Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo na bilenge

Kebá na mposa ya koluka lokumu!

Kebá na mposa ya koluka lokumu!

Malako: Salá devuare oyo na esika moko ya kimya. Ntango ozali kotánga bavɛrsɛ, salá lokola ozali temwɛ ya makambo oyo ezali kosalema. Salá lokola ozali komona makambo yango na makanisi, ozali koyoka mingongo, mpe luká komitya na esika ya bato oyo bazali kolobela. Salá lokola nde likambo yango ezali kosalema sikoyo.

Bato oyo balobeli: Davidi, Abisalome, Yoabe

Na mokuse: Abisalome aluki kobɔtɔla tata na ye bokonzi.

TALELÁ LISOLO OYO.​—TÁNGÁ 2 SAMWELE 14:25-33; 15:1-17; 18:9-17, 30-33.

Lobelá ndenge Abisalome azali komonana, ndenge ozali kokanisa. (Tángá lisusu 2 Samwele 14:25, 26.)

Okanisi ete elongi ya Abisalome mpe mongongo na ye ezalaki ndenge nini ntango azalaki koluka koyiba mitema ya bato oyo bazalaki koya epai ya mokonzi mpo na koluka bosembo? (Tángá lisusu 2 Samwele 15:2-6.)

Bizaleli nini omoni epai ya Abisalome na makambo oyo elobelami na 2 Samwele 14:28-30?

KƆTÁ NA MOZINDO.

Abisalome asalaki ndenge nini mpo na kobɔtɔla bokonzi? (Lisalisi: Tángá 2 Samwele 13:28, 29. Aminone azalaki mwana ya liboso ya Davidi mpe ye nde asengelaki kokóma mokonzi na nsima ya tata na ye.)

Atako azalaki na mposa ya kozwa bokonzi mpe koluka lokumu na ye moko, ndenge oyo Abisalome akundamaki emonisi ete bato bazalaki kotalela ye ndenge nini? (Tángá lisusu 2 Samwele 18:17.)

Okanisi ete nini esalaki mpe ete Abisalome akóma koluka lokumu ndenge wana? (Tángá mpe oyo elobami mpo na Diotrefese na 3 Yoane 9, 10.)

Davidi ayokaki ndenge nini na makambo oyo Abisalome asalaki? (Lisalisi: Tángá Nzembo 3, oyo Davidi akomaki ntango Abisalome atombokaki.)

SALELÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI. KOMÁ MAKAMBO OYO OYEKOLI NA NTINA NA . . .

Likama ya ezaleli ya koluka lokumu.

Mpasi oyo makambo moto mosusu asali ekoki kosala basusu, ata mpe baboti na ye moko.

MAKAMBO MOSUSU OYO OKOKI KOSALELA.

Ndenge nini okoki kokwea na motambo ya koluka lokumu?

Ndenge nini okoki koboya kokolisa ezaleli ya koluka lokumu oyo ebongi na yo te?

NA LISOLO OYO, MAKAMBO NINI OMONI ETE EZALI NA NTINA MINGI MPO NA YO, MPE MPO NA NINI?

Likanisi: Kanisá ete lisolo oyo esuki na ndenge ekeseni. Nini elingaki kokómela Abisalome soki azalaki na komikitisa na esika ya koluka lokumu?​—Masese 18:12.