Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu

Kokisá mokumba na yo ya mopalanganisi ya nsango malamu

“Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo malamumalamu.”​—2 TIM. 4:5.

1. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azali Mopalanganisi ya nsango malamu ya libosoliboso?

MOPALANGANISI ya nsango malamu ezali moto oyo ayebisaka nsango malamu. Mopalanganisi ya nsango malamu ya libosoliboso ezali Yehova Nzambe. Mbala moko nsima ya botomboki ya baboti na biso ya liboso, Yehova ayebisaki nsango malamu oyo: nyoka, elingi koloba Satana Zabolo, akobomama. (Eba. 3:15) Na boumeli ya bankama ya bambula, Yehova apesaki mibali ya sembo elimo na ye mpo bákoma makambo mosusu oyo emonisi ndenge oyo akolongola nsɔni oyo ebwakamaki na nkombo na ye, ndenge akosilisa makambo nyonso ya mabe oyo Satana abimisá, mpe ndenge oyo bato bakoki kozwa lisusu mapamboli oyo Adama ná Eva babungisaki.

2. (a) Mokumba nini baanzelu bazali na yango na mosala ya kopalanganisa nsango malamu? (b) Ndakisa nini Yesu apesaki mpo na bapalanganisi ya nsango malamu?

2 Baanzelu mpe bazali bapalanganisi ya nsango malamu. Bango moko bayebisaka nsango malamu, mpe basalisaka basusu na mosala ya kopalanganisa nsango malamu. (Luka 1:19; 2:10; Mis. 8:26, 27, 35; Em. 14:6) Bongo Mikaele, anzelu-mokonzi? Ntango ayaki awa na mabele, bapesaki ye nkombo Yesu; azalaki kotya mosala ya kopalanganisa nsango malamu na esika ya liboso na bomoi na ye. Na ndenge yango, apesaki ndakisa oyo bapalanganisi mosusu ya nsango malamu basengeli kolanda.​—Luka 4:16-21.

3. (a) Nsango malamu nini topalanganisaka? (b) Mituna nini ezali na ntina mingi mpo na biso bapalanganisi ya nsango malamu?

3 Yesu apesaki bayekoli na ye etinda ya kozala bapalanganisi ya nsango malamu. (Mat. 28:19, 20; Mis. 1:8) Ntoma Paulo alendisaki moninga na ye ya mosala Timote ete: “Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu, kokisá mosala na yo malamumalamu.” (2 Tim. 4:5) Nsango malamu nini biso bayekoli ya Yesu topalanganisaka? Nsango yango esangisi mateya ya solo lokola oyo elobi ete Yehova, Tata na biso ya likoló, alingaka biso. (Yoa. 3:16; 1 Pe. 5:7) Bokonzi ya Nzambe ezali komonisa ete Yehova alingaka mpenza bato. Yango wana, toyebisaka basusu na esengo nyonso ete soki bandimi ete Bokonzi yango eyangela bango, bazali kotosa Nzambe, mpe kosala oyo ezali sembo, bakoki kokóma na boyokani malamu ná ye mpe kozala baninga na ye. (Nz. 15:1, 2) Kutu, Yehova azali na mokano ya kolongola bampasi nyonso mpe makambo nyonso ya kozanga bosembo. Akolongola mpe mpasi oyo euti na basuvenire mabe ya makambo oyo eleká. Yango ezali mpenza nsango malamu! (Yis. 65:17) Lokola tozali bapalanganisi ya nsango malamu, tosengeli koluka kozwa biyano na mituna mibale oyo ya ntina mingi: Mpo na nini ezali na ntina ete bato báyoka nsango malamu lelo oyo? Mpe ndenge nini tokoki kokokisa malamu mokumba na biso ya bapalanganisi ya nsango malamu?

MPO NA NINI BATO BASENGELI KOYOKA NSANGO MALAMU?

