Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Omonisaka elimo ya ndenge nini?

Omonisaka elimo ya ndenge nini?

“Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa.”​—FLM. 25.

1. Ntango Paulo akomelaki bandeko na ye bakristo, amonisaki ete azali na elikya nini?

NTANGO ntoma Paulo azalaki kokomela bandeko na ye bakristo, amonisaki mbala na mbala ete azali na elikya ete Nzambe mpe Kristo bakosepela na elimo oyo bazali komonisa na kati ya lisangá. Na ndakisa, akomelaki Bagalatia ete: “Bandeko, boboto monene ya Nkolo na biso Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa. Amen.” (Gal. 6:18) Paulo alingaki koloba nini ntango asalelaki maloba “elimo oyo bozali komonisa”?

2, 3. (a) Ntango Paulo asalelaki liloba “elimo,” na bantango mosusu azalaki kolobela nini? (b) Mituna nini tosengeli komituna na oyo etali elimo oyo tomonisaka?

2 Liloba “elimo” oyo Paulo asaleli na vɛrsɛ yango elimboli makanisi oyo etindaka moto aloba to asala makambo na lolenge moko boye. Moto moko akoki kozala na elimo ya boboto, ya kotyelaka basusu likebi, ya kokaba, to ya kolimbisa. Biblia elobeli “elimo ya kimya mpe ya boboto” mpe kozala na “elimo ya kimya.” (1 Pe. 3:4; Mas. 17:27) Nzokande, moto mosusu akoki kozala na elimo ya kotyola basusu, ya kolinga biloko ya mokili, ya kosilikaka noki, to mpe ya kolinga kosala makambo oyo motema na ye elingi. Oyo eleki mabe, ezali na bato oyo bamonisaka elimo ya mbindo, ya kozanga botosi, ata mpe ya botomboki.

3 Na yango, ntango Paulo asalelaki maloba lokola “Nkolo azala na elimo oyo ozali komonisa,” alingaki kolendisa bandeko na ye ete bámonisaka elimo oyo eyokani na mokano ya Nzambe mpe bomoto ya Kristo. (2 Tim. 4:22; tángá Bakolose 3:9-12.) Lelo oyo, ekozala malamu tómituna boye: ‘Namonisaka elimo ya ndenge nini? Ndenge nini nakoki komonisa lisusu malamu koleka elimo oyo esepelisaka Nzambe? Nakoki kobongisa lisusu lolenge na ngai ya kolendisa basusu na lisangá bázala na elimo ya malamu?’ Tózwa ndakisa: Na esika moko oyo baloni bafololo, langi kitoko ya fololo mokomoko esalaka ete esika yango mobimba emonana kitoko. Ozali moko ya “bafololo” oyo esalaka ete lisangá mobimba emonana kitoko? Na ntembe te, tosengeli kosala makasi tózala ndenge wana. Tótala sikoyo ndenge oyo tokoki kosala mpo na komonisa elimo oyo esepelisaka Nzambe.

TÓBOYA ELIMO YA MOKILI

4. “Elimo ya mokili” ezali nini?

4 Biblia eyebisi biso ete: “Biso tozwaki elimo ya mokili te, kasi elimo oyo euti na Nzambe.” (1 Ko. 2:12) “Elimo ya mokili” ezali nini? Ezali elimo oyo elobelami na Baefese 2:2, oyo elobi: “Kala bozalaki kotambola na yango na kolanda makambo ya mokili oyo, na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi.” “Mopɛpɛ” yango ezali elimo ya mokili, to makanisi ya bato ya mokili, mpe ezalaka zingazinga na biso lokola mopɛpɛ. Ezalaka bipai nyonso. Mbala mingi, bato oyo bazali na elimo yango balobaka ete ‘Moto moko te asengeli koyebisa ngai oyo nasengeli kosala,’ to ‘Osengeli kobunda mpo ozwa eloko oyo ozali na lotomo na yango.’ Bato yango bazali “bana ya kozanga botosi” ya mokili ya Satana.

