Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Tempelo ya Yerusaleme etongamaki lisusu nsima ya mobu 70 T.B.?

YESU alobaki ete libanga moko te ya tempelo ya Yehova ekotikala likoló ya libanga mosusu; esakweli yango ekokisamaki ntango basoda ya Roma oyo Titus azalaki kokamba babebisaki Yerusaleme na mobu 70 T.B. (Mat. 24:2) Na nsima, amperɛrɛ Julien akanaki kotonga lisusu tempelo yango.

Julien abengamaki amperɛrɛ mopakano ya nsuka ya Roma. Julien azalaki mwana ya ndeko ya Constantin le Grand, mpe akolaki na mateya oyo bazalaki kobenga mateya ya bokristo. Kasi, ntango bakómisaki ye amperɛrɛ na mobu 361 T.B., amonisaki polele ete atiki kolanda mateya yango mpe lingomba ya bokristo ya ntango wana oyo esilaki kobeba, mpe akómaki mopakano. Babuku ya istware ebengaka ye “Mopɛngwi.”

Julien ayinaki mpenza lingomba ya bokristo. Ekoki kozala ete moko ya bantina oyo ayinaki yango ezali mpo ete ntango azalaki na mbula motoba, amonaki ndenge bakambi ya lingomba yango babomaki tata na ye mpe bandeko na ye. Bato ya mayele na istware ya mangomba balobaka ete Julien alendisaki Bayuda bátonga lisusu tempelo, na likanisi ete yango ekokaki kozala elembo mpo na komonisa ete Yesu azalaki mosakoli ya lokuta. *

Kasi ntembe ezali te ete Julien akanaki ete tempelo etongama lisusu. Bato ya mayele na istware balukaka nde koyeba soki abandaki mpenza mosala ya kotonga lisusu tempelo, mpe soki abandaki yango, nini esalaki ete atika yango. Kasi likambo oyo toyebi ezali ete Julien abomamaki liboso ete akokisa ata mbula mibale na bokonzi na ye, mpe likanisi oyo azalaki na yango ya kotonga lisusu tempelo ekokisamaki te.

Tempelo, ndenge ekokaki komonana na mikolo ya Yesu, mpe ndenge oyo esika yango ekómá lelo

^ par. 5 Yesu alobaki te ete tempelo ekotongama lisusu te; alobaki nde ete ekobebisama, mpe yango esalemaki na mobu 70 T.B.