Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biloko oyo tosalelá kala

‘Nsango oyo eleki bansango nyonso oyo bato bayoká’

‘Nsango oyo eleki bansango nyonso oyo bato bayoká’

MOKOLO moko, Ndeko George Naish amonaki makonzí ebele ya mɛtrɛ 18 pene na esika moko oyo bazalaki kobomba biloko ya etumba, na engumba Saskatoon, na etúká ya Saskatchewan, na Canada. Alakisaki yango mosapi mpe atunaki boye: “Nyonso wana mosala na yango nini?” Bayebisaki ye ete ezali bisika oyo batyaki ba antɛnɛ mpo na kosolola na basoda na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na nsima, Ndeko Naish alobaki boye: “Ntango nayokaki bongo, namonaki ete tokoki kosalela makonzí yango mpo na kosala stasyo ya radio; ezali na ndenge wana nde tozwaki likanisi ya kofungola shɛni ya radio mpo na kosakola nsango malamu.” Nsima ya mbula moko mpamba, na 1924, radio CHUC ebandaki kosala. Ezalaki moko ya baradio ya liboso oyo ezalaki kolobela makambo ya Nzambe na Canada.

(1) Stasyo ya radio na Edmonton, Alberta (2) Ndeko moko azali kobongisa masini ya radio na Toronto, na Ontario

Canada yango moko ezali monene lokola Mpoto mobimba; na yango, ezalaki esika ya malamu mpo na kopesa litatoli na radio. Ndeko Florence Johnson, oyo asalaki na radio yango na Saskatoon, alobaki boye: “Na nzela ya radio na biso, topesaki litatoli epai ya bato mingi oyo tokokaki kokutana na bango te. Mpe lokola radio ezalaki eloko ya sika na ntango wana, bato bazalaki kosepela koyoka nsango nyonso oyo ezali koleka na radio.” Na 1926, Bayekoli ya Biblia (ndenge bazalaki kobenga Batatoli ya Yehova na ntango wana) bafungolaki radio na bango moko na bingumba minei ya Canada. *

(3) Studio ya radio CHUC na Saskatoon, na Saskatchewan

Makambo nini bazalaki kolekisa na baradio yango? Mbala mingi, bandeko ya lisangá bazalaki koyemba elongo na babɛti-miziki, ata mpe ba orkɛstrɛ ya mike. Longola yango, bandeko mibali bazalaki kosala badiskur mpe kotambwisa baemisyo oyo ezalaki kolobela mateya ya Biblia. Ndeko Amy Jones, oyo azalaki mpe koloba na baemisyo yango, alobaki boye: “Na mosala ya kosakola, soki nayebisi moto nkombo na ngai, basusu bazalaki koloba ete: ‘Ɛɛ, nayebi yo, nalandaki yo na radio.’”

“Ezalaki mpasi koyanola bato nyonso oyo bazalaki kobenga”

Bayekoli ya Biblia ya engumba Halifax, na etúká ya Nova Scotia, babandisaki likambo moko na radio oyo ezalaki sika na ntango wana: basalaki emisyo oyo bato bakokaki kobenga na telefone mpe kotuna mituna ya Biblia. Ndeko moko akomaki ete: “Tokamwaki na komona ndenge bato basepelaki na emisyo yango. Ezalaki mpasi koyanola bato nyonso oyo bazalaki kobenga.”

Ndenge ezalaki na ntango ya ntoma Paulo, bato mosusu basepelaki koyoka nsango ya Bayekoli ya Biblia, kasi basusu basepelaki te. (Mis. 17:1-5) Na ndakisa, ntango Hector Marshall ayokaki emisyo moko ya Bayekoli ya Biblia oyo elobelaki buku Études des Écritures, asɛngaki bámemela ye bavolimi motoba. Na nsima, ayaki kokoma boye: “Namonaki ete babuku yango ekosalisa ngai na koteya na eteyelo ya mokolo ya lomingo.” Nzokande, ntango Hector asilisaki kotánga volimi ya liboso, azwaki ekateli ya kolongwa na lingomba na ye. Akómaki mosakoli ya molende mpe asalelaki Yehova na bosembo tii na liwa na ye na 1998. Na ɛsti ya etúká ya Nouvelle-Écosse, mokolo oyo elandaki mokolo oyo batyaki diskur “Bokonzi, elikya ya mokili,” Colonel John MacDonald ayebisaki ndeko moko boye: “Lobi, bato ya Esanga Cap-Breton bayokaki nsango oyo eleki bansango nyonso oyo bato bayoká na mboka oyo.”

Nzokande, bakonzi ya mangomba bayokaki nkanda. Na engumba Halifax, bandimi mosusu ya Lingomba ya Katolike balingaki kotumba stasyo ya radio oyo ezalaki kolekisa baemisyo ya Bayekoli ya Biblia. Na 1928, bakonzi ya mangomba batindaki guvɛrnema eyebisa bato ete Leta akopesa lisusu Bayekoli ya Biblia mikanda te mpo bákoba kosalela baradio na bango. Mpo na kotɛmɛla likambo wana oyo ezalaki sembo te, bandeko basi mpe mibali bakabolaki trakte oyo ezalaki na motó ya likambo Nani azali nkolo mopɛpɛ? Atako bongo, guvɛrnema eboyaki kaka kopesa lisusu Bayekoli ya Biblia mikanda mpo bákoba kosalela radio na bango.

Likambo yango elɛmbisaki nde kondima ya bandeko ya Canada? Ndeko Isabel Wainwright alobaki boye: “Na ebandeli, emonanaki lokola ete banguna balongi. Kasi nayebaki ete Yehova akokaki kopekisa likambo yango esalema soki mokano na ye ezalaki bongo. Mbala mosusu yango elingaki kolimbola ete tosengeli kosalela mayele mosusu ya malamu koleka mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi.” Na esika bákangama kaka na radio mpo na kopesa litatoli, Bayekoli ya Biblia na Canada bakómaki mingimingi kokende kotala bato na bandako. Atako bongo, na eleko moko boye, radio esalaki mosala monene mpo na kopalanganisa ‘nsango oyo eleki bansango nyonso oyo bato bayoká.’​—Euti na Departema ya biloko oyo tosalelá kala, na Canada.

^ par. 4 Mpo na kopesa litatoli na nzela ya radio, bandeko ya Canada bazalaki mpe kofuta mbongo na bashɛni mosusu mpo na kolekisa baemisyo na bango.