5. Elimo nini ya mabe Bayisraele mosusu bamonisaki?

5 Elimo ya ndenge wana ebandi lelo te. Na ntango ya Moize, Kora atɛmɛlaki baoyo bazalaki na bokonzi na lisangá ya Yisraele. Mingimingi, alobaki mabe mpo na Arona mpe bana na ye ya mibali, oyo bazwaki libaku ya kozala banganga-nzambe. Ekoki kozala ete amonaki mabunga na bango. To mbala mosusu amonaki lokola nde Moize azalaki kopesa mikumba kaka na bandeko na ye. Ezala bongo to te, emonani polele ete Kora akómaki kotalela makambo na liso ya bomoto mpe alobaki mabe mpo na baoyo Yehova aponaki. Na kozanga limemya, alobaki na bango ete: “Tobaye bino . . . Bongo, mpo na nini bino bozali komitombola likoló ya lisangá ya Yehova?” (Mit. 16:3) Ndenge moko mpe, Datane ná Abirame bakómaki koimaima mpo na Moize mpe balobaki na ye ete ‘alingi komikómisa mokonzi na bango, tii kolekisa ndelo.’ Ntango Moize atindaki bábenga bango, balobaki na lolendo nyonso ete: “Tokoya te!” (Mit. 16:12-14) Emonanaki polele ete Yehova asepelaki te na elimo oyo bamonisaki. Yango wana abomaki batomboki yango nyonso.​—Mit. 16:28-35.

6. (a) Ndenge nini bandeko mosusu na ekeke ya liboso bamonisaki ete bazalaki na elimo ya malamu te? (b) Mbala mosusu nini etindaki bango bákóma na elimo ya ndenge wana?

6 Na ekeke ya liboso, bandeko mosusu mpe bakómaki koloba mabe mpo na baoyo bazalaki na bokonzi na lisangá; na ndenge yango, bazalaki “kotyola bonkolo.” (Yuda 8) Mbala mosusu, mibali yango bazalaki kosepela te na mikumba oyo bazalaki na yango, mpe bazalaki koluka kotinda bandeko mosusu bátombokela baoyo bazalaki kosala makasi bákokisa malamu mikumba oyo Nzambe apesaki bango na lisangá.​—Tángá 3 Yoane 9, 10.

7. Elimo nini tosengeli kokeba na yango na lisangá lelo oyo?

7 Emonani polele ete elimo ya ndenge wana esengeli te kozala na kati ya lisangá. Yango wana, tosengeli kokeba ete tókóma na elimo ya ndenge wana te. Bankulutu bazali bato ya kokoka te, kaka ndenge bankulutu na ntango ya Moize mpe na ntango ya ntoma Yoane bazalaki mpe bato ya kokoka te. Bankulutu bakoki kosala mabunga oyo ekoki kosala biso mpasi. Soki esalemi bongo, ekozala malamu te ete tólanda elimo ya mokili mpe tókóma mbala mosusu koloba ete, “esengeli kosambisa ndeko yango” to “esengeli kotika ye kaka bongo te”! Yehova akoki komona malamu alandela te mabunga mosusu ya mikemike. Biso mpe tokoki kosala bongo te? Bandeko mosusu oyo basali lisumu monene baboyaka kokende ntango bankulutu oyo baponami mpo na kosalisa bango babengisi bango na komite, kaka mpo basepelaka te na likambo moko epai ya bankulutu yango. Kosala bongo ezali lokola moto oyo azali kobɛla oyo aboyi nkisi moko oyo ekoki kobikisa ye kaka mpo azali kosepela te na monganga oyo apesi ye nkisi yango.

