Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali na “molende na misala ya malamu”?

Ozali na “molende na misala ya malamu”?

“Kristo Yesu . . . amipesaki mpo na biso mpo . . . apɛtola mpo na ye bato oyo bazali bato na ye moko, oyo bazali na molende na misala ya malamu.”​—TITO 2:13, 14.

1, 2. Lokumu nini ya monene Batatoli ya Yehova bazali na yango, mpe ndenge nini otalelaka yango?

BATO mingi bamonaka ete kozwa mbano mpo na likambo moko ya ntina mingi oyo basalaki ezali lokumu monene. Na ndakisa, bato mosusu bazwaki mbano oyo babengi Prix Nobel mpo basalaki milende mingi mpo na kozongisa kimya kati na bikólo mibale oyo ezalaki koyokana te. Nzokande, kozala ambasadɛrɛ to motindami ya Nzambe mpo na kosalisa bato bákóma na boyokani malamu ná Mozalisi na bango ezali lokumu monene koleka!

2 Biso Batatoli ya Yehova tozali na lokumu wana monene. Nzambe ná Yesu bazali kokamba biso ntango tozali kobondela bato ete ‘bázonga na boyokani elongo na Nzambe.’ (2 Ko. 5:20) Yehova azali kosalela biso mpo na kobenda bato epai na ye. Yango nde esali ete bamilio ya bato na mikili koleka 235 bákóma na boyokani malamu ná Nzambe, mpe bázwa elikya ya bomoi ya seko. (Tito 2:11) Na molende mpenza, tozali kobenga “moto nyonso oyo alingi, akamata mai ya bomoi ofele.” (Em. 22:17) Lokola tozwaka mokumba wana na motuya mingi mpe tokokisaka yango na molende, tobongi mpenza kobengama bato oyo “bazali na molende na misala ya malamu.” (Tito 2:14) Tótalela sikoyo ndenge oyo molende na biso na misala ya malamu esalisaka biso tóbenda bato epai ya Yehova. Lolenge moko oyo tosalaka yango ezali na nzela ya mosala ya kosakola.

MEKOLÁ MOLENDE YA YEHOVA MPE YA YESU

3. “Molende mpenza ya Yehova” emonisi biso nini?

3 Yisaya 9:7 elobeli makambo oyo boyangeli ya Mwana ya Nzambe ekosala, na maloba oyo: “Molende mpenza ya Yehova ya mampinga nde ekosala yango.” Maloba wana emonisi ete Tata na biso ya likoló azali mpenza na mposa ete bato bábika. Molende oyo Yehova Nzambe azali na yango emonisi polele ete tosengeli kokokisa mosala ya kosakola Bokonzi oyo apesi biso na motema mobimba, na esengo, mpe na molende. Soki tozali na mposa makasi ya kosalisa bato báyeba Nzambe, tokomonisa ete tozali komekola molende ya Yehova. Na yango, lokola tozali baninga ya mosala ya Nzambe, mokomoko na biso asengeli kozala na ekateli ya kosakola nsango malamu lisusu mingi koleka soki makambo ya bomoi na ye epesi ye nzela, boye te?​—1 Ko. 3:9.

4. Ndenge nini Yesu apesaki ndakisa ya kozala ntango nyonso na molende na mosala ya kosakola?

4 Tótalela mpe molende ya Yesu. Apesaki ndakisa eleki malamu na ndenge azalaki kosakola na molende. Atako batɛmɛlaki ye makasi mpe balingaki koboma ye, azalaki kaka na molende na mosala ya kosakola, tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. (Yoa. 18:36, 37) Ntango Yesu ayebaki ete etikali moke akufa lokola mbeka, amipesaki lisusu mingi mpo na kosalisa basusu báyeba Yehova.

