Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Nini esali ete bomoi na biso ezala mpenza na ntina?

Nini esali ete bomoi na biso ezala mpenza na ntina?

NTANGO kaka mwana na ngai ya mobali Gary abotamaki na 1958, namonaki ete nzoto na ye ezali malamu te. Nzokande, sanza zomi elekaki liboso ete minganga báyeba maladi oyo azalaki kobɛla mpe sanza mitano elekaki lisusu liboso ete minganga ya Londres báloba ete ezali mpenza maladi yango. Nayokaki lisusu mawa mingi ntango nayebaki ete mwana na ngai ya mwasi Louise, oyo abotamaki mbula libwa nsima ya Gary, azalaki mpe na maladi yango, kasi ya makasi koleka oyo ya yaya na ye.

Minganga bayebisaki ngai na boboto ete: “Bana na yo nyonso mibale bazali na maladi oyo babengi syndrome LMBB, * mpe maladi yango ezali na nkisi te.” Na ntango wana, minganga bayebaki naino makambo mingi te mpo na maladi yango, oyo bato mingi te bazalaki kobɛla yango. Mbala mingi, bato oyo babɛlaka maladi yango bamonaka malamu te mpe nsukansuka bakufaka miso, bakómaka minene mingi, bazalaka na misapi ebele koleka na mabɔkɔ to na makolo, bakolaka malamu te, bakokaka koningisa nzoto malamu te, babɛlaka diabɛti, babɛlaka maladi ya mikuwa, mpe bangɛi na bango esalaka malamu te. Yango wana, nazalaki na mikakatano mingi mpo na kobɔkɔla bana na ngai. Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na mikolo eleki emonisaki ete na Angleterre, moto moko kati na bato 125 000 abɛlaka maladi yango, atako bato mosusu mingi mpe bamonisaka mwa bilembo ya maladi yango.

YEHOVA AKÓMI “ESIKA NA BISO YA KOBOMBANA OYO ETOMBWANÁ”

Mwa moke nsima ya libala na ngai, nasololaki na mwasi moko oyo azalaki Motatoli ya Yehova, mpe mbala moko namonaki ete makambo oyo ayebisaki ngai ezali solo. Kasi mobali na ngai azalaki kosepela ata moke te na mateya yango. Mosala na ye ezalaki kosɛnga ete tófandaka esika moko te, yango wana ezalaki mwa mpasi mpo nayanganaka na makita ya lisangá. Atako bongo, nakobaki kotánga Biblia mpe kobondela Yehova. Nabɔndisamaki mingi ntango natángaki ete “mpo na moto nyonso oyo atutami, Yehova akokóma esika ya kobombana oyo etombwaná, esika ya kobombana oyo etombwaná na ntango ya mpasi,” mpe ete ‘akotika ata moke te baoyo balukaka [ye]!’​—Nz. 9:9, 10.

Gary azalaki komona malamu te; yango wana ntango akokisaki mbula motoba, totindaki ye akende kotánga na Internat moko, na Sudi ya Angleterre. Mbala na mbala, azalaki kobenga ngai mpo na koyebisa ngai makambo oyo ezalaki kotungisa ye, mpe na nzela ya telefone, nazalaki kosalisa ye akanga ntina ya mitinda ya Biblia. Bambula moke nsima ya kobotama ya Louise, ngai moko mpe nabɛlaki maladi ya sclérose mpe maladi mosusu oyo babengi fibromyalgie. Ntango Gary akokisaki mbula 16, asilisaki kelasi na Internat mpe azongaki na ndako. Kasi miso na ye ezalaki se kobeba, yango wana na 1975, Leta etyaki nkombo na ye na molɔngɔ ya bato oyo bakufá miso. Na 1977, mobali na ngai asundolaki biso.

Ntango Gary azongaki na ndako, mwa moke na nsima, tokómaki komipesa mingi na makambo ya lisangá moko oyo bandeko bazalaki mpenza na bolingo, mpe na 1974 nazwaki batisimo. Nasepelaki mingi ndenge nkulutu moko asalisaki Gary amesana na bambongwana oyo ezalaki kosalema na nzoto na ye na boumeli ya bambula na ye ya bolenge. Bandeko mosusu ya lisangá bazalaki kosalisa ngai na misala ya ndako, mpe nsukansuka, bakonzi ya Leta baponaki bandeko mitano oyo bakobanda kofuta mbongo mpo básalisaka biso. Yango ezalaki lipamboli monene mpo na biso!