8. Bavɛrsɛ nini ekoki kosalisa biso tótalelaka baoyo bazali kokamba biso na lisangá na ndenge ya malamu?

8 Mpo tóboya elimo ya ndenge wana, tosengeli kobosana te likambo oyo Biblia elobi ete Yesu azali “na minzoto nsambo na lobɔkɔ na ye ya mobali.” “Minzoto” yango ezali komonisa bankulutu oyo batyami mafuta na elimo, kasi mpe bankulutu nyonso ya masangá. Yesu akoki kotambwisa “minzoto” yango oyo ezali na lobɔkɔ na ye na ndenge oyo amoni malamu. (Em. 1:16, 20) Na yango, lokola Yesu azali Mokonzi ya lisangá, ayebi malamu makambo nyonso oyo elekaka na kati ya masangani ya bankulutu. Soki esengeli kosembola nkulutu moko na likambo moko boye, Yesu, oyo azali na ‘miso lokola lolemo ya mɔtɔ,’ akosala yango na ntango oyo ebongi mpe na lolenge oyo amoni malamu. (Em. 1:14) Kasi liboso ete asala yango, tosengeli kokoba komemya baoyo elimo santu eponi, mpamba te Paulo akomaki ete: “Bótosaka baoyo bazali kokamba bino mpe bómikitisaka liboso na bango, mpo bazali kokɛngɛla milimo na bino lokola bato oyo bakozongisa monɔkɔ; mpo básalaka yango na esengo kasi na komilelalela te, mpo ekozala likama mpo na bino.”​—Ebr. 13:17.

Komanyola na mokumba ya Yesu ekotinda yo osala nini ntango bapesi yo toli?

9. (a) Ndenge nini elimo oyo mokristo azali na yango ekoki komonana ntango basemboli ye to bapesi ye disiplini? (b) Eleki malamu tósala nini ntango basemboli biso?

9 Elimo oyo mokristo azali na yango ekoki mpe komonana ntango basemboli ye to ntango balongoli ye mikumba oyo azalaki na yango na lisangá. Bankulutu bapesaki elenge moko toli ya boboto mpo azalaki kobɛta masano ya video oyo elakisaka bitumba. Kasi likambo ya mawa, elenge yango asalelaki toli yango te mpe balongolaki ye mokumba ya mosaleli na misala, mpamba te azalaki lisusu kokokisa masɛngami ya Biblia te. (Nz. 11:5; 1 Tim. 3:8-10) Na nsima, ndeko yango amonisaki polele ete andimaki te ekateli oyo bankulutu bazwaki. Akomelaki biro ya filiale mikanda mingi mpo na kofunda bankulutu; kutu akómaki mpe kotinda bandeko mosusu ya lisangá básala lokola ye. Nzokande, koluka komilongisa ntango tosali likambo moko ya mabe ezali malamu te, mpamba te ezaleli yango ekoki nde kobebisa kimya ya lisangá mobimba. Ntango basemboli biso, eleki malamu tótalela yango lokola libaku ya koyeba bolɛmbu na biso mpe tóndima disiplini yango na komikitisa.​—Tángá Bileli 3:28, 29.

10. (a) Yakobo 3:16-18 eteyi biso nini na oyo etali elimo ya malamu mpe elimo ya mabe? (b) Matomba nini tokozwa soki tozali komonisa “bwanya oyo euti na likoló”?

10 Yakobo 3:16-18 elobeli elimo oyo tosengeli komonisa mpe oyo tosengeli komonisa te na kati ya lisangá. Elobi boye: “Epai zuwa mpe kowelana ezali, mobulu ná makambo nyonso ya mabe mpe ezali wana. Kasi bwanya oyo euti na likoló ezalaka libosoliboso pɛto, mpe kimya, na makambo makasimakasi te, esepelaka kotosa, etondi na motema mawa mpe na mbuma ya malamu, eponaka bilongi te, ezalaka na bokosi te. Lisusu, bato oyo batyaka kimya balonaka mbuma ya boyengebene na kimya mpe babukaka yango.” Soki tozali kosala makambo oyo ezali komonisa ete tozali na “bwanya oyo euti na likoló,” tokomekola bizaleli ya Nzambe mpe yango ekotinda bandeko mosusu mpe bámonisa elimo ya malamu na kati ya lisangá.