Kosalela malamu mituna esalisaka bato báyeba bango moko ntina oyo bandimaka liteya boye to boye

4. Makambo nini ya lokuta bato balobaka mpo na Nzambe?

4 Kanisá ete bayebisi yo ete tata na yo asundolá yo ná bandeko na yo mosusu. Bato oyo batutaka ntolo oyo bayebi tata na yo balobi ete azalaki kokipe bino te, azalaki kobombela bino makambo na ye, mpe azalaki konyokola bino. Basusu kutu bayebisi yo ete ezali na ntina te oluka tata na yo mpamba te asilá kokufa. Bayebisá bato mingi makambo ya ndenge wana mpo na Nzambe. Bateyá bango ete Nzambe azali libombami, bato bakoki koyeba ye te, mpe anyokolaka bato. Na ndakisa, bakambi mosusu ya mangomba balobaka ete Nzambe akopesa bato mabe etumbu ya seko na lifelo ya mɔtɔ. Basusu balobaka ete Nzambe nde abimiselaka bato bampasi oyo eutaka na makama lokola mopɛpɛ makasi, mpela to koningana ya mabele. Atako makama yango ebomaka ná bato malamu ná bato mabe, balobaka ete ezali etumbu oyo euti epai ya Nzambe.

Mituna efungolaka makanisi mpe mitema na bango mpo bándima mateya ya solo

5, 6. Ndenge nini liteya ya evolisyo mpe mateya mosusu ya lokuta ebungisi bato nzela?

5 Bato mosusu balobaka ete Nzambe azali te. Na likambo yango, tózwa ndakisa ya liteya ya evolisyo. Bato mingi oyo bandimaka liteya yango balobaka ete bomoi ebimaki kaka yango moko kozanga ete moto moko ya mayele akela yango. Balobaka ete Mozalisi azali te. Bato mosusu kutu balobaka ete moto autá nde na nyama, yango wana tokoki kokamwa te soki moto moko azali kosala makambo mosusu lokola nyama. Balobaka ete bato oyo bazali na nguya banyokolaka baoyo bazali na nguya te mpo balandaka oyo babengaka mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́. Na yango, tokoki kokamwa te soki bato mingi bakanisaka ete kozanga bosembo ekosila te. Yango wana, bato oyo bandimelaka liteya ya evolisyo bazangi elikya ya solosolo.

6 Na ntembe te, liteya ya evolisyo mpe mateya mosusu ya lokuta ezali na kati ya makambo oyo ezali kobakisela bato mpasi na mikolo oyo ya nsuka. (Rom. 1:28-31; 2 Tim. 3:1-5) Mateya wana, oyo euti epai ya bato, ememeli bato nsango malamu ya solosolo mpe ya libela te. Kutu, ndenge ntoma Paulo amonisi yango, esali nde ete bato bákóma ‘na molili na makanisi, mpe bátangwa mosika na bomoi ya Nzambe.’ (Ef. 4:17-19) Longola yango, liteya ya evolisyo mpe mateya mosusu ya lokuta epekisi bato bándima nsango malamu oyo euti epai ya Nzambe.​—Tángá Baefese 2:11-13.

Mituna esalisaka bato bákanisa malamu mpo na kozwa bango moko bikateli ya malamu

7, 8. Wapi lolenge kaka moko oyo bato bakoki kokanga mpenza ntina ya nsango malamu?

7 Mpo bato bázonga lisusu na boyokani ná Nzambe, basengeli liboso kondima ete Yehova azali mpe ete ezali na bantina oyo basengeli kopusana penepene na ye. Tokoki kosalisa bango bázwa boyebi yango soki tozali kolendisa bango bátalela biloko oyo Nzambe akelá. Soki bato bazali koyekola biloko oyo Yehova Nzambe akelá na mokano ya koyeba ye malamumalamu, bakokanga ntina ya bwanya na ye mpe nguya na ye. (Rom. 1:19, 20) Mpo na kosalisa bato báyekola kobanga Nzambe ntango bazali kokanisa na makambo oyo Mozalisi na biso Monene asalá, tokoki kosalela mwa babuku oyo mibale: La vie a-t-elle été créée? mpe Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie. Atako bongo, bato oyo bayekolaka kaka na nzela ya biloko oyo Nzambe akelá bakoki te kozwa biyano na mituna mosusu oyo etali bomoi, oyo etungisaka bato mingi, na ndakisa: Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala? Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini? Nzambe amibanzabanzaka mpenza mpo na mokomoko na biso?

