Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kumisá nkombo monene ya Yehova

Kumisá nkombo monene ya Yehova

“Nakopesa nkombo na yo nkembo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”​—NZ. 86:12.

1, 2. Na kokesana na mangomba ya lokuta, ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka nkombo ya Nzambe?

MANGOMBA nyonso ya lokuta esalelaka nkombo ya Nzambe te. Na ndakisa, buku moko (Revised Standard Version) elobi ete: “Kosalela nkombo moko boye mpo na komonisa Nzambe kaka moko . . . ezali na ntina te na boyambi ya Eklezia na mokili mobimba.”

2 Nzokande, Batatoli ya Yehova basepelaka mingi kobengama na nkombo ya Nzambe mpe kokumisa yango. (Tángá Nzembo 86:12; Yisaya 43:10.) Longola yango, tomonaka ete koyeba ndimbola ya nkombo yango mpe ntembe oyo ebimaki na molɔ́ngɔ́ mobimba na oyo etali kosantisama na yango ezali lokumu monene. (Mat. 6:9) Kasi, tosengeli kozwa lokumu yango na lisɛki te. Yango wana, tótalela mituna misato ya ntina: Koyeba nkombo ya Nzambe elimboli nini? Ndenge nini Yehova asalaki makambo oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye, mpe na ndenge yango, abakisaki lokumu ya nkombo yango? Mpe ndenge nini tokoki kotambola na nkombo ya Yehova?

KOYEBA NKOMBO YA NZAMBE ELIMBOLI NINI?

3. Koyeba nkombo ya Nzambe elimboli nini?

3 Koyeba nkombo ya Nzambe esuki kaka te na komesana na nkombo “Yehova.” Yango elimboli koyeba lokumu oyo Yehova azali na yango, bizaleli na ye, mokano na ye, mpe misala na ye oyo Biblia elobeli, na ndakisa makambo oyo asalelaki basaleli na ye. Ezali solo ete Yehova asalisaka biso tósosola makambo yango mokemoke, na kotalela ndenge oyo kokokisama ya mokano na ye esɛngi. (Mas. 4:18) Yehova ayebisaki Adama ná Eva nkombo na ye; yango wana Eva asalelaki yango nsima ya kobota Kaina. (Eba. 4:1) Bato ya sembo lokola Noa, Abrahama, Yisaka, mpe Yakobo bayebaki mpe nkombo ya Nzambe. Bakangaki lisusu ntina ya nkombo yango ntango Yehova azalaki kopambola bango, kosalisa bango, mpe koyebisa bango makambo mosusu oyo etalaki mokano na ye. Nzokande, Moize azwaki libaku ya koyeba malamu ndimbola ya nkombo ya Nzambe.

Moize ayebaki ndimbola ya nkombo ya Nzambe, mpe yango ekómisaki kondima na ye makasi

4. Mpo na nini Moize atunaki Nzambe nkombo na ye, mpe mpo na nini tokoki kokamwa te ndenge Moize amitungisaki?

4 Tángá Kobima 3:10-15. Ntango Moize azalaki na mbula 80, Nzambe apesaki ye mokumba moko monene; ayebisaki ye ete: ‘Bimisá bato na ngai bana ya Yisraele na Ezipito.’ Kasi na limemya nyonso, Moize atunaki Nzambe motuna moko ya ntina mingi. Atunaki ye boye: ‘Nkombo na yo nani?’ Lokola nkombo ya Nzambe eyebanaki banda kala, Moize azalaki mpenza na mposa ya koyeba nini ntango atunaki motuna wana? Emonani ete azalaki na mposa ya koyeba makambo mingi oyo etali moto oyo azalaki na nkombo yango, mpo yango elingaki kondimisa libota ya Nzambe ete Nzambe akosikola bango mpenza. Moize azalaki na ntina ya komitungisa, mpamba te Bayisraele bazalaki baombo banda mwa bambula. Ekoki kozala ete bazalaki komituna soki Nzambe ya bankɔkɔ na bango akokaki kosikola bango. Kutu, Bayisraele mosusu bakómaki komipesa na losambo ya banzambe ya Ezipito!​—Ezk. 20:7, 8.