5. Ndenge nini Yesu asalaki makambo lokola mosali-bilanga oyo alobelaki na ndakisa ya nzete ya figi?

5 Na ndakisa, pene na nsuka ya mobu 32 T.B., Yesu apesaki ndakisa ya moto moko oyo, na elanga na ye, azalaki na nzete ya figi oyo ezalaki kobota mbuma te na boumeli ya mbula misato. Ntango ayebisaki mosali-bilanga akata nzete yango, mosali-bilanga asɛngaki ete atikela ye mwa ntango mpo atya bipɔli zingazinga na yango. (Tángá Luka 13:6-9.) Na ntango wana, kaka bato moke nde basilaki kokóma bayekoli ya Yesu. Kasi ndenge ndakisa wana ya mosali-bilanga emonisi, Yesu asalelaki ntango mokuse oyo etikalaki​—soki sanza motoba—​mpo na kosakola lisusu mingi na Yudea mpe na Perea. Mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Yesu alelaki mpo na bato ya ekólo na ye oyo ‘matoi na bango eyokaki kasi basalaki eloko te.’​—Mat. 13:15; Luka 19:41.

6. Mpo na nini tosengeli kosakola lisusu mingi?

6 Lokola nsuka ekómi mpenza pene, ezali na ntina mingi ete tóbakisa milende na mosala ya kosakola. (Tángá Danyele 2:41-45.) Kozala Batatoli ya Yehova ezali mpenza libaku malamu! Na mabele mobimba, kaka biso nde tozali kosalisa bato bázala na elikya ete mikakatano na bango nyonso ekosila. Na mikolo euti koleka, mopanzi-nsango moko alobaki ete eyano ezali te mpo na motuna oyo: “Mpo na nini makambo ya mabe ekómelaka bato malamu?” Lokola tozali bakristo, tozali na mokumba mpe libaku malamu ya koyebisa bato nyonso oyo bandimaka koyoka biso biyano oyo Biblia epesi na mituna ya ndenge wana. Tosengeli mpenza ‘kopela na elimo’ ntango tozali kokokisa mokumba wana oyo Nzambe apesi biso. (Rom. 12:11) Na lipamboli ya Nzambe, molende na biso na mosala ya kopalanganisa nsango malamu ekoki kosalisa basusu báyeba Yehova mpe bálinga ye.

ELIMO YA KOMIPIMELA EKUMISAKA YEHOVA

7, 8. Ndenge nini elimo ya komipimela ekumisaka Yehova?

7 Ndenge ndakisa ya ntoma Paulo emonisi yango, mosala na biso ya kosakola ekoki mbala mosusu kosɛnga ete tólekisa “babutu kozanga mpɔngi” mpe “bantango ya kozanga bilei.” (2 Ko. 6:5) Maloba wana elimboli malamu elimo ya komipimela mpe ekundweli biso ndenge oyo babongisi-nzela batyaka mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na bango, atako basalaka mpe misala mosusu mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Tóbosana mpe te bamisionɛrɛ, oyo ‘bamipesaka lokola likabo ya masanga oyo bazali kosopela mbeka’ mpo na kosalisa bato na mikili mosusu. (Flp. 2:17) Bongo tokoloba nini mpo na bankulutu oyo basalaka mosala makasi, oyo na bantango mosusu bamipimelaka bilei to mpɔngi mpo na kobatela bampate ya Yehova? Tozali mpe na mibange mpe bandeko oyo maladi ezali kotungisa bango, oyo basalaka makasi mpo na koyangana na makita ya lisangá mpe kobima na mosala ya kosakola. Mitema na biso etondaka na esengo ntango tokanisaka basaleli wana nyonso ya Nzambe, oyo bamonisaka elimo ya komipimela. Milende wana etindaka basusu bámona ete mosala ya kosakola ezali na ntina mingi mpo na biso.

8 Na Royaume-Uni, moto moko oyo azali Motatoli te atindelaki babimisi ya zulunalo moko (Boston Target) mokanda. Na mokanda yango, akomaki boye: “Bato bazali kondimela lisusu mangomba te . . . Mosala nini basango ná bapastɛrɛ wana basalaka mokolo mobimba? Babimaka te mpo na kokende kokutana ná bato ndenge Kristo azalaki kosala . . . Emonani ete lingomba kaka moko oyo esalaka mosala yango ezali Batatoli ya Yehova, oyo babimaka mpo na kosolola na bato mpe bamipesaka mpenza mpo na kosakola solo.” Na mokili oyo bato mingi balukaka kaka matomba na bango moko, elimo na biso ya komipimela ekumisaka mingi Yehova Nzambe.​—Rom. 12:1.