8 Lolenge kaka moko oyo bato bakoki mpenza kokanga ntina ya nsango malamu oyo etali Nzambe mpe mokano na ye ezali koyekola Biblia. Tozali mpenza na libaku malamu ya kosalisa bato bázwa biyano na mituna na bango! Kasi, mpo na kosimba mitema ya bayoki na biso, tosengeli kosuka kaka te na koyebisa bango makambo; tosengeli kosalela mayele ya kondimisa. (2 Tim. 3:14) Tokoki kokolisa makoki na biso ya kosalisa bato bándima bosolo ya makambo soki tolandi ndakisa ya Yesu. Nini ezalaki kosalisa Yesu andimisa bayoki na ye? Moko ya makambo oyo ezalaki kosalisa ye ezali ete azalaki kosalela malamu mituna. Ndenge nini tokoki komekola ye?

BAPALANGANISI YA NSANGO MALAMU OYO BAMESANI NA MOSALA BASALELAKA MALAMU MITUNA

9. Mpo tókoka kosalisa bato na elimo, tosengeli kosala nini?

9 Mpo na nini, na ndakisa ya Yesu, tosengeli kosalela mituna na mosala ya kosakola? Tózwa ndakisa oyo: Monganga ayebisi yo ete azali na nsango malamu mpo na yo: Akoki kosilisa maladi na yo soki ondimi básala yo lipaso moko ya monene. Mbala mosusu okondimela ye. Kasi ekozala boni soki alaki yo likambo yango liboso kutu atuna yo mituna na oyo etali bokolɔngɔnɔ ya nzoto na yo? Na ntembe te, ekozala mwa mpasi ondimela ye. Ata soki monganga yango ayebi mosala ndenge nini, asengeli naino kotuna mituna mpe koyoka yo ntango ozali koyebisa ye ndenge oyo ozali komiyoka liboso ete apesa yo nkisi to lisalisi oyo esengeli. Ndenge moko mpe, soki tolingi kosalisa bato bándima nsango malamu ya Bokonzi, tosengeli kokolisa makoki na biso ya kotuna mituna oyo ebongi. Tokoki kosalisa bango kaka soki toyebi naino malamumalamu mikakatano ya elimo oyo bazali na yango.

Mpo na kosimba mitema ya bayoki na biso, tosengeli kosalela mayele ya kondimisa

10, 11. Makambo nini tokoki kosala soki tomekoli ndenge oyo Yesu azalaki koteya?

10 Yesu ayebaki ete mituna ya malamu esalisaka moteyi ayeba makanisi ya moyekoli, mpe esalisaka moyekoli amikɔtisa na lisolo. Na ndakisa, ntango Yesu alingaki koteya bayekoli na ye komikitisa, atunaki bango liboso motuna moko oyo etindaki bango bákanisa. (Mrk. 9:33) Mpo na koteya Petro ndenge ya kotalela mitinda ntango azali kokanisa, Yesu atunaki ye motuna moko oyo asengelaki kopona eyano ya malamu kati na biyano mibale. (Mat. 17:24-26) Na libaku mosusu, ntango Yesu alingaki koyeba oyo ezalaki na mitema ya bayekoki na ye, atunaki bango mituna mingi mpo na koyeba makanisi na bango. (Tángá Matai 16:13-17.) Ntango Yesu azalaki kosalela mituna mpe koloba makambo, azalaki kosuka kaka te na koyebisa bato makambo. Azalaki kosimba mitema ya bato mpe kolendisa bango básala makambo oyo eyokani na nsango malamu.

11 Ntango tolandaka ndakisa ya Yesu na ndenge tosalelaka malamu mituna, yango esalisaka biso na lolenge misato. Toyebaka lolenge malamu ya kosalisa bato, toyebaka ndenge ya koloba soki moto abimisi ntembe, mpe tosalisaka bato ya komikitisa báyeba ndenge ya kozwa matomba na makambo oyo bazali koyekola. Tótalela bandakisa misato oyo emonisi ndenge oyo tokoki kosalela malamu mituna.

12-14. Ndenge nini okoki kosalisa mwana na yo akakatana te ntango azali kosakola nsango malamu? Pesá ndakisa.

