Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liloba ya Nzambe ebongolaki libota moko ya Bahindu

Liloba ya Nzambe ebongolaki libota moko ya Bahindu

NABOSANAKA soki moke te mokolo moko, oyo namɛlaki ti esika moko ná bato nyonso ya libota na ngai. Ezalaki na ntɔngɔ ya mokolo ya 22 Augusto 2005. Bomoi na ngai ezalaki na likama, mpo minganga bamonaki mbuma moko ya monene na kati ya bɔɔngɔ na ngai. Mobali na ngai Krishna asalaki libondeli, na nsima nasololaki na bato ya libota na ngai.

Nayebisaki bango boye: “Nazali kokende na lopitalo mpo básala ngai lipaso moko oyo ekoki komema ngai na liwa. Yango wana, esengeli ete bino nyonso bómilɛngɛla mpo na likambo nyonso oyo ekoki kobima nsima ya lipaso yango. Nabongisi ndenge oyo bakokunda ngai, soki esalemi ete nakufa. Mpo na baoyo kati na bino bazali kosambela Yehova, nabondeli bino, bótika Yehova te. Mpo na baoyo batikali, nabondeli bino, bóndima koyekola Biblia mpe bóyanganaka na makita na biso. Soki bosali bongo, bokoki mpe kokóma na elikya oyo nazali na yango ya mokili ya sika oyo ezali koya, epai basambeli ya solo ya Nzambe bakofanda libela na libela na nzoto kolɔngɔnɔ na paradiso awa na mabele.”

Liboso nayebisa bino ndenge lipaso na ngai elekaki, tiká nayebisa bino ndenge oyo nakolaki mpe ndenge oyo nayebaki Nzambe ya solo.

Babɔkɔlá ngai na mateya ya Bahindu

Mama amemi ngai

Libota na biso ezalaki kofanda na ndako moko ya monene oyo batongá na mabaya mpe bibende, likoló ya ngomba, na Durban, engumba moko oyo ezali pembeni ya océan, na Afrika ya Sudi. Mpo na kokóma na porte ya monene ya lopango na biso, esengelaki komata baeskalye 125 kobanda na nzela ya monene oyo ezalaki na kati ya lobwaku. Baeskalye yango ezalaki komema tii na mwa nzela moko ya mokuse oyo ezalaki matitimatiti, oyo ezalaki komema biso tii na porte ya ebende. Tempelo ya nkɔkɔ ya mwasi ezalaki na ngámbo moko ya porte yango, oyo etondaki na bafɔtɔ mpe bililingi ya banzambe ya Hindu. Nkɔkɔ ayebisaki ngai ete nazalaki “mwana ya tempelo,” (na monɔkɔ ya Hindi mandir kī baccā) mpe ete banzambe oyo tozalaki kosambela nde basalaki ete nabotama. Na ngámbo mosusu ya tempelo yango, ezalaki na baeskalye oyo batyá langi ya motane, oyo ezalaki komema tii na porte ya liboso ya ndako. Ndako na biso ezalaki monene, ezalaki na kulware moko ya molai, kuku moko ya monene oyo ezalaki na mbambola, bashambrɛ nsambo mpe shambrɛ mosusu moko ezalaki na libándá ya ndako. Biso nyonso oyo tozalaki kofanda na ndako yango tozalaki bato 27: bankɔkɔ na ngai, tata na ngai ná baleki na ye misato ya mibali, leki na ye ya mwasi mpe mabota na bango.

Ndako na biso

Ezalaki pɛtɛɛ te kokokisa bamposa ya libota monene ndenge wana. Kasi, kofanda esika moko libota mobimba esalaki ete tózala na bomɔkɔ mpe etiká biso na basuvenire mingi ya malamu. Basi ya bapapa-leki na ngai misato ná mama na ngai, Gargee Devi, nde bazalaki kosala misala ya ndako. Moto na moto azalaki na mokolo na ye ya kolamba mpe ya kotya bopɛto. Nkɔkɔ na ngai ya mobali nde moto azalaki mokonzi ya libota. Ye nde azalaki kosomba bilei mpo na libota mobimba. Mokolo nyonso ya misato, bankɔkɔ na ngai bazalaki kokende zando mpo na kosomba mosuni, mbuma mpe ndunda oyo tokolya pɔsɔ mobimba. Tozalaki na momeseno ya kofanda na nse ya nzete ya momboya na likoló mpenza esika baeskalye esuki, oyo etalani na lobwaku mpo na kozela ntango bakouta zando. Soki kaka tomoni bango bazali kokita na motuka na bitunga na bango ya minene, tozalaki kokima mbangu mpo na kokita baeskalye wana 125 mpo na komema biloko na ndako.

