Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO YA BOMOI

Kotosa Yehova ememeli ngai mapamboli ebele

Kotosa Yehova ememeli ngai mapamboli ebele

Nazali koyeba lisusu mokolo moko oyo tata na ngai alobaki ete: “Tozwi liteya moko malamu na lisolo ya Noa! Noa atosaki Yehova mpe azalaki kolinga libota na ye, mpe bango nyonso babikaki na Mpela mpo libota na bango mobimba ekɔtaki na masuwa.”

WANA ezali moko ya makambo oyo nabosanaka te mpo na tata na ngai, oyo azalaki moto ya komikitisa mpe makasi na mosala. Lokola azalaki mpenza kolinga bosembo, asepelaki mbala moko na nsango ya Biblia, ntango ayokaki yango na 1953. Banda wana, azalaki kosala nyonso mpo na koteya biso bana na ye makambo oyo azalaki koyekola. Na ebandeli, mama azalaki kokakatana mpo na kotika mimeseno ya lingomba na bango ya Katolike. Kasi na nsima, ye mpe abandaki kondima mateya ya Biblia.

Ezalaki pɛtɛɛ te mpo baboti na biso báyekola ná biso. Mama ayebaki mpenza kotánga te mpe tata azalaki kosala mosala makasi mokolo mobimba na bilanga. Mikolo mosusu, azalaki kolɛmba mingi mpe mpɔngi ezalaki koyiba ye ntango azali koyekola ná biso. Kasi, milende na ye efutaki. Lokola nazalaki mwana ya liboso, nakómaki mpe koteya baleki na ngai, moko ya mwasi mpe mibale ya mibali. Mbala mingi, tozalaki kolobela likambo oyo tata azalaki kozongela mingi: bolingo ya Noa mpo na libota na ye, oyo amonisaki na ndenge atosaki Nzambe. Nazalaki kolinga lisolo yango mingi! Eumelaki te, biso nyonso tokómaki koyangana na makita na Ndako ya Bokonzi na Roseto degli Abruzzi, engumba moko oyo ezalaki na bokula ya Mbu Adriatique, na Italie.

Na 1955, nazalaki na mbula 11 mpamba ntango ngai ná mama tokatisaki bangomba mpo na kokende mbala ya liboso na liyangani ya etúká na Rome, oyo ezalaki na wɛsti. Banda wana, na bomoi na ngai ya mokristo, nakómá kosepela mingi na mayangani wana ya minene.

Mbula oyo elandaki, nazwaki batisimo, mpe na nsima nakɔtaki na mosala ya ntango nyonso. Ntango nakómaki na mbula 17, nakómaki mobongisi-nzela monene na engumba Latina, na sudi ya Rome, na kilomɛtrɛ soki 300 longwa na engumba na biso. Lokola ezalaki engumba ya sika, moto moko te azalaki kobanga ete basusu bákanisela ye mabe. Ngai ná moninga na ngai ya mosala tozalaki kosepela kokabola mikanda ebele oyo elimbolaka Biblia, kasi lokola nazalaki naino elenge, nazalaki kokanisa libota na ngai mingi! Atako bongo, yango esalisaki ngai nayeba ete Yehova alingaki nazala na teritware, mpe nazalaki na mposa ya kotosa ye.

Mokolo ya libala na biso

Na nsima, batindaki ngai na engumba Milan mpo na kopesa mabɔkɔ na kobongisa liyangani oyo esangisaki mikili mingi na 1963, oyo ezalaki na motó ya likambo “Nsango malamu ya seko.” Na liyangani yango, tomipesaki mpo na kosala elongo na bandeko mosusu ebele, kati na bango Paolo Piccioli, ndeko mobali moko oyo autaki na engumba Florence. Na mokolo ya mibale ya liyangani, asalaki diskur moko kitoko oyo elobelaki minzemba. Na nse ya motema, nazalaki koloba: ‘Namoni, ndeko oyo akobala ata mokolo moko te.’ Kasi na nsima, ngai ná ye tokómaki kotindelana mikanda mpe eumelaki te tomonaki ete tokokani na makambo mingi: tozalaki na mikano moko, tozalaki kolinga Yehova, mpe tozalaki kosepela mpenza kotosa ye. Yango wana, ngai ná Paolo tobalanaki na 1965.