Ntango bato bazali komona yo na mosala ya kosakola, litatoli monene ezali kopesama

9. Nini ekoki kotinda biso tókoba kozala na molende mpo na misala ya malamu na mosala na biso ya kosakola?

9 Kasi, tokoki kosala nini soki tomoni ete molende na biso mpo na mosala ya kosakola ebandi kokita? Kokanisa na mozindo na makambo oyo Yehova azali kosala na nzela ya mosala ya kosakola ekosalisa biso mingi. (Tángá Baroma 10:13-15.) Mpo bato bábika, basengeli kobelela nkombo ya Yehova na kondima; kasi bakosala yango kaka soki toyebisi bango nsango malamu. Koyeba likambo yango esengeli kotinda biso tókoba kozala na molende mpo na misala ya malamu mpe tómipesa mingi na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi.

ETAMBOLI YA MALAMU EBENDAKA BATO EPAI YA NZAMBE

Bato bazali komona ezaleli na yo ya kolongobana mpe mosala na yo ya makasi

10. Mpo na nini tokoki koloba ete etamboli na biso ya malamu ebendaka bato epai ya Yehova?

10 Atako molende na mosala ya kosakola ezali na ntina mingi, yango moko ekoki te mpo na kobenda bato epai ya Nzambe. Likambo ya mibale oyo ebendaka bato epai ya Nzambe ezali etamboli malamu oyo biso bakristo tozalaka na yango. Paulo amonisaki ete etamboli na biso ezali na ntina mingi ntango akomaki ete: “Tozali kobɛtisa bato libaku na likambo moko te, mpo bázwa likambo ya koloba na mosala na biso te.” (2 Ko. 6:3) Maloba mpe etamboli na biso ya malamu ekembisaka mateya ya Nzambe, mpe esalaka ete losambo ya Yehova ebenda basusu. (Tito 2:10) Kutu, mbala mingi toyokaka ete bato ya mitema sembo bandimaka nsango malamu ntango bamonaka ete tozali komekola Kristo na etamboli na biso.

11. Mpo na nini tosengeli kokanisa malamumalamu mpe kobondela mpo tózala na etamboli malamu?

11 Atako toyebi ete etamboli na biso ekoki kotinda bato bándima nsango malamu, tóbosana te ete ekoki mpe kotinda bato báboya koyoka yango. Yango wana, ezala na mosala, na ndako, to na kelasi, tosengeli koboya kosala likambo moko oyo ekoki kotinda moto aloba mabe mpo na mosala na biso ya kosakola mpe mpo na etamboli na biso. Soki tozali na momeseno ya kosala masumu na nko, yango ekoki kozala likama monene mpo na biso. (Ebr. 10:26, 27) Koyeba bongo esengeli kotinda biso tókanisa malamumalamu mpe tóbondela mpo tózala na etamboli oyo ekoki kotinda basusu bándima nsango malamu. Lokola bizaleli ya bato ya mokili oyo ezali se kobeba, bato mingi ya mitema sembo ‘bakomona lisusu bokeseni . . . kati na moto oyo asalelaka Nzambe ná moto oyo asalelaka ye te.’ (Mal. 3:18) Ya solo, etamboli na biso ya malamu ezali na ntina mingi mpo na kosalisa bato bázonga na boyokani elongo na Nzambe.

12-14. Ndenge nini lolenge oyo toyikaka mpiko ntango kondima na biso emekami ekoki kotinda basusu bándima solo? Pesá ndakisa.

