Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Moize​—Moto ya kondima

Moize​—Moto ya kondima

KONDIMA EZALI NINI?

Na Biblia, “kondima” elimbolaka kozala na elikya makasi oyo esimbami na bilembeteli ya solosolo. Moto oyo azali na kondima, azalaka na elikya ete Nzambe akokokisa bilaka na ye nyonso.

NDENGE NINI MOIZE AMONISAKI KONDIMA?

Moize azalaki kozwa bikateli oyo emonisaki ete azalaki kondimela bilaka ya Nzambe. (Ebandeli 22:15-18) Akokaki kozala na bomoi malamu mpenza na Ezipito, kasi asundolaki yango, mpe “aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu.” (Baebre 11:25) Azwaki ekateli yango kozanga kokanisa mpe na nsima ayokaki mawa mpo na yango? Te, mpamba te Biblia elobi ete Moize “atikalaki ngwi lokola nde azalaki komona Moto oyo amonanaka te.” (Baebre 11:27) Moize ayokaki mawa ata moke te mpo na bikateli oyo azwaki na kondima.

Moize azalaki kolendisa kondima ya basusu. Na ndakisa, talá likambo oyo esalemaki ntango Bayisraele bamonaki lokola bakangami na motambo mpo basoda ya Farao bazalaki na nsima na bango mpe mai ya Mbu Motane liboso na bango. Bayisraele babangaki mpo bamonaki ete esili mpo na bango; babelelaki Yehova mpe Moize. Moize asalaki nini?

Ekoki kozala ete Moize ayebaki mpenza te ete Nzambe alingaki kokabola mai ya Mbu Motane mpo na kofungolela Bayisraele nzela ya kokima. Kasi, Moize azalaki na elikya ete Nzambe akosala likambo moko mpo na kobatela bato na ye. Moize alingaki ete bandeko na ye bázala mpe na elikya wana. Totángi boye: “Moize alobaki na bato ete: ‘Bóbanga te. Bótɛlɛma ngwi mpe bómona lobiko ya Yehova, oyo akopesa bino lelo.’” (Kobima 14:13) Moize alongaki kosalisa Bayisraele bázala na kondima makasi? Ɛɛ, mpo Biblia elobi boye mpo na Moize mpe Bayisraele nyonso: “Na kondima bakatisaki Mbu Motane lokola nde na mabele oyo ekauki.” (Baebre 11:29) Kondima ya Moize ememelaki ye mpe bato mosusu oyo balandaki ndakisa na ye matomba.

MATEYA NINI TOZWI?

Tokoki kolanda ndakisa ya Moize soki tozali kozwa bikateli oyo ezali komonisa ete totyelaka bilaka ya Nzambe motema. Na ndakisa, Nzambe alaki ete akokokisa bamposa na biso soki totye losambo na ye na esika ya liboso na bomoi na biso. (Matai 6:33) Toboyi te, lokola bato mingi batyaka mposa ya kozwa biloko ya mokili na esika ya liboso, ekoki kozala mpasi tótɛmɛla mposa yango. Kasi, tokoki mpenza kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na biso nyonso soki tokómisi bomoi na biso pɛpɛlɛ mpe totye makanisi na biso na losambo na ye. Alaki boye: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.”​—Baebre 13:5.

Tosalaka mpe makasi mpo na kosalisa basusu bákóma na kondima makasi. Na ndakisa, baboti ya bwanya bayebaka ete kosalisa bana na bango bakóma na kondima ezali libaku moko monene. Ntango bazali kokola, bana basengeli koyeba mpenza ete Nzambe azali mpe apesá biso mibeko ya koyeba malamu ná mabe. Lisusu, basengeli kondimisama mpenza ete kotosa mibeko na ye ezali lolenge eleki malamu ya kotambwisa bomoi na biso. (Yisaya 48:17, 18) Baboti bapesaka bana na bango likabo ya motuya ntango basalisaka bango bándima ete Nzambe “azali mpe ete apesaka lifuti na baoyo balukaka ye na bosembo nyonso.”​—Baebre 11:6, Biblia Holy Bible​—Easy-to-Read Version.