TÓMONISA LIMEMYA NA KATI YA LISANGÁ

11. (a) Kobatela elimo ya malamu ekosalisa biso tóboya kosala nini? (b) Ndakisa ya Davidi eteyi biso nini?

11 Tosengeli kobosana te ete Yehova apesi bankulutu mokumba ya “kobatela lisangá ya Nzambe.” (Mis. 20:28; 1 Pe. 5:2) Na yango, toyebi ete eleki malamu kotosa ebongiseli oyo Nzambe atyá na kati ya lisangá, tózala bankulutu to te. Kobatela elimo ya malamu ekoki kosalisa biso tómitungisa koleka ndelo te mpo na kozwa to kobatela mikumba. Ntango Saulo mokonzi ya Yisraele amonaki ete Davidi akómi likama mpo na bokonzi na ye, “azalaki ntango nyonso kotala Davidi na liso mabe.” (1 Sa. 18:9) Mokonzi yango akómaki na elimo ya mabe mpe alukaki kutu koboma Davidi. Na esika tómitungisaka koleka ndelo mpo na mikumba, lokola Saulo, eleki malamu tózala nde lokola Davidi. Atako Davidi akutanaki na makambo mingi ya kozanga bosembo, azalaki ntango nyonso komemya mokonzi oyo Yehova aponaki.​—Tángá 1 Samwele 26:23.

12. Nini ekoki kosala ete bomoko ezala na kati ya lisangá?

12 Kozala na makanisi oyo ekeseni ekoki kosala ete bandeko báyokelana nkanda; likambo yango ekoki kokómela ata bankulutu. Biblia ekoki kosalisa biso na likambo yango; epesi toli oyo: “Mpo na kopesana lokumu, bózala bato ya liboso,” mpe “Bókóma bato ya mayele na miso na bino moko te.” (Rom. 12:10, 16) Na esika tótingama kaka ete likanisi na biso ezali malamu, tosengeli koyeba ete mbala mingi makanisi ya malamu mpo na likambo moko boye ekoki kozala ebele. Soki tozali kondima kotalela mpe makanisi ya basusu, yango ekoki kosala ete bomoko ezala na kati ya lisangá.​—Flp. 4:5.

13. Ndenge nini tosengeli kotalela makanisi na biso moko, mpe ndakisa nini ya Biblia ezali komonisa yango?

13 Yango elingi nde koloba ete ezali mabe tópesa likanisi na biso ata soki tomoni ete likambo moko boye na lisangá esengeli kosembolama? Te. Na siɛklɛ ya liboso, likambo moko ebimaki na lisangá, mpe bandeko babendanaki mingi mpo na yango. Bandeko yango ‘basalaki ebongiseli ete Paulo ná Barnabasi mpe bamosusu na kati na bango bámata epai ya bantoma mpe bankulutu na Yerusaleme mpo na ntembe yango.’ (Mis. 15:2) Na ntembe te, mokomoko ya bandeko yango azalaki na likanisi na ye na likambo yango mpe mpo na ndenge ya kosilisa yango. Kasi, ntango ndeko mokomoko apesaki likanisi na ye mpe bazwaki ekateli na lisalisi ya elimo santu, bandeko batingamaki lisusu te na makanisi na bango. Ntango bandeko ya masangá bazwaki mikanda oyo emonisaki ekateli oyo ezwamaki na likambo yango, “basepelaki na elendiseli yango” mpe masangá ezalaki “kokóma makasi na kondima.” (Mis. 15:31; 16:4, 5) Ndenge moko mpe lelo oyo, soki toyebisi bandeko oyo bazali na mikumba likambo moko, tosengeli kotikela bango likambo yango mpo bátalela yango malamumalamu.