Gary akobaki kokola malamu na kati ya solo mpe azwaki batisimo na 1982. Azalaki na mposa makasi ya kokóma mobongisi-nzela mosungi. Yango wana, ngai mpe nazwaki ekateli ya kosɛnga mosala yango mpe tokobaki na mosala yango na boumeli ya bambula mingi. Na nsima, Gary asepelaki mingi ntango mokɛngɛli ya zongazonga na biso atunaki ye ete: “Gary, mpo na nini ozali kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza te?” Gary azalaki nde na mposa ya elendiseli wana, mpe na 1990, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Basalaki Gary lipaso mbala mibale na loketo, ya liboso na 1999 mpe ya mibale na 2008, kasi maladi ya Louise ezalaki makasi koleka. Abotamaki miso nyonso ekufá, mpe ntango namonaki ete azalaki na misapi motoba na lokolo, nayebaki ete ye mpe azali na maladi oyo babengi syndrome LMBB. Eumelaki te, baekzame oyo basalaki ye emonisaki ete binama na ye mingi na kati ya nzoto ezalaki kosala malamu te. Na boumeli ya bambula, basalaki ye mapaso mingi ya minene, kati na yango mbala mitano basalaki ye lipaso ya bangɛi. Lokola Gary, ye mpe azali na maladi ya diabɛti.

Lokola Louise ayebaki malamu mikakatano oyo ekoki kobima ntango balingi kosala moto lipaso, asololaki liboso na minganga oyo basalaka lipaso, oyo bapesaka ntonga ya kolalisa mpɔngi, mpe bato mosusu oyo basalaka na lopitalo mpo báyeba mpo na nini andimaka te bázongisa ye makila. Yango wana, ayokanaka malamu ná bato nyonso oyo basalaka na lopitalo, oyo basalisaka ye mingi mpo na maladi na ye.

BOMOI NA BISO EZALI MPENZA NA NTINA

Makambo oyo etali losambo ya Yehova ezalaka na esika monene na ndako na biso. Liboso ete baaparɛyi mosusu ya mikolo oyo ebima, nazalaki kolekisa bangonga mingi mpo na kotángela Gary ná Louise mikanda ya moombo ya sembo. Sikoyo, ba-CD, ba-DVD, mpe makambo oyo tozwaka na www.pr418.com esalisaka biso nyonso tózwa matomba ya programɛ ya boyekoli ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ, na bangonga ekeseni, mpe tokoki kopesa biyano na makita ya lisangá.

Tozali mpenza na botɔndi mpo na mateya kitoko oyo ezali na kati ya Liloba ya Yehova!

Na bantango mosusu esɛngaka ete Gary akanga na motó biyano oyo akopesa, kasi soki azali na lisolo na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi, asalaka yango na maloba na ye moko. Na 1995, akómaki mosaleli na misala; na Ndako ya Bokonzi azalaka ntango nyonso na misala mingi, na ndakisa koyamba bato mpe kosala na masini ya bikoliseli-lolaka.

Bandeko mosusu babimaka elongo na Gary na mosala ya kosakola, mpe mbala mingi batindikaka ye na velo oyo asalelaka mpo na maladi na ye ya mikuwa. Motatoli moko asalisaki Gary abanda koyekola Biblia ná moto moko oyo asepelaki na nsango malamu. Gary alendisaki mpe mokristo moko oyo atikaki kosakola na boumeli ya mbula 25. Sikoyo, bato yango nyonso mibale bazali koyangana na makita.

Ntango Louise akokisaki mbula libwa, nkɔkɔ na ye ya mwasi alakisaki ye kotonga, mpe ngai ná ndeko moko oyo asalisaka biso na ndako tolakisaki ye ndenge ya kotya mayemi kitoko na bilamba. Lokola alingaka mingi mosala yango ya kotonga, asalaka babolangiti ya langi kitoko mpo na babebe mpe mpo na bandeko ya lisangá oyo bakómi mibange. Asalaka mpe bakarte ya kokomela bato mikanda mpe atyaka mayemi ya mikemike likoló na yango. Bato basepelaka mingi ntango bazwaka bakarte yango. Ntango Louise akómaki na mbula soki zomi na misato, ayekolaki kobɛta masini. Sikoyo, na lisalisi ya ordinatɛrɛ, akoki kosolola mbala na mbala ná baninga na ye mpe kotindela bango bamesaje. Louise azwaki batisimo ntango akokisaki mbula 17. Ntango tosalaka bakampanye minene ya mosala ya kosakola, biso mibale tozalaka babongisi-nzela basungi. Lokola Gary, Louise akangaka bavɛrsɛ na motó mpo na kolobela kondima oyo azali na yango na bilaka oyo Nzambe apesi ete na mokili ya sika “miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama” mpe “moto moko te oyo afandi kuna akoloba: ‘Nazali na maladi.’”​—Yis. 33:24; 35:5.

Tozali mpenza na botɔndi mpo na mateya kitoko oyo ezali na kati ya Liloba ya Yehova! Mitema na biso etondi na esengo mpo na bolingo mpe lisungi ya bandeko ya lisangá na biso, mpo soki yango te mbɛlɛ tokokaka te kosala makambo mingi oyo tosalaka. Mpe mingimingi na lisalisi ya Yehova, bomoi na biso ezali mpenza na ntina.

^ par. 5 Bapesaki maladi yango, oyo bana bazwaka na nzela ya makila ya baboti nyonso mibale, nkombo ya minganga minei oyo bayebaki yango mpo na mbala ya liboso: Laurence-Moon-Bardet-Biedl. Lelo oyo, maladi yango eyebani mingi na nkombo ya syndrome Bardet-Biedl. Ezalaka na nkisi te.