Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mpo ozala na bomoi ya esengo​—Landá ndakisa ya Yesu

Mpo ozala na bomoi ya esengo​—Landá ndakisa ya Yesu

‘Tambolá ndenge Yesu atambolaki.’​—1 Yoane 2:6.

NDENGE tolobelaki yango na lisolo oyo eleki, Yesu azalaki na bomoi ya esengo. Na yango, soki tolingi mpenza kozala na bomoi ya esengo, ebongi tólanda ndakisa na ye mpe tóyoka toli na ye.

Kutu, ndenge vɛrsɛ oyo ezali awa na likoló emonisi yango, Yehova alingi tósala bongo. Kotambola ndenge Yesu atambolaki elimboli kolanda ndakisa mpe mateya na ye na bomoi na biso mobima. Soki tosali bongo, Nzambe akondima biso mpe tokozala na bomoi ya esengo.

Mateya ya Yesu ezalaki mpe na batoli oyo ekoki kosalisa biso tótambola ndenge ye atambolaki. Mingi ya batoli yango ezali na lisolo oyo asalaki likoló ya ngomba. Tótalela naino mwa batoli yango mpe ndenge oyo tokoki kosalela yango na bomoi na biso.

TOLI: “Esengo na baoyo bayebi bobola na bango ya elimo.”​—Matai 5:3.

NDENGE OYO TOLI YANGO ESALISAKA MOTO AZALA NA BOMOI YA ESENGO:

Yesu amonisaki ete moto akelamá na mposa ya koyeba Nzambe. Tolingaka mpenza kozwa biyano na mituna lokola oyo: Mpo na nini tozali awa na mabele? Mpo na nini bampasi etondi na mokili? Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na biso? Ezali na bomoi mosusu nsima ya liwa? Mpo tózala na bomoi ya esengo, tosengeli koyeba biyano ya mituna yango. Yesu ayebaki ete kaka Liloba ya Nzambe nde ekoki kopesa biso biyano. Ntango abondelaki Tata na ye, Yesu alobaki boye: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Liloba ya Nzambe ekoki mpenza kosalisa biso tóyeba Nzambe mpe tózala na esengo?

NDAKISA:

Lokola azalaki moyembi monene na orkɛstrɛ moko oyo eyebanaki mingi, etikalaki moke Esa akóma mobɛti monene ya miziki babengi rock. Ata bongo, Esa amonaki ete azali kozanga eloko moko. Alobi boye: “Atako kozala na orkɛstrɛ yango ezalaki kosepelisa ngai, mposa na ngai ezalaki ya kozala mpenza na bomoi ya esengo.” Na nsima, Esa akutanaki na Motatoli moko ya Yehova. Alobi lisusu boye: “Natunaki ye mituna ebele mpenza. Biyano ya Biblia oyo apesaki esimbaki motema na ngai, yango wana nandimaki ayekola na ngai Biblia.” Makambo oyo Esa ayekolaki na Biblia esimbaki motema na ye mpe etindaki ye amipesa na Yehova. Abakisi boye: “Kala, nazalaki ntango nyoso komilukela makambo mpe komikɔtisa na mobulu. Sikoyo bomoi na ngai ezali mpenza na ntina, mpe namonaka ete makambo nyonso ekómi na molɔngɔ.” *

TOLI: “Esengo na bato ya motema mawa.”​—Matai 5:7.

NDENGE OYO TOLI YANGO ESALISAKA MOTO AZALA NA BOMOI YA ESENGO:

Kozala motema mawa elimboli koyokela basusu mawa, kozala boboto mpe kotyela bango likebi. Yesu amonisaki motema mawa epai ya bato oyo bazalaki na mposa ya lisalisi. Mawa makasi oyo Yesu azalaki na yango etindaki ye asalisa baoyo bazalaki na mpasi. (Matai 14:14; 20:30-34) Soki tomekoli motema mawa ya Yesu, tokokóma lisusu na bomoi ya esengo, mpo baoyo bamoniselaka basusu motema mawa bazalaka na esengo. (Misala 20:35) Tokoki komonisela basusu motema mawa na misala mpe na maloba na biso ya boboto; kosunga baoyo bazali na mposa ya lisalisi na biso. Komonisa motema mawa ebakiselaka biso mpenza esengo?