Pene na baeskalye 125

Na jardin na biso, tozalaki na nzete ya mbila ya molai oyo bandɛkɛ batongaki zumbu na bango. Tozalaki kotala bango ntango bazali kopumbwa, kokende mpe kozonga, mpe tozalaki koyoka ntango bazalaki koyemba. Nkɔkɔ ya mwasi azalaki kofanda na baeskalye na porte ya liboso ya ndako mpe kobɛtela biso masolo, lokola nde azalaki kolimbolela biso nzembo oyo bandɛkɛ yango ezalaki koyemba. Nazali na basuvenire mingi ya malamu ya bomoi oyo tozalaki na yango na ndako wana! Tozalaki kosɛka, kolela, kosakana, kosepela elongo. Tozalaki mpenza kosepela kofanda esika moko lokola libota moko monene. Likambo eleki ntina, ezali kuna nde tobandaki koyekola makambo etali Yehova Mozalisi na biso, mpe Mwana na ye Yesu Kristo.

Liboso tóyeba Yehova, losambo na biso ya Hindu ezalaki na milulu mingi mokolo na mokolo. Tozalaki mpe kosala bafɛti ya minene mbala na mbala nsima ya mwa ntango, mpe na bafɛti yango tozalaki kobengisa bato mosusu mpo na kosambela banzambe ndenge na ndenge ya basi mpe ya mibali. Na milulu mosusu ya losambo yango, nkɔkɔ ya mwasi azalaki kosenzwa mpe kosolola na bilimu, mpe na midi ya butu, bazalaki kopesa bambeka ya banyama mpo na kokitisa banzambe yango mitema. Nkɔkɔ ya mobali ayebanaki mpe na mboka na biso mpo azalaki kopesa makabo mpo na kotonga biteyelo ya Leta mpe batempelo ya Lingomba ya Hindu.

Ndenge oyo toyebaki Yehova

Na 1972, nkɔkɔ ya mobali abɛlaki mpe akufaki. Mwa basanza na nsima, Indervathey, mwasi ya papa-leki, oyo bazalaki mpe kobenga Jane, azwaki zulunalo mibale Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! oyo Batatoli ya Yehova mibale bapesaki ye. Amitungisaki ndenge akɔtisaki bango na ndako te mpo básolola. Tozalaki ntango nyonso koboya Batatoli ya Yehova. Kasi, mbala ya nsima oyo bayaki, akɔtisaki bango na ndako mpe asololaki na bango mpo na mokakatano moko oyo azalaki na yango na libala na ye, ndenge mobali na ye azalaki kolangwa masanga. Bato ya kartye mpe bandeko na biso bazalaki kolendisa ye aboma libala. Batatoli ya Yehova bamonisaki ye ndenge oyo Nzambe ataleka libala. (Matai 19:6) Mama-leki akamwaki mpo na batoli ya Biblia mpe elaka oyo yango epesi ya bomoi moko kitoko awa na mabele na mikolo ezali koya. * Alongolaki makanisi wana ya kokabwana ná papa-leki, mpe akómaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Ntango azalaki koyekola na ndako, na esika oyo toyambaka bapaya, basi ya bapapa-leki na ngai mosusu bazalaki mpe koyoka masolo yango na bashambrɛ na bango.

Nsukansuka, basi nyonso ya bapapa-leki na ngai bakómaki mpe koyekola Biblia. Mama-leki Jane azalaki koyebisa biso makambo oyo azalaki koyekola mpe mbala mingi azalaki kotángela biso mpe kolimbolela biso masolo oyo ezali na buku Boyoka Moteyi Monene. * Ntango bapapa-leki bayebaki ete basi na bango bakómaki koyekola Biblia, bakómaki kotɛmɛla biso. Papa-leki na ngai mosusu azwaki mikanda na biso nyonso ná Biblia mpe atumbaki yango. Bazalaki kofinga biso mpe kobɛta biso mpo tozalaki kokende makita. Kaka papa na ngai nde azalaki kosala biso bongo te; aboyaki te tóyekola makambo etali Yehova. Bamama-leki nyonso bakobaki koyangana na makita mpe kolinga Yehova Nzambe mingi.

