Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mekolá kondima na bango

“Mwasi moko malamu mingi”

“Mwasi moko malamu mingi”

RUTA afukami pembeni ya ebele ya mbuma ya orje oyo asangisaki mokolo mobimba. Mpokwa ebandi kokɔta na bilanga oyo ezali zingazinga ya Beteleme, mpe bato mingi ya mosala babandi kobima mpe koleka na porte ya mwa engumba wana oyo ezali likoló ya ngomba. Na ntembe te, Ruta alɛmbi mpenza mpo na mosala makasi oyo asali mokolo mobimba. Ata bongo, azali kaka kokoba na mosala yango, asimbi mwa nzete moko mpo na kobɛta milona yango mpo na kozwa mbuma. Atako mosala yango ezali makasi, ezali mokolo moko malamu koleka ndenge azalaki kokanisa.

Makambo ebandaki nde kotambola malamu mpo na elenge mwasi wana oyo mobali na ye akufaki? Azwaki ekateli ya kokende elongo na bokilo na ye Naomi, asalaki elako ete akokangama na Naomi mpe akosambela Yehova Nzambe ya Naomi. Basi yango mibale oyo mibali na bango bakufaki balongwaki na Moabe mpe bakómaki na Beteleme mpe eumelaki te, Ruta moto ya Moabe ayaki koyeba ete Mobeko ya Yehova ezalaki na ebongiseli moko mpo babola mpe bapaya na Yisraele bákelela te. * Sikoyo, amonaki ete basambeli mosusu ya Yehova, oyo bazalaki kotosa Mibeko mpe bateyamaki na yango, bazalaki komonisa na bizaleli mpe boboto na bango ete bazalaki kolinga Mibeko yango mpe yango ekitisaki ye motema.

Moko ya bato yango ezali Boaze, mozwi moko oyo Ruta azalaki kolɔkɔta mbuma na elanga na ye. Atyeli Ruta likebi lokola oyo ya tata epai ya mwana na ye. Ruta azali kosɛka na motema ntango akanisi maloba ya boboto oyo mobali yango alobi na ye mpo na kokumisa ye ndenge azali kobatela Naomi mwasi mobange mpe ndenge aponi koluka libateli na nse ya mapapu ya Yehova, Nzambe ya solo.​—Ruta 2:11-13.

Atako bongo, ekoki kozala ete Ruta azalaki kaka komitungisa mpo na bomoi oyo akozala na yango na mikolo ezali koya. Lokola azali mobola oyo afandi mopaya mpe azali na mobali te mpe mwana te, ndenge nini akokoka komisalisa mpe kosalisa Naomi na bambula oyo ezali koya? Kolɔkɔta bilei na elanga ekokokisa bamposa na bango nyonso? Mpe nani akosunga ye ntango akokóma mobange? Tokoki kokamwa te soki azalaki komitungisa mpo na makambo yango. Na mokili ya lelo oyo makambo ya nkita ezali se kobeba, bato mingi bazali komitungisa ndenge wana. Soki toyebi ndenge oyo kondima ya Ruta esalisaki ye na eleko wana ya mpasi, tokomona makambo mingi oyo tokoki komekola epai na ye.

Nini esalaka libota?

Ruta asalaki mosala makasi mpo na komisalisa mpe kosalisa Naomi

Ntango Ruta asilisaki kobɛta mbuma mpe kosangisa yango nyonso, amonaki ete alɔkɔti mezire moko ya efa, to litre 22 ya orje. Mokumba oyo amemaki ekokaki kozala na kilo 14! Ekoki kozala ete atyaki liboke yango ya mbuma na elamba moko, amemaki yango na motó, asimbaki nzela mpe azongaki na Beteleme na mpokwa.​—Ruta 2:17.

Naomi asepelaki ntango amonaki bokilo na ye, mpe mbala mosusu akamwaki ntango amonaki mokumba ya kilo oyo Ruta amemaki. Ruta amemaki mpe bilei oyo etikalaki na oyo Boaze apesaki basali na ye, mpe bango mibale balyaki mwa bilei yango elongo. Naomi atunaki boye: “Epai wapi olɔkɔtaki mbuma lelo, mpe epai wapi osalaki? Moto oyo atyelaki yo likebi apambolama.” (Ruta 2:19) Naomi azalaki kotya likebi; amonaki ete mokumba ya kilo oyo Ruta amemaki emonisaki ete moto moko atyelaki elenge mwasi yango oyo mobali akufá likebi mpe amoniselaki ye boboto.