TÓMONISÁ ELIMO YA MALAMU NA BOYOKANI NA BISO NÁ BANDEKO MOSUSU

14. Ndenge nini mokomoko na biso akoki komonisa elimo ya malamu?

14 Tozali na mabaku ebele ya komonisa elimo ya malamu na boyokani na biso ná basusu. Mokomoko na biso akoki kosala malamu mingi soki alimbisaka ntango basusu bazokisi ye. Liloba ya Nzambe eyebisi biso boye: “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko soki moko na bino azali na likambo ná mosusu. Kaka ndenge Yehova alimbisaki bino na motema moko, bino mpe bósala bongo.” (Kol. 3:13) Maloba “soki moko na bino azali na likambo ná mosusu” emonisi ete makambo mosusu ekoki kotinda biso tósilikela basusu. Kasi, na esika tólandelaka mabunga ya mikemike ya basusu mpe tóbebisa kimya ya lisangá, tosengeli nde kosala makasi tómekola Yehova mpe tólimbisa na motema moko, mpe tókoba kosalela Nzambe elongo na bango.

15. (a) Ndakisa ya Yobo eteyi biso nini na ntina etali kolimbisa? (b) Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tómonisa elimo ya malamu?

15 Na likambo etali kolimbisa, tokoki kozwa liteya na ndakisa ya Yobo. Baninga na ye misato oyo bazalaki babɔndisi ya lokuta balobaki na ye maloba mingi ya kozokisa. Atako bongo, Yobo alimbisaki bango. Na ndenge nini? “Abondelaki mpo na baninga na ye.” (Yobo 16:2; 42:10) Ntango tozali kobondela mpo na basusu, tokoki kobongola makanisi oyo tozalaki na yango mpo na bango. Kobondela mpo na bandeko na biso nyonso bakristo esalisaka biso tómonisa elimo oyo Kristo mpe amonisaki. (Yoa. 13:34, 35) Longola kobondela mpo na bandeko na biso, tosengeli mpe kobondela mpo na kozwa elimo santu. (Luka 11:13) Elimo ya Nzambe ekosalisa biso tómonisa bizaleli ya solosolo ya bokristo na boyokani na biso ná basusu.​—Tángá Bagalatia 5:22, 23.

TÓSALA ETE ELIMO YA MALAMU EZALA NA KATI YA EBONGISELI YA NZAMBE

16, 17. Ekateli na yo ezali nini na oyo etali ‘elimo oyo osengeli komonisa’?

16 Soki ndeko mokomoko na lisangá amityeli mokano ya kosala ete elimo ya malamu ezala na kati ya lisangá, yango ekobimisa mpenza mbuma malamu! Nsima ya kotalela makambo oyo ezali na lisolo oyo, mbala mosusu ozwi ekateli ya kobongisa makambo mosusu na bomoi na yo mpo na kolendisa basusu. Soki ezali bongo, osengeli kotika ete Liloba ya Nzambe esalisa yo oyeba soki ozali komonisa elimo ya ndenge nini. (Ebr. 4:12) Paulo, oyo azalaki komitungisa mingi mpo na makambo oyo azalaki kosala na masangá, alobaki boye: “Nazali komona ata eloko moko te oyo ezali kokweisa ngai. Atako bongo namonani moyengebene te mpo na yango, kasi moto oyo azali kotalela ngai ezali Yehova.”​—1 Ko. 4:4.

17 Biso nyonso tokoki kosala ete elimo ya malamu ezala na lisangá soki tozali kosala makasi mpo na komonisa bwanya oyo euti na likoló, soki tozali komizwa na valɛrɛ mingi te, mpe soki tozali kokanisa te ete mikumba na biso eleki ntina. Soki tozali kolimbisa basusu mpe tozali na makanisi ya malamu mpo na bango, tokozala na kimya ná bandeko na biso bakristo. (Flp. 4:8) Soki tosali makambo wana, tokoki kondima ete Yehova mpe Yesu bakosepela na ‘elimo oyo tozali komonisa.’​—Flm. 25.