12 Ndakisa ya 1: Soki ozali moboti, okosala nini soki mwana na yo atuni yo ndenge oyo akoki komonisa ntina oyo andimaka ete Nzambe nde moto akelá biloko nyonso, ntango azali kosolola na moninga moko ya kelasi? Na ntembe te, okosepela kosalisa ye mpo akakatana te ntango azali kosakola nsango malamu. Yango wana, na esika opamela ye to opesa ye mbala moko toli, mpo na nini te kolanda ndakisa ya Yesu mpe kotuna ye mwa mituna oyo ekotinda ye apesa makanisi na ye? Ndenge nini okoki kosala yango?

13 Nsima ya kotánga elongo na mwana na yo baparagrafe mosusu ya mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie, okoki kotuna ye makanisi nini amoni ete ekoki mpenza kotinda moto akanisa. Lendisá ye aluka bantina oyo ye moko andimaka ete Mozalisi azali mpe mpo na nini azali na mposa ya kosala mokano ya Nzambe. (Rom. 12:2) Yebisá mwana na yo ete esengeli kaka te ete makanisi na ye ekokana ná oyo ya yo.

14 Limbolelá mwana na yo ete ntango azali kosolola na moninga na ye ya kelasi, akoki kolanda ndenge oyo outi kosala. Yango elingi koloba ete akoki kolobela mwa makambo oyo emonisi ete Mozalisi azali, na nsima akoki kotuna mituna oyo ekosalisa moninga ya kelasi azwa eyano oyo ebongi to abimisa makanisi na ye. Na ndakisa, akoki kosɛnga moninga na ye ya kelasi atánga etanda oyo ezali na lokasa 21 ya mwa buku Origine de la vie. Na nsima mwana na yo akoki kotuna ye boye: ‘Oyebi ete tii lelo oyo ordinatɛrɛ moko te ezali na likoki ya kobomba ebele ya makambo lokola oyo ADN ekoki kobomba?’ Ntango mosusu moninga na ye ya kelasi akoloba ‘Ɛɛ.’ Na nsima, mwana na yo akoki kotuna ye boye: ‘Soki bato ya mayele bakoki te kosala ordinatɛrɛ oyo ezali na makoki ya ndenge wana, ndenge nini eloko oyo ezali na makoki yango ekokaki kosalema yango moko?’ Mpo na kosalisa mwana na yo akakatana te ntango azali koyebisa basusu bindimeli na ye, okoki mbala na mbala kosala bilakiseli elongo na ye. Soki opesi ye formasyo mpo ayeba kosalela malamu mituna, okosalisa ye akokisa malamu mokumba na ye ya mopalanganisi ya nsango malamu.

15. Ndenge nini tokoki kosalela mituna mpo na kosalisa moto oyo andimaka te ete Nzambe azali?

15 Ndakisa ya 2: Ntango topesaka litatoli, tokutanaka na bato mosusu oyo bandimaka te ete Nzambe azali. Na ndakisa, moto akoki koyebisa biso ete andimaka te ete Nzambe azali. Na esika tótika ete yango ekata lisolo, tokoki kotuna ye na limemya nyonso banda ntango nini andimaka te ete Nzambe azali mpe nini etindaki ye akóma na likanisi yango. Nsima ya koyoka biyano na ye mpe kopesa ye longonya na ndenge azwaki ntango ya kokanisa malamumalamu likambo yango, tokoki kotuna ye soki akosepela te kotánga mokanda moko oyo elobeli bilembeteli oyo emonisi ete bomoi ezalisamaki. Soki moto yango azali na mposa ya koyeba, na ntembe te, akoloba ete koboya kotalela bilembeteli ya ndenge wana ezali kozanga bwanya. Na ntango wana, tokoki kopesa ye mwa buku La vie a-t-elle été créée? to mwa buku Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie. Kotuna mituna na mayele mpe na boboto ekoki kosalisa biso tófungola motema ya moto mpo ayoka nsango malamu.

16. Mpo na nini tosengeli te kotika moyekoli ya Biblia asuka kaka na kotánga biyano oyo ezali na mokanda oyo tozali koyekola ná ye?