Bango mibale bakɔtaki na masolo, mpe Ruta ayebisaki Naomi ndenge Boaze amoniselaki ye boboto. Lokola esepelisaki Naomi, alobaki na Ruta boye: “Yehova apambola ye, ye oyo alongoli te motema boboto na ye epai ya bato ya bomoi mpe bakufi.” (Ruta 2:19, 20) Amonaki ete boboto oyo Boaze amonisaki eutaki nde epai ya Yehova, oyo atindaka basaleli na ye bákabaka mpe alaki kopambola basaleli na ye mpo na boboto oyo bazali komonisa. *​—Masese 19:17.

Naomi alendisaki Ruta andima kokoba kolɔkɔta mbuma na elanga ya Boaze ndenge ayebisaki ye mpe asala elongo na bilenge basi na ndako na ye mpo bilenge mibali oyo bazalaki kobuka mbuma bátungisa ye te. Ruta andimaki toli yango. Akobaki mpe “kofanda elongo na bokilo na ye.” (Ruta 2:22, 23) Na maloba yango, tomoni mpe ezaleli malamu oyo Ruta amonisaki​—bolingo ya sembo. Ndakisa na ye ekoki kotinda biso tómituna soki tomemyaka bato ya libota na biso, tosungaka bango na bosembo nyonso mpe tosalisaka bango na makambo oyo basengeli na yango. Yehova abosanaka te bolingo ya ndenge wana.

Ruta ná Naomi basalisanaki mpe balendisanaki

Naomi ná Ruta bakokaki kobengama mpenza libota? Na bikólo mosusu, balobaka ete bato basali libota “ya solosolo” kaka soki ezali na tata, mama, bana, mpe bankɔkɔ. Nzokande, Naomi ná Ruta bamonisi biso ete basaleli ya Yehova bakoki kofungola mitema na bango mpe kosala ete mwa libota na bango ezala na boboto mpe bolingo ata bato nyonso te bazali mpo na kokokisa mokumba mokomoko. Osepelaka na libota oyo ozali na yango? Yesu akundwelaki bayekoli na ye ete lisangá ya bokristo ekoki kokóma libota mpo na baoyo bazali na libota te.​—Marko 10:29, 30.

“Ye azali moko ya basikoli na biso”

Banda na eleko ya kobuka orje, na sanza ya Aprili, tii na eleko ya kobuka blé na sanza ya Yuni, Ruta azalaki kaka kolɔkɔta mbuma na elanga ya Boaze. Wana bapɔsɔ ezalaki koleka, na ntembe te, Naomi azalaki kokanisa lisusu mingi na oyo akokaki kosala mpo na bokilo na ye oyo azalaki kolinga mingi. Ntango bazalaki na Moabe, Naomi ayebaki mpenza ete akokoka kosala eloko moko te mpo na kosalisa Ruta azwa mobali mosusu. (Ruta 1:11-13) Kasi, sikoyo azali lisusu na makanisi wana te. Asololaki na Ruta mpe alobaki na ye boye: “Mwana na ngai, nasengeli kolukela yo esika ya kopema?” (Ruta 3:1) Na eleko wana baboti bazalaki na momeseno ya kolukela bana na bango molongani, mpe Ruta akómaki mwana mpenza ya Naomi. Azalaki na mposa ya kolukela Ruta “esika ya kopema”​—alobaki bongo mpo na kimya mpe libateli oyo mwasi azwaka soki azali na ndako mpe na mobali. Kasi, Naomi alingaki kosala nini?

Ntango Ruta atángaki nkombo ya Boaze liboso, Naomi alobaki boye: “Mobali yango azali ndeko na biso. Ye azali moko ya basikoli na biso.” (Ruta 2:20) Yango elingaki kolimbola nini? Mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele ezalaki mpe na ebongiseli moko malamu mpo na mabota oyo ezalaki konyokwama mpo na bobola to liwa ya moto moko ya libota. Soki mwasi oyo mobali akufá azalaki na mwana te, ezalaki mpenza mpasi mpo na ye mpamba te nkombo ya mobali na ye, libula na ye, elingaki kolimwa mpo na libela. Kasi, Mibeko ya Nzambe epesaki nzela ete ndeko ya mobali oyo akufi abala mwasi na ye mpo abota mwana oyo akozwa nkombo ya mobali na ye oyo akufá mpe na ndenge yango libula ya libota ebatelama. *​—Kolimbola Mibeko 25:5-7.

