Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Moto akoki koyeba Biblia?

Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Ezali lokola mokanda oyo euti epai ya tata moko ya bolingo. (2 Timote 3:16) Na Biblia, Nzambe amonisi ndenge oyo tokoki kosepelisa ye, ntina oyo atiki mabe ezala, mpe oyo akosala mpo na bato na mikolo ezali koya. Kasi, bateyi ya mangomba babebisá mateya ya Biblia, yango wana bato mingi bakómá kokanisa ete bakokoka ata moke te koyeba Biblia.​—Misala 20:29, 30.

Yehova Nzambe alingi tóyeba solo na ntina na ye. Yango wana, apesá biso buku oyo tokoki kokanga ntina na yango.​—Tángá 1 Timote 2:3, 4.

Ndenge nini okoki koyeba Biblia?

Yehova asuki kaka te na kopesa biso Biblia, asalisi biso mpe tóyeba yango. Atindaki Yesu mpo ateya biso. (Luka 4:16-21) Yesu azalaki kosalela bavɛrsɛ ndenge na ndenge mpo na kosalisa bayoki na ye bakanga ntina ya Makomami.​—Tángá Luka 24:27, 32, 45.

Yesu asalaki lisangá ya bokristo mpo mosala oyo abandisaki esuka na nzela te. (Matai 28:19, 20) Lelo oyo, bayekoli ya solosolo ya Yesu basalisaka bato báyeba oyo Biblia eteyaka mpo na Nzambe. Soki okosepela koyeba Biblia, Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo.​—Tángá Misala 8:30, 31.