Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bitumbu ya Nzambe​—Emonisaki nde ete azali motema mabe?

Bitumbu ya Nzambe​—Emonisaki nde ete azali motema mabe?

MPO na kozwa eyano na motuna oyo, tótalela mwa moke bandakisa mibale ya bitumbu ya Nzambe oyo Biblia elobeli​—Mpela ya ntango ya Noa mpe kobomama ya Bakanana.

MPELA YA NTANGO YA NOA

OYO BATO BALOBAKA: “Nzambe asalaki mabe ntango atindaki mpela oyo ebomaki bato nyonso, longola kaka Noa ná libota na ye.”

OYO BIBLIA ELOBI: Nzambe alobaki boye: “Nasepelaka na liwa ya moto mabe te, nasepelaka nde ete moto mabe abongwana, atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.” (Ezekiele 33:11) Na yango, kobomama ya bato mabe na ntango ya Noa esepelisaki Nzambe ata moke te. Kasi, mpo na nini asalaki bongo?

Biblia eyanoli ete etumbu oyo Nzambe apesaki bato mabe na ntango ya kala, ezalaki mpo na ‘kopesa bato oyo batyolaka Nzambe ndakisa ya makambo oyo ekoya.’ (2 Petro 2:5, 6) Ndakisa nini Nzambe apesaki?

Ya liboso, Nzambe amonisaki ete atako koboma bato mabe esalaka ye mpasi, atyelaka bango likebi mpe apesaka bango etumbu mpo na mabe na bango. Mosika te, akosukisa makambo nyonso ya kozanga bosembo mpe minyoko.

Ya mibale, bitumbu oyo Nzambe apesaki bato na ntango ya kala emonisi ete na bolingo nyonso, akebisaka bato liboso ya kopesa etumbu. Noa azalaki mosakoli ya boyengebene, kasi bato mingi bakipaki ye te. Biblia elobi boye: “Batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:39.

Nzambe asalaka kaka bongo? Ɛɛ. Na ndakisa, akebisaki Bayisraele ete soki bakómi kosala mabe lokola bikólo oyo ezali zingazinga na bango, akotika banguna bábɔtɔla mabele na bango, bábebisa Yerusaleme mboka-mokonzi ya ekólo na bango, mpe bámema bango na mboka mopaya. Bayisraele bakómaki kosala mabe; ata mpe kotumba bana na bango mbeka. Yehova apesaki bango etumbu? Ɛɛ, kasi liboso ya kosala yango, atindaki basakoli mbala na mbala mpo na kokebisa bato na ye bátika misala na bango ya mabe. Kutu alobaki boye: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso akosala eloko moko te kozanga ete amonisa likambo na ye ya nkuku epai ya basaleli na ye basakoli.”​—Amose 3:7.

YANGO ETALI MPE YO: Ndenge oyo Yehova apesaki bato etumbu na ntango ya kala epesi biso elikya. Tokoki mpenza kozela na motema likoló mokolo oyo Nzambe akopesa etumbu na baoyo babimiselaka basusu minyoko na nko nyonso. Biblia elobi ete: “Basali-mabe bakobomama . . . Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.” (Nzembo 37:9-11) Okanisi nini mpo na etumbu oyo ekosilisa mpasi ya bato? Ezali mabe to malamu?

KOBOMAMA YA BAKANANA

OYO BATO BALOBAKA: “Kobomama ya Bakanana ezalaki etumba moko mabe oyo ekokani na ndenge bato ya lelo babomaka bato ya ekólo moko mpo na kosilisa bango.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Banzela nyonso [ya Nzambe] ezali bosembo. [Azali] Nzambe moko ya bosembo epai na ye kozanga bosembo ezali te.” (Kolimbola Mibeko 32:4) Etumbu ya Nzambe ekeseni na bitumba ya bato. Mpo na nini? Mpo Nzambe akeseni na bato, azali na likoki ya koyeba oyo ezali na motema ya moto.

Na ndakisa, ntango Nzambe asambisaki engumba ya Sodoma mpe ya Gomora mpe azwaki ekateli ya kobebisa yango, Abrahama moto ya sembo alingaki koyeba soki ekateli ya Nzambe ezalaki sembo. Amonaki ete ekoki kosalema te ete Nzambe na ye, oyo azali sembo ‘aboma moyengebene elongo na moto mabe.’ Na motema molai nyonso, Nzambe ayebisaki ye ete soki bato ata zomi ya sembo bazalaki na Sodoma, akobikisa engumba yango mpo na bango. (Ebandeli 18:20-33) Emonani polele ete Nzambe atalaki mitema ya bato yango mpe amonaki ete bazalaki mpenza mabe.​—1 Ntango 28:9.

Ndenge moko mpe, Nzambe amonaki ete bato ya Kanana bazalaki mabe yango wana apesaki mitindo ete bábomama. Bakanana bazalaki mabe mpenza, bazalaki kotumba bana na bango na bomoi mpo na kopesa bambeka. * (2 Bakonzi 16:3) Bakanana bayebaki ete Yehova apesaki Bayisraele mitindo ete bázwa mokili wana mobimba. Baoyo bamonaki malamu bátikala mpo na kobunda, bazalaki nde kotɛmɛla na nko nyonso kaka Bayisraele te, kasi mpe Yehova oyo amonisaki polele ete azalaki elongo na bato na ye.

Lisusu, Nzambe amonisaki motema mawa epai ya Bakanana oyo batikaki misala na bango ya mabe mpe bandimaki kotosa mibeko ya Yehova. Na ndakisa, abikisaki Mokanana moko na nkombo Rahaba, oyo azalaki mwasi ya ndumba ná libota na ye. Longola yango, ntango bato ya engumba Gibeone balukaki bámonisela bango motema mawa, bango nyonso ná bana na bango babomamaki te.​—Yosua 6:25; 9:3, 24-26.

YANGO ETALI MPE YO: Tokoki kozwa liteya monene na etumbu oyo Nzambe apesaki Bakanana. “Mokolo ya kosambisama mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe,” oyo esakolamaki ekómi mpenza pene. (2 Petro 3:7) Soki tolingaka Yehova, tokozwa mapamboli ntango akoboma baoyo baboyaka boyangeli na ye ya sembo mpe akosilisa bampasi awa na mabele.

Bakanana bazalaki mabe mpenza, mpe na nko nyonso, batɛmɛlaki Nzambe mpe bato na ye

Na bolingo nyonso, Yehova azali koyebisa biso ete bikateli oyo baboti bazwaka ekoki komemela bana na bango bolamu to te. Biblia elobi boye: “Osengeli kopona bomoi mpo otikala na bomoi, yo ná bana na yo, na kolingáká Yehova Nzambe na yo, koyokáká mongongo na ye mpe kokangamáká na ye.” (Kolimbola Mibeko 30:19, 20) Maloba wana ezali ya Nzambe ya motema mabe to ya Nzambe oyo alingaka bato mpe alingaka ete bázwa ekateli ya malamu?

^ par. 15 Bato ya arkeoloji bakundolaki biloko oyo emonisi ete Bakanana bazalaki mpe kopesa bana mike mbeka na losambo na bango.