Naomi alimbolelaki Ruta ndenge oyo abongisi mpo libala ya ndenge wana esalema. Tokoki komona na makanisi ndenge Ruta akamwaki ntango bokilo na ye azalaki koyebisa ye likambo yango. Emonani ete Mibeko ya Bayisraele ezalaki naino sika mpo na Ruta; mpe na ntembe te, mimeseno na bango mingi ezalaki naino mopaya mpo na ye. Atako bongo, azalaki komemya Naomi mingi na boye ete ayokaki ye na likebi ntango azali koloba likambo mokomoko. Toli oyo Naomi apesaki ye ekokaki komonana lokola likambo ya nsɔni, ata mpe kosilisa ye valɛrɛ; ata bongo, Ruta andimaki yango. Na komikitisa nyonso alobaki boye: “Oyo nyonso olobi na ngai nakosala yango.”​—Ruta 3:5.

Ntango mosusu ezalaka mpasi mpo bilenge báyoka toli ya mikóló mpe ya baoyo bakutaná na makambo mingi koleka bango. Ezalaka pɛtɛɛ kokanisa ete mikóló bayebaka mpenza te mikakatano mpe mitungisi oyo bilenge bakutanaka na yango. Ndakisa ya komikitisa oyo Ruta apesi ezali kokundwela biso ete koyoka toli ya bwanya oyo epesami na mikóló oyo balingaka biso mpe balukaka bolamu na biso, ekoki komemela biso matomba mingi. Kasi, toli nini Naomi apesaki Ruta, mpe Ruta azwaki mpenza mapamboli ndenge alandaki toli yango?

Ruta na esika ya kotutatuta mbuma

Na mpokwa wana, Ruta asimbaki nzela mpe akendaki na esika ya kotutatuta mbuma; esika moko oyo baloni-bilanga mosusu bazalaki kotuta mbuma mpo na kolongola yango matiti. Esika oyo baponaki mpo na kosala mosala yango ezalaki mingimingi likoló ya ngomba, epai mopɛpɛ ezalaki makasi na mpokwa. Mpo na kolongola mposo ya blé mpe matiti na mbuma, basali bazalaki kosalela kanya ya monene to bapau mpo na kotombola mbuma na mopɛpɛ, oyo ezalaki komema mposo ya blé mpe kotika mbuma oyo ezalaki kokwea na esika oyo bazalaki kotuta yango.

Ruta azalaki kotala na mayele wana mosala ezalaki kokende na kosila na mpokwa. Boaze azalaki kotala ndenge mosala yango ebimiselaki ye ebele ya mbuma. Nsima ya kolya bilei na esengo mpenza, alalaki na nsuka ya libondo ya mbuma. Emonani ete ezalaki momeseno ya ntango wana, ntango mosusu ezalaki mpo na kobatela biloko yango mpo na miyibi mpe bapunzi. Ruta amonaki ntango Boaze alalaki na butu. Ntango ekokaki mpo asalela toli ya Naomi.

Ruta apusanaki penepene, motema na ye ezalaki kobɛta. Amonaki ete mobali yango alalaki mpɔngi makasi. Boye, kaka ndenge Naomi ayebisaki ye, akendaki pembeni ya makolo na ye, alongolaki elamba oyo ezipaki yango, mpe alalaki. Na nsima azelaki. Ngonga elekaki. Mpo na Ruta, ezalaki lokola nde ngonga yango ezali kosila te. Nsukansuka, na katikati ya butu, Boaze akómaki kolɛnga. Malili ekangaki ye, alukaki kobenda elamba mpo na kozipa lisusu makolo na ye. Kasi, ayokaki lokola ete moto moko azali wana. Lisolo yango elobi boye: “Talá! mwasi moko alali na makolo na ye!”​—Ruta 3:8.

Atunaki ye boye: “Yo nani?” Ruta ayanolaki ye, ekoki kozala na mongongo oyo ezali kolɛnga ete: “Ngai Ruta moombo na yo, mpe osengeli kozipa moombo na yo nsɔngɛ ya elamba na yo, mpo ozali mosikoli.” (Ruta 3:9) Bato mosusu oyo balimbolaka lelo maloba ya Biblia balobi ete likambo oyo Ruta asalaki mpe maloba na ye emonisaki ete alukaki kosangisa nzoto ná Boaze; nzokande, bayebi te makambo oyo mibale: Ya liboso, Ruta asalaki na kolanda mimeseno ya ntango wana, oyo mingi na yango eyebani te lelo oyo. Na yango, ekozala libunga kokokanisa likambo oyo asalaki na etamboli ya mbindo oyo ezali komonana na ntango na biso. Ya mibale, Boaze ayanolaki ye na ndenge oyo emonisaki polele ete amonaki ete Ruta azalaki na etamboli ya malamu mpe abongaki kozwa longonya mpo na yango.