TOKUTANI NÁ BAKONZI YA LINGOMBA

Nazalaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza na engumba Florence na boumeli ya mbula 10. Ezalaki esengo komona ndenge masangá ezalaki kokola, mingimingi ndenge bilenge bazalaki kokola. Ngai ná Paolo tozalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango mpo na kolobela makambo ya elimo mpe kominanola elongo; mbala mingi Paolo azalaki kobɛta na bango bale. Ya solo, nazalaki na mposa ya kolekisa ntango mingi ná mobali na ngai, kasi nazalaki mpe komona ete bilenge wana mpe mabota mosusu na lisangá bazalaki mpe na mposa ete atyela bango likebi mpe alekisa ntango mingi elongo na bango.

Tii lelo, nayokaka esengo soki nakanisi bato ebele oyo toyekolá na bango Biblia. Moko na bango ezalaki Adriana, elenge mwasi moko oyo ateyaki mabota mosusu mibale makambo oyo azalaki koyekola. Babongisaki mokolo moko mpo bákutana ná sango moko mpo bálobela mateya lokola Bosato mpe liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te. Bakonzi misato ya lingomba bayaki na likita yango. Bandimbola oyo bazalaki kopesa ezalaki polele te mpe ezalaki bongolabongola, yango wana bayekoli na biso ya Biblia bamonaki mbala moko ete makambo yango eyokani te na mateya ya Biblia. Likita wana ebongolaki makambo mingi. Na nsima, bato soki 15 na mabota yango bakómaki Batatoli.

Ya solo, mayele oyo tosalelaka lelo mpo na kosakola ekeseni na oyo tozalaki kosalela na ntango wana. Na ntango wana, Paolo azalaki kokutana mbala na mbala ná basango mpo na kosolola na bango masolo ya Biblia, mpe ayebaki malamu kolimbola bindimeli na biso. Nazali koyeba lisusu mokolo moko oyo atɛlɛmaki liboso ya bato oyo bazalaki Batatoli te. Emonanaki polele ete banguna na biso babongisaki makambo liboso mpo bato mosusu bátuna Paolo mituna oyo bakanisaki ete akolonga kopesa eyano te. Kasi, makambo elekaki ndenge oyo bango bakanisaki te. Moto moko atunaki soki ezali malamu ete lingomba ekɔta na politiki, ndenge esalaka yango banda kala. Ntango basango bayokaki motuna wana, emonanaki polele ete babulunganaki. Na mbalakaka, kura ekatanaki, bato bapanzanaki, mpe likita esilaki. Bambula mingi na nsima, toyaki koyeba ete basango nde babongisaki liboso ete moto moko akata kura soki makambo etamboli te ndenge oyo bango balingaki.

MIKUMBA YA SIKA

Nsima ya kosala mbula 10 na libala, batindaki biso na mosala ya zongazonga. Paolo azalaki na mosala moko ya malamu, yango wana ezalaki pɛtɛɛ te kozwa ekateli. Kasi, nsima ya kokanisa mingi mpe kobondela, tondimaki mokumba wana ya sika. Tozalaki kosepela mingi kolekisa ntango elongo na mabota oyo ezalaki koyamba biso. Na mpokwa, mbala mingi tozalaki koyekola elongo na bango, mpe na nsima Paolo azalaki kosalisa bana na badevuare na bango, mingimingi soki ezali ya matematiki. Longola yango, Paolo azalaki kotánga mingi, mpe azalaki koyebisa biso makambo kitoko mpe ya kolendisa oyo atángaki. Na mokolo ya yambo, tozalaki mbala mingi kokende kosakola na mwa bingumba oyo Batatoli bazalaki te, mpe tozalaki kobengisa bato báya koyoka diskur na mpokwa.