Na 1974, mama-leki Jane azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova, mpe eumelaki te mama mpe bamama-leki mosusu bazwaki mpe batisimo. Na nsima, nkɔkɔ ya mwasi atikaki makambo ya Lingomba na ye ya Hindu. Bambula mingi, nazalaki kokende makita nyonso elongo na bango. Na nsima, na liyangani moko monene ya Batatoli ya Yehova, Motatoli moko na nkombo Shameela Rampersad, atunaki ngai boye: “Okozwa batisimo mokolo nini?” Nayebisaki ye: “Nakoki kozwa batisimo te mpo moto moko te ayekolaka na ngai Biblia.” Asɛngaki nayekola Biblia elongo na ye. Na liyangani oyo elandaki, na mokolo ya 16 Desɛmbɛ 1977, nazwaki batisimo. Nsukansuka, na bato 27 ya libota na biso oyo tozalaki kofanda ndako moko, 18 bazwaki batisimo. Kasi, na ntango oyo balingaki kosala ngai lipaso, papa na ngai Sonny Deva, azalaki naino mondimi ya Lingomba ya Hindu.

“Bómitungisa ata na likambo moko te”

Maloba oyo ezali na Bafilipi 4:6, 7 esalisaki ngai mpenza, mingimingi ntango minganga bayebisaki ngai ete nazali na mbuma moko monene na bɔɔngɔ. Vɛrsɛ yango elobi boye: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino na nzela ya Kristo Yesu.” Ezalaka mpasi ‘omitungisa ata na likambo moko te,’ mingimingi soki bayebisi yo ete okoki kokufa lelo to lobi. Na ebandeli, nalelaki, mpe na nsima nabondelaki Yehova. Bandá ntango wana, nayokaki “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”

Ezalaki lokola nde Yehova Nzambe asimbaki ngai na lobɔkɔ ya mobali, mpe nayokaki mpenza ete azalaki ná ngai ntango nyonso. (Yisaya 41:13) Asalisaki ngai nazala na mpiko mpo na kolimbolela minganga ekateli na ngai ya kotosa mobeko ya Biblia ya koboya makila. (Misala 15:28, 29) Yango esalaki ete monganga oyo asengelaki kosala ngai lipaso ná oyo alingaki kopesa ngai ntonga ya kolalisa mpɔngi bándima kosala ngai lipaso kozanga ete bázongisa ngai makila. Na nsima, monganga oyo asalaki ngai lipaso yango alobaki na ngai ete elekaki malamu mpe alongolaki mbuma yango mobimba. Alobaki mpe ete amoná naino liboso te moto ayoka malamu nokinoki ndenge wana nsima ya lipaso ya monene na bɔɔngɔ.

Pɔsɔ misato na nsima, nayekolaki Biblia na moto moko na mbeto na ngai. Na nsuka ya pɔsɔ ya nsambo, nakómaki lisusu kokumba motuka, kobima na mosala ya kosakola, mpe nazongelaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova. Nasepelaki na lisalisi oyo bandeko na ngai Batatoli ya Yehova bapesaki ngai na mosala ya kosakola. Bazalaki kosala nyonso mpo nazonga ndako kozanga likama mpe ngai moko te. Namonaki ete koyoka Biblia na CD mpe kotya miso na matomba ya elimo oyo nazwi na bomoi na ngai esalisaki ngai nayoka malamu nokinoki nsima ya lipaso.

Nasepelaki mpe ntango nayokaki ete nsima ya lipaso na ngai, papa na ngai andimaki koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova. Azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 73 mpe azali sikoyo kosalela Yehova na molende. Bato koleka 40 ya libota na biso bazali sikoyo kosambela Yehova elongo na biso. Atako liso na ngai ya lobɔkɔ ya mwasi ebebaki mpe batyá ngai ebende na mokuwa ya motó, nazelaka na motema mobimba ntango oyo Yehova akosala “biloko nyonso biloko ya sika” na paradiso oyo ekozala awa na mabele.​—Emoniseli 21:3-5.

Ná mobali na ngai (na lobɔkɔ ya mwasi), mwana na ngai mpe baboti na ngai

Yehova Nzambe apamboli ngai ndenge nazwá mobali oyo alingaka ngai mingi, mpe azali nkulutu na lisangá, mpe mwana mwasi ya kitoko, Clerista, oyo asalisaka ngai mingi mpo nakoba kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola. Apamboli mpe mingi mosala na ngai ya kosakola. Tii sikoyo, nazali kosalisa bato mingi oyo nayekolaka na bango Biblia bámona nguya ya Liloba ya Nzambe na bomoi na bango. Bato koleka 30 kati na bango bamipesaki na Nzambe mpe bazwaki batisimo.

Na motema oyo etondi na elikya, nazali kozela ntango oyo Yehova Nzambe akosikola biso na mokili oyo ya mpasi mpe akokɔtisa biso na paradiso awa na mabele.

^ par. 12 Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali mokano ya Nzambe mpo na mabele, talá mokapo 3 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 13 Ebimisamaki na Batatoli ya Yehova kasi ebimisamaka lisusu te.