Ruta azalaki na makanisi mabe te mpe na moimi te ntango akendaki kokutana na Boaze

Boaze alobaki na ye, mpe na ntembe te, mongongo malamu oyo asalelaki ebɔndisaki Ruta. Alobaki boye: “Yehova apambola yo, mwana na ngai. Omonisi motema boboto na yo malamu mpenza na mbala oyo koleka mbala ya liboso, na ndenge olandi bilenge mibali te, babola to bazwi.” (Ruta 3:10) “Mbala ya liboso” emonisi bolingo ya sembo oyo Ruta amonisaki ndenge ayaki elongo na Naomi na Yisraele mpe azalaki kobatela ye. “Mbala oyo” ezalaki likambo oyo autaki kosala sikoyo. Boaze amonaki ete elenge mwasi lokola Ruta akokaki kozwa mobali na kati ya bilenge mibali, bázala bazwi to babola. Na esika ya kosala bongo, alingaki nde kosalela Naomi malamu, kosalela mpe mobali na ye oyo akufaki malamu, mpo nkombo na ye elimwa te na mboka na ye. Yango wana, ezali mpasi te tómona ntina oyo Boaze akamwaki mpo na ezaleli oyo Ruta amonisaki ya koboya koluka matomba na ye moko.

Boaze alobaki lisusu boye: “Mpe sikoyo, mwana na ngai, kobanga te. Nyonso oyo olobi nakosalela yo yango, mpo moto nyonso na engumba ya bato na ngai ayebi ete yo ozali mpenza mwasi moko malamu mingi.” (Ruta 3:11) Asepelaki na likanisi ya kobala Ruta; ekoki kozala ete akamwaki mpenza te ntango Ruta asɛngaki ye azala mosikoli na ye. Kasi, Boaze azalaki moto ya sembo, mpe akokaki te kosala likambo ndenge motema na ye elingi. Ayebisaki Ruta ete ezali na mosikoli mosusu oyo azali ndeko ya penepene ya mobali ya Naomi oyo akufá; Boaze asengelaki kokutana liboso na mobali yango mpe kopesa ye libaku ya kokóma mobali ya Ruta.

Boaze asɛngaki Ruta alala lisusu mpe apema tii ntango ntɔngɔ elingi kotana; na nsima, akokaki kokende kozanga ete bato mosusu bámona ye. Alingaki kobatela lokumu ya Ruta mpe lokumu na ye moko, mpo bato balingaki kokanisela bango mabe. Ruta alalaki pembeni ya makolo ya mobali yango, mbala mosusu na motema ya kokita nsima ya kozwa eyano ya boboto na likambo oyo asɛngaki. Na nsima, wana molili ezalaki naino, Boaze atondisaki orje na kazaka ya Ruta mpe asimbaki nzela azongi na Beteleme.

Ruta ayokaki mpenza esengo mpo na maloba ya Boaze​—ete ayebanaki na miso ya bato nyonso lokola “mwasi moko malamu mingi”! Na ntembe te, mposa makasi oyo azalaki na yango ya koyeba Yehova mpe kosalela ye nde esalaki mpenza ete azala na lokumu wana. Amonisaki mpe boboto monene mpe atyelaki Naomi mpe bato na ye likebi, andimaki komesana na makambo mpe mimeseno oyo ezalaki mopaya mpo na ye. Soki tomekoli kondima ya Ruta, tokoluka kosalela basusu makambo na limemya mpe kotosa mimeseno na bango. Soki tosali bongo, biso mpe tokokumisama mpo na bizaleli na biso ya malamu.

Esika ya kopema mpo na Ruta

“Yo nani, mwana na ngai?” Naomi alobaki bongo ntango Ruta azongaki na ndako. Ntango mosusu ezalaki mpo na molili nde Naomi atunaki bongo, kasi alingaki mpe koyeba soki Ruta azalaki kaka moninga na ye ya motema to azalaki kozela libaku ya kobala oyo ezalaki liboso na ye. Ruta ayebisaki mbala moko bokilo na ye makambo nyonso oyo ye ná Boaze basololaki. Alakisaki mpe ye likabo ya orje oyo Boaze alobaki apesa Naomi. *​—Ruta 3:16, 17.

Na bwanya nyonso, Naomi asɛngaki Ruta afanda na ndako mokolo yango na esika ya kokende kolɔkɔta bilei na elanga. Ayebisaki Ruta boye: “Mobali yango akopema te liboso asilisa likambo yango lelo.”​—Ruta 3:18.