Maria ná Carlos

NDAKISA:

Maria ná mobali na ye Carlos bazali ndakisa malamu na oyo etali komonisa motema mawa. Papa ya Maria azali mobali oyo mwasi akufá, mpe na bambula oyo euti koleka akɔtaki ndako. Maria ná Carlos bamemaki ye na ndako na bango mpe bazali kosalisa ye na makambo nyonso. Babutu mingi bazangaka mpɔngi; bamemaka ye kutu mbangu na lopitalo ntango maladi na ye ya diabɛti etombokaka. Balobi ete na bantango mosusu balɛmbaka mpenza. Kasi, kaka ndenge Yesu alobaki yango, bazali na esengo mpo bayebi ete bazali kopesa papa ya Maria lisungi oyo asengeli na yango.

TOLI: “Esengo na bato oyo batyaka kimya.”​—Matai 5:9.

NDENGE OYO TOLI YANGO ESALISAKA MOTO AZALA NA BOMOI YA ESENGO:

Kozala moto oyo atyaka kimya ebakisaka esengo. Na ndenge nini? Yango ekosala ete tózala na boyokani malamu ná bato oyo tofandi na bango. Na yango, ebongi mpenza tólanda toli oyo ya Biblia: “Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso.” (Baroma 12:18) “Bato nyonso” elingi koloba, bato ya libota na biso mpe bato mosusu oyo tozali na bango lingomba moko te. Kozala na kimya na “bato nyonso” ebakisaka mpenza esengo na bomoi na biso?

Nair

NDAKISA:

Tótalela ndakisa ya mwasi moko na nkombo Nair. Na boumeli ya bambula, akutanaki na makambo mingi oyo ekokaki kosala ete azala na mokakatano ya kotya kimya, mingimingi na libota na ye. Abɔkɔlaka bana ye moko eleki sikoyo mbula 15 banda mobali na ye asundola ye. Mwana na ye ya mobali akómaki moombo ya bangi mpe mbala mingi azalaki kosala mobulu mpe yango ezalaki kobangisa ye ná mwana na ye ya mwasi. Nair andimi ete makambo oyo ayekolaki na Biblia epesaki ye makasi ya kozala moto oyo atyaka kimya, ata na komekama ya ndenge wana. Atikaka te mikakatano etinda ye na koswana to kobunda. Asalaka makasi azala na boboto, amityaka na esika ya basusu mpe alimbisaka. (Baefese 4:31, 32) Amoni mpenza ete kozala moto oyo atyaka kimya esalisi ye ayokanaka malamu ná bato ya libota na ye mpe bato mosusu.

TALELÁ MPE MAPAMBOLI OYO TOKOZWA NA AVENIRE

Soki tolandi toli ya bwanya oyo Yesu apesaki, tokozala na esengo mpe tokosepela na oyo tozali na yango. Nzokande, mpo tózala mpenza na bomoi ya esengo, tosengeli mpe koyeba ndenge bomoi na biso ekozala na avenire. Kutu, ndenge nini bomoi na biso ekoki kozala na esengo soki tosuki kaka na koyeba ete nsukansuka tokonuna, tokobɛla mpe tokokufa? Yango nde makambo oyo ekómelaka biso na mokili oyo.

Kasi, ezali na nsango moko ya malamu! Yehova abombi mapamboli ebele mpo na baoyo nyonso basalaka makasi mpo na ‘kotambola ndenge Yesu atambolaki.’ Yehova alaki ete mosika te akotya mokili ya sika, epai bato ya sembo bakozala na bomoi oyo Yehova akanaki na ebandeli; bomoi ya seko na nzoto ya kokoka. Liloba na ye elobi boye: “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Maria, mama ya mbula 84 oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, asepelaka komona ndenge maloba wana ekokokisama. Bongo yo? Okosepela koyeba makambo mosusu etali “bomoi ya solosolo,” oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa bato? (1 Timote 6:19) Soki ɛɛ, okoki kotuna Batatoli ya Yehova na esika ofandi to komelá babimisi ya zulunalo oyo. *

^ par. 8 Okoki kotánga lisolo ya Esa na mobimba na yango na “Biblia ebongolaka bato​—Bizaleli na ngai ezalaki mabe mpenza”.

^ par. 18 Buku Biblia eteyaka mpenza nini?, oyo ebimisami na Batatoli ya Yehova esalisi bato mingi báyeba oyo Biblia elobi na makambo ndenge na ndenge.