá konyokwama mpo na kanyaka oyo bato mosusu bazwaki.

Lapolo ya 2011 ya ebongiseli moko oyo elukaka kosilisa kanyaka (TI) * elobi ete “na bikólo mpe bateritware 183, na bapwɛ kobanda 0 (oyo elakisi bikólo oyo kanyaka ezalaka mingi) tii na 10 (oyo elakisi bikólo oyo kanyaka ezalaka te), bikólo mingi ekómi ata na bapwɛ 5 te.” Mbula mibale liboso, ebongiseli yango endimaki ete lapolo na yango ya 2009 emonisaki polele ete kanyaka ezali bisika nyonso na mokili: “Emonani polele ete ezali ata na esika moko te na mokili oyo kanyaka ezalaka te.”

“Kanyaka elimboli kosalela bokonzi na ndenge ya mabe mpo na koluka litomba na yo moko. Moto nyonso oyo bomoi na ye, makoki na ye ya kobikela, mpe esengo na ye etaleli bosembo ya bakonzi banyokwamaka mpo na likambo yango.”​—TRANSPARENCY INTERNATIONAL

Na makambo mosusu, kanyaka ekoki kosala mabe mingi. Na ndakisa, zulunalo moko (Time) elobaki ete “kanyaka mpe ezaleli ya mafumafu” nde esalaki ete bato mingi bákufa ntango mabele eninganaki makasi na Haïti na 2010. Na nsima, ebakisaki boye: “Bato batongaki bandako kozanga kolanda malako ya ba-ingénieur mpe bapesaki kanyaka na bato ya guvɛrnema oyo balandelaka makambo ya kotonga.”

Mokolo mosusu kanyaka ekosila libela? Mpo na koyanola na motuna wana, tosengeli naino koyeba makambo oyo etindaka bato na kanyaka. Tokotalela makambo yango na lisolo oyo elandi.

^ par. 2 Bankombo mosusu ezali ya bango te.

^ par. 4 “Ebongiseli yango esali liste ya bikólo na kotalela ndenge kanyaka ezalaka na misala ya Leta na ekólo mokomoko.”​—Transparency International.