Naomi alobaki solo mpo na Boaze. Boaze akendaki na porte ya engumba, epai mikóló ya engumba bazalaki na momeseno ya kokutana, mpe azelaki tii ntango mobali oyo azalaki moto ya libota ya penepene azalaki koleka. Liboso ya batemwɛ, Boaze apesaki mobali yango libaku ya kozala mosikoli soki andimi kobala Ruta. Kasi, mobali yango aboyaki, alobaki ete soki asali bongo akobebisa libula na ye moko. Na nsima, liboso ya batemwɛ na porte ya engumba, Boaze alobaki ete andimi kozala mosikoli, kosomba mabele ya Elimeleke mobali ya Naomi oyo akufá, mpe kobala Ruta mwasi oyo Mahalone, mwana ya Elimeleke atikaki. Boaze amonisaki elikya oyo azalaki na yango ete akosala bongo “mpo na kotɛlɛmisa nkombo ya mowei na libula na ye.” (Ruta 4:1-10) Na ntembe te, Boaze azalaki mpenza moto ya sembo mpe oyo azalaki koluka matomba na ye moko te.

Boaze abalaki Ruta. Na nsima na yango, tozali kotánga boye: “Yehova apesaki ye likoki ya kozwa zemi mpe abotaki mwana mobali.” Basi ya Beteleme bapambolaki Naomi mpe bakumisaki Ruta mpo na ndenge azalaki malamu epai ya Naomi koleka bana mibali nsambo. Na nsima, toyebi ete mwana ya Ruta akómaki nkɔkɔ ya Davidi, mokonzi moko monene. (Ruta 4:11-22) Mpe Davidi azalaki nkɔkɔ ya Yesu Kristo.​—Matai 1:1. *

Yehova apambolaki Ruta ndenge apesaki ye libaku ya kokóma nkɔkɔ ya Masiya

Ruta apambolamaki lisusu mpo Naomi nde asalisaki ye na kobɔkɔla mwana yango lokola kaka mwana na ye moko. Bomoi ya basi wana mibale emonisi ete Yehova Nzambe amonaka baoyo nyonso basalaka mosala mpo na kokokisa bamposa ya bato ya libota na bango mpe baoyo basalelaka ye na bosembo elongo na bato na ye oyo aponi. Azangaka te kopambola bato ya sembo oyo bazali na lokumu malamu na miso na ye, ndenge Ruta azalaki.

^ par. 4 Talá lisolo “Mekolá kondima na bango​—‘Epai okokende, ngai mpe nakokende,’” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2012.

^ par. 10 Ndenge Naomi amonisaki yango, boboto ya Yehova esuki kaka te na bato ya bomoi; amonisaka yango mpe epai ya bato oyo bakufá. Mobali ya Naomi mpe bana na ye nyonso mibale bakufaki. Mobali ya Ruta akufaki. Na ntembe te, basi yango mibale bazalaki kolinga mingi mibali yango misato. Likambo nyonso ya boboto oyo bazalaki komonisela Naomi to Ruta, ezalaki lokola nde bazalaki komonisela mibali yango, oyo bakokaki kolinga ete basi oyo bango bazalaki kolinga bábatelama malamu.

^ par. 15 Lotomo ya kobala mwasi ya ndenge wana epesamaki libosoliboso na ndeko ya mobali oyo akufi mpe na nsima na ndeko na ye ya mosika, ndenge moko mpe na lotomo ya kozwa libula na ye.​—Mitángo 27:5-11.

^ par. 28 Boaze apesaki Ruta mezire motoba ya bilei oyo kilo na yango eyebani mpenza te​—ntango mosusu mpo na komonisa ete kaka ndenge bato bazalaki kosala na boumeli ya mikolo motoba mpe kopema na mokolo ya sabata, mikolo oyo Ruta anyokwamaki lokola mwasi oyo mobali akufá elingaki kosila mpe alingaki kozwa “kopema” oyo ekokaki kouta na kozala na ndako mpe mobali. Epai mosusu, mezire motoba​—ekoki kozala pau etondá—​ekokaki kozala mezire oyo Ruta akokaki komema.

^ par. 31 Ruta azali moko ya basi mitano oyo Biblia etángi na molɔngɔ ya bankɔkɔ ya Yesu. Mwasi mosusu ezali Rahaba, oyo azalaki mama ya Boaze. (Matai 1:3, 5, 6, 16) Ndenge moko na Ruta, Rahaba azalaki Moyisraele te.