12 Ntango Paulo akomelaki Bakorinti, ayebisaki bango ete akutanaki na malɔzi, mikakatano, kobɛtama, mpe akɔtaki bolɔkɔ. (Tángá 2 Bakorinti 6:4, 5.) Ntango tokutani na makambo oyo ekoki komeka kondima na biso mpe toyikeli yango mpiko, tokoki kosalisa basusu bándima solo. Tózwa ndakisa oyo: Eleki mwa bambula, balukaki kosilisa Batatoli ya Yehova na mboka moko na ekólo Angola. Bakangaki Batatoli mibale oyo basilá kozwa batisimo mpe bato mosusu 30 oyo bazalaki kosepela na solo mpe koyangana na makita na biso. Na nsima, bayanganisaki bato ya mboka yango mpo bátala ndenge banguna bazalaki kobɛta bango, ata mpe kozokisa bango, atako basalaki eloko te. Banyokolaki ata mpe basi ná bana mike. Basalaki bongo mpo na kobangisa bato mpo báboya koyoka nsango ya Batatoli ya Yehova. Kasi nsima ya komona ndenge oyo babɛtaki Batatoli yango, bato mingi ya mboka yango bakendaki koluka bango mpo na kosɛnga ete báyekola na bango Biblia! Nsima ya likambo wana, mosala ya kosakola bokonzi ekendaki liboso, bato mingi bandimaki solo, mpe bandeko bazwaki mapamboli mingi.

13 Ndakisa wana emonisi ete soki tokangami makasi na mitinda ya Biblia, yango ekoki kotinda bato mingi bándima solo. Na ntembe te, mpiko oyo Petro ná bantoma mosusu bamonisaki elendisaki bato mingi bázonga na boyokani elongo na Nzambe. (Mis. 5:17-29) Soki baninga na biso ya kelasi, ya mosala, to bandeko na biso ya libota bamoni ete tokangami na makambo ya malamu, mbala mosusu bakoki kondima nsango malamu.

14 Ntango nyonso, bandeko na biso mosusu bazali kokutana na minyoko. Na ndakisa, na ekólo Arménie, bandeko soki 40 bazali na bolɔkɔ mpo baboyaki kokɔta na mosala ya soda; mpe na basanza oyo ezali koya, ntango mosusu bandeko mosusu mingi bakokɔta mpe na bolɔkɔ. Na ekólo Érythrée, basaleli ya Yehova 55, oyo basusu bazali na mbula koleka 60, bazali na kati ya bolɔkɔ. Na Corée du Sud, Batatoli soki 700 bazali na kati ya bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Likambo yango eumeli mbula 60. Tosengeli kokoba kobondela ete bosembo ya bandeko na biso oyo bazali konyokwama na mikili ndenge na ndenge epesa Nzambe nkembo mpe esalisa bato oyo balingaka boyengebene bándima losambo ya solo.​—Nz. 76:8-10.

15. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge oyo ezaleli ya kolongobana ekoki kotinda basusu bándima solo.

15 Soki tozali na ezaleli ya kolongobana, yango mpe ekoki kobenda bato na losambo ya solo. (Tángá 2 Bakorinti 6:4, 7.) Na ndakisa, tótalela likambo oyo: “Ndeko mwasi moko alingaki kofuta tike na bisi, kasi mwasi moko oyo ayebanaki na ye alobaki na ye ete esengeli te afuta tike mpo ntaka oyo amati na bisi yango ezalaki mokuse. Kasi ndeko mwasi yango alimbolelaki ye ete asengeli kofuta tike, ata soki akokende mosika te. Na nsima, mwasi yango akitaki na bisi yango. Nsima na yango, sofɛlɛ ya bisi abalukaki mpe atunaki ndeko mwasi yango boye: ‘Ozali Motatoli ya Yehova?’ Ndeko mwasi ayanolaki: ‘Ɛɛ, ndenge nini oyebi yango?’ Sofɛlɛ azongisaki ete: ‘Nayokaki ntango bozalaki kolobela likambo ya kofuta tike ya bisi, mpe nayebi ete mbala mingi, kaka Batatoli ya Yehova nde basalaka bongo mpe bamonisaka ezaleli ya kolongobana na makambo nyonso.’ Mwa basanza na nsima, na makita, mobali moko apusanaki pene na ndeko mwasi yango mpe atunaki ye boye: ‘Ozali koyeba ngai lisusu? Nazali sofɛlɛ ya bisi oyo asololaki na yo likambo ya kofuta tike. Etamboli na yo ya malamu etindaki ngai nazwa ekateli ya koyekola Biblia ná Batatoli ya Yehova.’” Ntango bato bamonaka ete tozali na ezaleli ya kolongobana, bandimaka nsango malamu oyo tosakolaka.

