Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Nkombo ya Nzambe ezali nani?

Bandeko na biso nyonso ya libota bazali na nkombo. Ata banyama oyo tobɔkɔlaka bazalaka na nkombo! Ebongi te ete Nzambe azala mpe na nkombo? Na Biblia, Nzambe azali na batitre ebele lokola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mpe Mozalisi; kasi azali mpe na nkombo.​—Tángá Yisaya 42:8.

Na mabongoli mingi ya Biblia nkombo ya Nzambe ezali na Nzembo 83:18. Na ndakisa, na Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika, vɛrsɛ yango elobi boye: “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”

Mpo na nini tosengeli kosalelaka nkombo ya Nzambe?

Nzambe alingi ete tosalelaka nkombo na ye mpenza. Ntango tosololaka na bato oyo tolingaka, na ndakisa baninga na biso ya motema, tobengaka bango na bankombo na bango; mingimingi soki basɛngi biso tósala bongo. Tosengeli te kosala mpe bongo ntango tozali kosolola na Nzambe? Lisusu, Yesu Kristo alendisaki bato basalelaka nkombo ya Nzambe.​—Tángá Matai 6:9; Yoane 17:26.

Kasi, mpo na kozala moninga ya Nzambe, tosengeli koyeba makambo mingi oyo etali ye kasi kaka nkombo na ye te. Na ndakisa, azalaka ndenge nini? Ekoki kosalema ete moto apusana penepene na ye? Okoki kozwa biyano na mituna wana nyonso na Biblia.