Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

TEYÁ BANA NA YO

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosali-mabe?

Liteya nini tokoki kozwa epai ya mosali-mabe?

Mosali-mabe oyo tokoki kozwa liteya epai na ye ezali oyo Yesu azali kosolola na ye na fɔtɔ oyo. Mosali-mabe yango ayoki mawa mpo na mabe oyo asalá. Asɛngi Yesu boye: “Kanisá ngai ntango okokɔta na bokonzi na yo.” Sikoyo, ndenge ozali komona na fɔtɔ oyo, Yesu azali kosolola na mosali-mabe yango. Oyebi soki Yesu azali koyebisa ye nini? * Yesu azali kolaka ye boye: “Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na paradiso.”

Okanisi ete paradiso yango ekozala ndenge nini?— Mpo tóyeba soki tozwi eyano ya malamu, tólobela naino paradiso oyo Nzambe asalaki mpo na Adama ná Eva, mobali mpe mwasi ya liboso. Paradiso yango ezalaki wapi? Ezalaki na likoló to awa na mabele?

Soki olobi ete ezalaki awa na mabele, okosi te. Soki tolobi ete mosali-mabe wana akozala “na paradiso,” boye, akozala awa na mabele ntango ekokóma paradiso. Paradiso yango ekozala ndenge nini?— Tótala naino.

Nsima ya kokela Adama ná Eva mobali mpe mwasi ya liboso, Biblia elobi ete Nzambe atyaki bango na paradiso awa na mabele. Ebengamaki “elanga ya Edene.” Omoni te ete “elanga ya Edene” ezalaki mpenza kitoko, boye te?— Ya solo, ezalaki mpenza esika moko malamu mpe kitoko mingi koleka esika nyonso oyo moto akoki kofanda lelo oyo!

Okanisi nini? Yesu akozala awa na mabele elongo na mosali-mabe oyo ayokaki mawa mpo na masumu na ye?— Te, Yesu akozala nde na likoló mpe akoyangela mabele mobimba oyo ekokóma paradiso. Boye, Yesu akozala elongo na mosali-mabe wana na ndenge akosekwisa ye mpe akosala ete azala na bomoi ya malamu na paradiso awa na mabele. Kasi, mpo na nini Yesu akotika moto oyo azalaki mosali-mabe afanda na paradiso?— Tólobela naino likambo yango.

Toboyi te, mosali-mabe yango asalaki makambo ya mabe mpenza. Kasi bamilio ya bato mosusu oyo bazalaki awa na mabele, basalaki mpe mabe. Nzokande, mingi na bango, basalaki makambo ya mabe mpo bateyamaki te na ntina etali Yehova mpe makambo oyo alingaki ete básala.

Na yango, bato ya ndenge wana ata mpe mosali-mabe oyo Yesu asololaki na ye, bakosekwisama mpo bázala na bomoi na paradiso awa na mabele. Bakoteya bango mokano ya Nzambe. Na nsima, bakoki komonisa soki balingaka Yehova.

Oyebi ndenge oyo bakoki komonisa yango?— Soki basali makambo oyo Nzambe alingi. Ekozala mpenza esengo kofanda na paradiso mpe kozala ntango nyonso elongo na bato oyo balingaka Yehova mpe balinganaka!

^ par. 3 Ntango ozali kotánga na mwana na yo mpe bomoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, bosengeli kopema mpe osengeli kosɛnga mwana abimisa makanisi na ye.