MONISÁ NTANGO NYONSO BIZALELI OYO EKUMISAKA NZAMBE

16. Mpo na nini bizaleli lokola motema molai, bolingo, mpe boboto esimbaka mitema ya bato? Pesá ndakisa.

16 Tosalisaka mpe bato báyeba Yehova ntango tomonisaka bizaleli lokola motema molai, bolingo, mpe boboto. Bato mosusu oyo batalaka biso bakoki kokóma na mposa ya koyekola mpo na koyeba Yehova, mikano na ye, mpe basaleli na ye. Makanisi mpe etamboli ya bakristo ya solo ekeseni mosika na oyo ya bato oyo balobaka ete babangaka Nzambe nzokande basambelaka ye na bokosi. Bakonzi mosusu ya mangomba bakómá bazwi mpo balyelaka bandimi na bango, basalelaka mbongo oyo bazwaka mpo na kozala na bandako mpe mituka ya ntalo mingi; mosusu kutu atyaki climatiseur na ndako ya mbwa na ye. Ya solo, bato mingi oyo balobaka ete bazali bayekoli ya Kristo balingaka ‘kopesa ofele’ te. (Mat. 10:8) Ndenge moko na banganga-nzambe ya motó makasi oyo bazalaki na Yisraele, ‘balakisaka kaka mpo na lifuti,’ mpe makambo mingi oyo bateyaka euti na Makomami te. (Mika 3:11) Etamboli ya bokosi ndenge wana ekoki te kosalisa moto akóma moninga ya Nzambe.

17, 18. (a) Ndenge nini tokumisaka Yehova ntango tomonisaka bizaleli na ye na bomoi na biso? (b) Nini etindaka yo okoba kosala misala ya malamu?

17 Longola yango, mateya ya solo oyo toteyaka mpe makambo ya malamu oyo tosalelaka bato oyo bafandi zingazinga na biso esimbaka mitema ya bato. Na ndakisa, mokolo moko, ndeko mobali moko mobongisi-nzela azalaki kosakola ndako na ndako, mpe mwasi moko ya mobange oyo akufelá mobali abenganaki ye. Mwasi yango ayebisaki ndeko mobali yango ete ntango ngonga ya lopango elelaki, azalaki likoló ya ebuteli (échelle) na kuku na ye mpo na koluka kotya ampulɛ ya sika. Ndeko mobali yango alobaki na ye boye: “Ezali likama mpo na yo kosala yango yo moko.” Na nsima, mobongisi-nzela yango atyelaki ye ampulɛ yango mpe akendaki. Ntango mwasi wana abɛtelaki mwana na ye ya mobali lisolo ya likambo yango, mwana yango akamwaki mingi mpe akendaki koluka ndeko wana mpo na kopesa ye matɔndi. Nsukansuka, mwana yango andimaki koyekola Biblia.

18 Mpo na nini olingi kokoba kozala na molende mpo na misala ya malamu? Ntango mosusu ezali mpo oyebi ete ntango tozalaka na molende na mosala na biso ya kosakola mpe tosalaka makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova Nzambe, tokumisaka ye mpe tokoki kosalisa basusu bábika. (Tángá 1 Bakorinti 10:31-33.) Ntina mosusu oyo tozalaka na molende mpo na misala ya malamu na mosala ya kosakola nsango malamu mpe tozalaka na etamboli ya malamu ezali ete tozali na mposa ya komonisa ete tolingaka Nzambe mpe tolingaka bazalani na biso. (Mat. 22:37-39) Soki tozali na molende na misala ya malamu, tokozwa mapamboli mingi mpe tokozala na esengo ya solosolo banda sikoyo. Longola yango, tokoki kozala na elikya ya komona mokolo oyo bato nyonso bakomonisa molende mpo na losambo ya solo mpo na kokumisa Mozalisi na biso, Yehova.