5. Ndenge nini Yehova amonisaki lisusu polele ndimbola ya nkombo na ye na eyano oyo apesaki Moize?

5 Eyano nini Yehova apesaki Moize? Na ebandeli, alobaki ete: “Talá oyo okoloba na bana ya Yisraele: ‘NAKOZALA atindi ngai epai na bino.’” * Na nsima, abakisaki ete: “Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bino . . . atindi ngai epai na bino.” Nzambe amonisaki ete akoki kokóma nyonso oyo alingi kokóma mpo na kokokisa mokano na ye, elingi koloba akokisaka ntango nyonso maloba na ye. Yango wana, na vɛrsɛ ya 15, tozali kotánga ete Yehova ye moko alobaki ete: “Wana nde nkombo na ngai mpo na seko, mpe wana nde ekaniseli na ngai bileko na bileko.” Na ntembe te, kondima ya Moize ekómaki lisusu makasi ntango ayebaki ndimbola ya nkombo ya Nzambe mpe yango etindaki ye abanga Nzambe mingi koleka!

YEHOVA ASALAKI MAKAMBO OYO EYOKANI NA NDIMBOLA YA NKOMBO NA YE

6, 7. Ndenge nini Yehova asalaki makambo oyo eyokanaki na ndimbola ya nkombo na ye monene?

6 Mwa moke nsima ya kopesa Moize mokumba, Yehova asalaki makambo oyo eyokanaki na ndimbola ya nkombo na ye na ndenge amonisaki ete azali Mosikoli ya Yisraele. Ayokisaki Baezipito nsɔni na ndenge abimiselaki bango malɔzi zomi mpe amonisaki polele ete banzambe ya Ezipito, ezala mpe Farao, bazali mpamba. (Kob. 12:12) Na nsima, Yehova afungolaki Mbu Motane, alekisaki Yisraele katikati na yango, mpe azindisaki Farao ná mampinga na ye. (Nz. 136:13-15) Na ‘esobe wana ya monene mpe ya nsɔmɔ,’ Yehova amonisaki ete azali Mobateli ya bomoi na ndenge azalaki kopesa bato na ye bilei mpe mai, atako mbala mosusu bazalaki milio mibale to misato, to mpe koleka! Kutu, asalaki ete bilamba mpe sandale na bango ekufa te. (Mib. 1:19; 29:5) Ya solo, eloko moko te ekoki kopekisa Yehova asala makambo oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye, oyo ekokani na nkombo mosusu te. Na nsima alobaki na Yisaya ete: “Ngai​—nazali Yehova, mpe longola ngai mobikisi mosusu azali te.”​—Yis. 43:11.

7 Yosua, mokitani ya Moize apesaki mpe litatoli na oyo etali misala ya nsɔmɔ oyo Yehova asalaki na Ezipito mpe na kati ya esobe. Yango wana, mwa moke liboso ete akufa, na motema na ye mobimba, Yosua alobaki na Bayisraele ete: “Boyebi malamu na mitema na bino nyonso mpe na milimo na bino nyonso ete na maloba nyonso ya malamu oyo Yehova Nzambe na bino alobaki na bino, ata liloba moko te ezangaki kokokisama. Yango nyonso ekokisamaki mpo na bino. Ata liloba moko te ezangaki kokokisama.” (Yos. 23:14) Kozanga ntembe, Yehova akokisaki maloba na ye, asalaki kaka ndenge alakaki.

8. Lelo oyo, ndenge nini Yehova azali kosala makambo oyo eyokani na ndimbola ya nkombo na ye?

8 Lelo oyo mpe, Yehova azali kosala kaka ndenge alakaki. Na nzela ya Mwana na ye, asakolaki ete na mikolo ya nsuka nsango ya Bokonzi ekosakolama “na mabele mobimba esika bato bafandi.” (Mat. 24:14) Longola Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, nani mosusu akokaki kosakola ete mosala ya ndenge wana ekosalema, kosɛnzɛla ete ekokisama, mpe kosalela bato mingi oyo “batángá kelasi mingi te mpe bato mpamba” mpo na kokokisa mosala yango? (Mis. 4:13) Na yango, ntango tozali komipesa na mosala wana, tozali nde kokokisa esakweli moko ya Biblia. Tozali kokumisa Tata na biso mpe komonisa ete tozali mpenza kosala makambo oyo eyokani na libondeli oyo ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”​—Mat. 6:9, 10.