16 Ndakisa ya 3: Ntango tozali koyekola na moto Biblia, moyekoli akoki mbala mosusu kosuka kaka na kotánga biyano oyo ekomami na mokanda oyo tozali koyekola ná ye. Kasi soki totiki moyekoli yango kaka bongo, tokosalisa ye te akola na elimo. Mpo na nini? Mpamba te ekozala mpasi ete moyekoli oyo azali kaka kotánga biyano ya paragrafe kozanga komanyola yango, azwa mpenza misisa na elimo. Ekoki kozala mpasi mpo moyekoli ya ndenge wana akoba kokangama na mateya ya solo soki batɛmɛli ye. (Mat. 13:20, 21) Mpo likambo ya ndenge wana ekómela moyekoli te, tosengeli kotunaka ye ndenge oyo azali kotalela makambo oyo azali koyekola. Luká koyeba soki andimi makambo oyo boyekoli. Oyo eleki ntina, sɛngá ye aloba mpo na nini andimi to aboyi kondima liteya moko. Na nsima, salisá ye ayeba kosalela Makomami mpo akóma na makoki ya kozwa ye moko biyano oyo ebongi. (Ebr. 5:14) Soki tozali kosalela malamu mituna, tokosalisa bato oyo tozali koteya bápikama makasi na kondima mpe bákwea te liboso ya baoyo bazali koluka kotɛmɛla bango to kobungisa bango nzela. (Kol. 2:6-8) Likambo nini mosusu tokoki kosala mpo tókokisa mokumba na biso ya bapalanganisi ya nsango malamu?

BAPALANGANISI YA NSANGO MALAMU OYO BAMESENI NA MOSALA BASALISANAKA

17, 18. Ntango tozali kosakola elongo na ndeko mosusu, ndenge nini tokoki kosalisana?

17 Yesu atindaki bayekoli na ye mibalemibale na mosala ya kosakola. (Mrk 6:7; Luka 10:1) Na nsima, ntoma Paulo alobelaki ‘baninga na ye ya mosala’ oyo “babomaki nzoto elongo na [ye] mpo na nsango malamu.” (Flp. 4:3) Na boyokani na likambo yango oyo Makomami elobeli, na 1953, Basakoli ya Bokonzi babandisaki programɛ moko ya kopesa basusu formasyo na mosala ya kosakola.

18 Ntango ozali kosakola elongo na ndeko mosusu, ndenge nini bokoki kosalisana? (Tángá 1 Bakorinti 3:6-9.) Luká na Biblia na yo bavɛrsɛ oyo moninga na yo ya mosala azali kosalela. Tyáká likebi ntango azali koloba to ntango moto oyo bozali kosolola na ye azali koloba. Landáká malamu lisolo mpo oyeba soki esɛngi ete osalisa moninga na yo ya mosala asilisa ntembe moko. (Mos. 4:12) Kasi osengeli kokeba na motambo ya kokata moninga maloba ntango azali komema lisolo na ndenge ya malamu. Kozanga komipekisa na yo ekoki kolɛmbisa moninga na yo ya mosala mpe kobulunganisa moyekoli. Ezali solo ete na bantango mosusu, ekoki kozala malamu opesa likanisi na yo. Kasi soki olingi koloba likambo, osengeli kosuka na likanisi moko to makanisi mibale ya mokuse. Na nsima, tiká moninga na yo ya mosala akoba na lisolo.

19. Likambo nini tosengeli kobosana te, mpe mpo na nini?

19 Ndenge nini yo ná moninga na yo ya mosala bokoki kosalisana nzelanzela ntango bozali kosakola ndako na ndako? Mpo na nini te kosalela ntango yango mpo na kolobela ndenge oyo bokoki kobongisa lisusu lolenge ya kosolola na bato? Osengeli kokeba ete makambo oyo ozali koloba mpo na bato ya teritware na bino elɛmbisa bino nzoto te. Tosengeli mpe kokeba ete tókwea te na motambo ya kolobela ntango nyonso mabunga ya bapalanganisi mosusu ya nsango malamu. (Mas. 18:24) Tosengeli kobosana te ete tozali bambɛki ya mabele. Yehova amoniselá biso boboto monene na ndenge apesá biso mosala ya kosakola nsango malamu, oyo ezali na motuya mingi. (Tángá 2 Bakorinti 4:1, 7.) Na yango, tiká ete biso nyonso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kokokisa mokumba na biso ya bapalanganisi ya nsango malamu, mpo na komonisa ete tozali na botɔndi mpo na eloko yango ya motuya.