NKOMBO NA YE EZALI MONENE

Farao aboyaki kondima ete Yehova azali Nzambe

9, 10. Na boyokani na ye ná Bayisraele, ndenge nini Yehova akobaki komonisa ndimbola ya nkombo na ye, mpe yango ebimisaki matomba nini?

9 Mwa moke nsima ya kobima ya Bayisraele na boombo, Yehova asalaki likambo moko ya sika mpo na bato na ye. Na nzela ya kondimana ya Mibeko, akómaki “mobali” na bango mpe andimaki kokokisa makambo nyonso oyo mokumba yango esɛngaki ete asala. (Yir. 3:14) Na ndenge ya elilingi, Yisraele ekómaki mwasi na ye, to ekólo oyo ebengami na nkombo na ye. (Yis. 54:5, 6) Soki bandimaki kotosa ye mpe kobatela mibeko na ye, alingaki kozala ‘Mobali’ oyo akokaki kokokisa bamposa na bango nyonso. Alingaki kopambola bango, kobatela bango, mpe kopesa bango kimya. (Mit. 6:22-27) Yango elingaki kosala ete nkombo monene ya Yehova ekumisama epai ya bato ya bikólo. (Tángá Kolimbola Mibeko 4:5-8; Nzembo 86:7-10.) Kutu, ntango Bayisraele bazalaki ekólo ya Nzambe, bato mingi ya bikólo mosusu bandimaki losambo ya solo. Basalaki lokola Ruta, Momoabe oyo alobaki na Naomi ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo Nzambe na ngai.”​—Ruta 1:16.

10 Na boumeli ya bambula soki 1 500, makambo oyo Yehova asalelaki Bayisraele ebimisaki polele bizaleli na ye mosusu. Atako Bayisraele bazalaki matoi mangbongi, mbala na mbala Yehova amonisaki ete azali “Nzambe ya motema mawa” mpe “ayokaka nkanda noki te.” Azalaki mpenza na motema molai. (Kob. 34:5-7) Kasi motema molai ya Yehova ezalaka na ndelo, mpe ekómaki na nsuka ntango Bayuda baboyaki Mwana na ye mpe babomaki ye. (Mat. 23:37, 38) Bakitani ya Bayisraele na mosuni bazalaki lisusu te ekólo oyo ebengami na nkombo ya Nzambe. Na miso ya Yehova, bakufaki na elimo mpe bakómaki lokola nzete oyo ekauká. (Luka 23:31) Yango esalaki ete bákóma kotalela nkombo ya Nzambe ndenge nini?

11. Nini esalaki ete Bayuda bátika kosalela nkombo ya Nzambe?

11 Nsima ya bambula, Bayuda bakómaki kotalela nkombo ya Nzambe na ndenge oyo ebongi te, mpe bakómaki kokanisa ete basengeli kotánga yango te. (Kob. 20:7) Mokemoke, Bayuda batikaki kosalela nkombo ya Nzambe. Na ntembe te, Yehova ayokaki mpasi komona ndenge oyo bato batikaki komemya nkombo na ye. (Nz. 78:40, 41) Kasi, ezali polele ete Nzambe, “oyo nkombo na ye ezali Zuwa,” akokaki kotika te ete bato oyo bawanganaki ye mpe oyo ye awanganaki bákoba kobengama na nkombo na ye mpo na libela. (Kob. 34:14) Likambo yango emonisi ntina oyo tosengeli kozala na limemya makasi mpo na nkombo ya Mozalisi na biso.

EKÓLO YA SIKA OYO EBENGAMI NA NKOMBO YA NZAMBE

12. Ndenge nini Yehova abimisaki ekólo oyo ekobengama na nkombo na ye, ndenge esakolamaki?

12 Na nzela ya Yirimia, Yehova amonisaki mokano na ye ya kosala “kondimana ya sika” ná ekólo moko ya sika, Yisraele ya elimo. Yirimia asakolaki ete basangani nyonso ya ekólo yango ‘bakoyeba Yehova, kobanda na oyo aleki moke kati na bango kino na oyo aleki monene kati na bango.’ (Yir. 31:31, 33, 34) Esakweli yango ebandaki kokokisama na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntango Nzambe asalaki kondimana ya sika. Ekólo yango ya sika, elingi koloba “Yisraele ya Nzambe,” oyo esangisaki Bayuda mpe bato oyo bazalaki Bayuda te, ekómaki ‘ekólo moko mpo na nkombo ya [Nzambe]’ to, ndenge Yehova alobaki, “bato oyo babengami na nkombo na ngai.”​—Gal. 6:16; Tángá Misala 15:14-17; Mat. 21:43.

13. (a) Bakristo ya liboso bazalaki kosalela nkombo ya Nzambe? Limbolá. (b) Ndenge nini otalelaka libaku oyo ozali na yango ya kosalela nkombo ya Yehova na mosala ya kosakola?

13 Lokola bazali ‘bato oyo babengami na nkombo ya [Nzambe],’ na ntembe te basangani ya ekólo yango ya elimo basalelaki nkombo ya Nzambe ntango bazalaki kosalela bavɛrsɛ oyo euti na Makomami ya Ebre. * Na yango, ntango ntoma Petro asalaki diskur liboso ya Bayuda mpe Baprozelite oyo bautaki na bamboka ndenge na ndenge na Pantekote ya mobu 33 T.B., asalelaki nkombo ya Nzambe mbala mingi. (Mis. 2:14, 20, 21, 25, 34) Bakristo ya liboso bazalaki kokumisa Yehova mpe ye azalaki kopambola milende na bango na mosala ya kosakola. Lelo oyo mpe, Yehova apambolaka mosala na biso ntango tosakolaka nkombo na ye na esengo nyonso mpe tolakisaka yango epai ya bato oyo basepeli na Babiblia na bango moko soki likoki ezali. Na nsima, tosalisaka bango báyeba Nzambe ya solo. Yango ezali lokumu monene mpo na bango mpe mpo na biso! Na bantango mosusu, yango ezalaka ebandeli ya boyokani malamu mpenza ná Yehova, oyo ekoki kokóma makasi mpe koumela libela.

14, 15. Atako lipɛngwi epalanganaki mingi, Yehova asalaki nini mpo na nkombo na ye oyo esengeli kokanisama?

14 Na nsima, lipɛngwi ekɔtaki na lisangá ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso, mingimingi nsima ya liwa ya bantoma. (2 Tes. 2:3-7) Bateyi ya lokuta bakómaki kutu na momeseno oyo Bayuda mingi bazalaki na yango ya koboya kosalela nkombo ya Nzambe. Kasi Yehova atikaki nde ete nkombo na ye oyo esengeli kokanisama elimwa? Soki moke te! Atako ndenge oyo bazalaki kobenga yango na Ebre eyebani te lelo oyo, nkombo yango ebatelamaki. Na boumeli ya bambula, ezalaki komonana na mabongoli ndenge na ndenge ya Biblia, mpe na makomi ya bato ya mayele oyo balimbolaka Biblia. Na ndakisa, na 1757, Charles Peters akómaki boye: “Emonani ete nkombo Yehova ezali na ndimbola monene koleka batitre mosusu ya Nzambe.” Na ebimeli ya 1797 ya buku moko ya Hopton Haynes oyo elobelaki losambo ya Nzambe, mokapo 7 ebandi na maloba oyo: “YEHOVA, nkombo ya NZAMBE oyo Bayuda bazalaki kosalela; Nzambe kaka moko oyo bazalaki kosambela; kaka ndenge Yesu ná bantoma na ye bazalaki kosala.” Henry Grew (1781-1862) asukaki kaka te na kosalela nkombo ya Nzambe, kasi ayebaki mpe ete nkombo yango efingisamaki mpe esengeli kosantisama. Ndenge moko mpe, George Storrs (1796-1879), oyo azalaki kosala elongo na ndeko Charles T. Russell, asalelaki nkombo ya Nzambe, lokola Russel.

15 Mobu 1931 ezalaki na ntina mingi, mpamba te na mobu yango Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba, ndenge basaleli ya Yehova bazalaki kobengama na ntango wana, bazwaki nkombo Batatoli ya Yehova, oyo euti na Biblia. (Yis. 43:10-12) Na ndenge yango, bayebisaki bato ya mokili ete bazalaki na esengo ya kozala basaleli ya Nzambe ya solo kaka moko, mpe “ekólo moko mpo na nkombo na ye,” oyo ezali kokumisa nkombo yango. (Mis. 15:14) Ndenge oyo Yehova abatelaki nkombo na ye ekundoli biso maloba na ye oyo ezali na Malaki 1:11, oyo elobi ete: “Banda esika moi ebimaka tii esika yango elalaka, nkombo na ngai ekozala monene na kati ya bikólo.”

TAMBOLÁ NA NKOMBO YA YEHOVA

16. Mpo na nini tosengeli komona ete kotambola na nkombo ya Yehova ezali lokumu?

16 Mosakoli Mika akomaki ete: “Bato ya bikólo nyonso, ɛɛ bango, bakotambola moto na moto na nkombo ya nzambe na ye; kasi biso, ɛɛ biso, tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ seko na seko.” (Mika 4:5) Soki Yehova atikaki ete Bayekoli ya Biblia bábengama na nkombo na ye, ezalaki kaka te mpo na kopesa bango lokumu monene. Yango ezalaki mpe komonisa ete andimi bango. (Tángá Malaki 3:16-18.) Kasi, ezali boni mpo na yo? Ozali mpenza kosala milende mpo na “kotambola na nkombo ya Yehova”? Oyebaka mpenza makambo nini yango esɛngi?

17. Kotambola na nkombo ya Nzambe esɛngi makambo nini?

17 Kotambola na nkombo ya Yehova esɛngi makambo misato. Ya liboso, tosengeli kosakola nkombo yango epai ya basusu, mpo toyebi ete kaka baoyo ‘bakobelela nkombo ya Yehova [nde] bakobika.’ (Rom. 10:13) Ya mibale, tosengeli komonisa bizaleli ya Yehova, mingimingi bolingo na ye. Ya misato, totambolaka na nkombo ya Nzambe ntango tozali kotosa na esengo mitinda na ye ya sembo, mpo tófingisa te nkombo na ye mosantu. (1 Yoa. 4:8; 5:3) Ozali na ekateli ya ‘kotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso mpo na ntango oyo etyami ndelo te’?

18. Mpo na nini baoyo nyonso bakumisaka nkombo monene ya Yehova bakoki kozala na elikya mpo na mikolo ezali koya?

18 Mosika te, baoyo nyonso batosaka mibeko ya Yehova te to batombokelaka ye bakoyeba ete azali Nzambe. (Ezek. 38:23) Bato yango mosusu bazali lokola Farao oyo alobaki ete: “Yehova nde nani, mpo natosa mongongo na ye?” Kasi eumelaki te, ayebaki soki Yehova azali nani! (Kob. 5:1, 2; 9:16; 12:29) Na kokesana na bato wana, biso moko nde tondimaki koyeba Yehova. Tozali na esengo ya kobengama na nkombo na ye mpe kozala bato oyo batosaka ye. Yango wana, tondimaka mpenza ete elaka oyo ezali na Nzembo 9:10 ekokokisama mpenza; elaka yango elobi ete: “Baoyo bayebi nkombo na yo bakotyela yo motema, mpo okotika ata moke te baoyo balukaka yo, Ee Yehova.”

^ par. 5 Nkombo ya Nzambe euti na vɛrbɛ moko ya Ebre oyo elimboli “kokóma.” Na yango, “Yehova” elimboli “Ye oyo asalaka ete ekóma.”​—Eba. 2:4.

^ par. 13 Makomami ya Ebre oyo Bakristo ya liboso bazalaki kosalela ezalaki na Tetragrami, elingi koloba balɛtrɛ minei ya nkombo ya Nzambe na Ebre. Emonani ete Babiblia ya libosoliboso ya libongoli ya Septante, libongoli ya Grɛki ya Makomami ya Ebre, ezalaki mpe na Tetragrami.