Tozalaki kosepela kolekisa ntango elongo na bilenge, mpe mbala mingi Paolo azalaki kobɛta na bango bale

Nsima ya mbula mibale mpamba na mosala ya zongazonga, babengaki biso tókende kosala na Betele ya Rome. Paolo azalaki kosala na departema ya makambo etali mibeko, mpe ngai nazalaki kosala na departema oyo ezalaki kotalela bazulunalo. Ezalaki pɛtɛɛ te mpo tómesana na bomoi wana, kasi tozalaki na ekateli ya kotosa. Ezalaki esengo komona ndenge Betele yango ezalaki kokóma monene mpe bokoli oyo ezalaki kosalema na Italie. Na ntango wana, guvɛrnema ya Italie endimaki ete lisangá ya Batatoli ya Yehova eyebana lokola lingomba. Tozalaki kosepela mingi na mosala na biso na Betele.

Paolo alingaki mingi mosala na ye na Betele

Ntango tozalaki kosala na Betele, likambo ya makila ebimiselaki biso mindɔndɔ na guvɛrnema ya Italie. Na ebandeli ya bambula ya 1980, ezalaki na likambo moko oyo efundamaki na tribinale na oyo etali makila. Bakoselaki Motatoli moko ná mwasi na ye makambo ete babomisi mwana na bango ya mwasi mpo baboyaki bázongisa ye makila. Nzokande, efundeli wana ezalaki ya lokuta. Mwana yango akufaki nde na maladi moko mabe oyo ebebisaka makila, oyo ezalaki mingi na Italie mpe na bikólo oyo ezalaki pembeni na yango. Bandeko ya libota ya Betele basalisaki baavoka oyo bazalaki kosamba mpo na baboti wana. Trakte moko mpe Lamuká! moko oyo ebimisamaki kaka mpo na likambo yango esalisaki bato báyeba solo na likambo yango mpe bámona oyo Liloba ya Nzambe elobi mpo na makila. Na basanza wana, mbala mingi Paolo azalaki kosala ata ngonga 16 na mosala na mokolo moko. Nasalaki nyonso oyo nakokaki mpo na kosunga ye na ntango wana.

MBONGWANA MOSUSU

Nsima ya kosala mbula 20 na libala, likambo moko oyo tokanaki te ekómelaki biso. Nazalaki na mbula 41 mpe Paolo azalaki na mbula 49 ntango nayebisaki ye ete namoni lokola nazali na zemi. Na karnɛ oyo azalaki kokoma makambo oyo azalaki kokutana na yango na mokolo, namonaki ete na mokolo yango akómaki boye: “Libondeli: Soki ezali solo, salisá biso tótika mosala ya ntango nyonso te, tólɛmba na elimo te, mpe salisá biso tózala baboti ya malamu. Longola nyonso wana, salisá ngai nasalela ata mwa moke makambo oyo nazalaki koteya bato na estrade na boumeli ya mbula 30 oyo euti koleka.” Soki nakanisi ndenge makambo ezali sikoyo, namonaka ete Yehova ayanolaki libondeli wana ya Paolo mpe oyo ya ngai.

Kobotama ya mwana na biso Ilaria ebongolaki bomoi na biso. Mpo na koloba solo, ntango mosusu tozalaki kolɛmba nzoto, ndenge Masese 24:10 elobi yango: “Omonisi ete olɛmbi nzoto na mokolo ya mpasi? Nguya na yo ekozala moke.” Kasi, tokobaki kopesana mabɔkɔ mpe kolendisana.

Lelo oyo, Ilaria alobaka ete azali na esengo mpo abotamaki na baboti oyo bazalaki Batatoli mpe bazalaki na mosala ya ntango nyonso. Ata mokolo moko te amiyokaki ete asundolami; akolá na libota oyo ezalaki lokola mabota nyonso. Soki Paolo azali te, ngai nazalaki kotikala ná ye. Na mpokwa soki Paolo azongi, mbala mingi azalaki na misala mosusu oyo asengeli kosilisa; atako bongo, azalaki kolekisa ntango ná mwana na biso, kosakana na ye, mpe kosalisa ye na kosala badevuare. Azalaki kosala bongo atako mikolo mosusu ezalaki kosɛnga ete alala te tii na ngonga ya 2 to 3 ya ntɔngɔ mpo na kosilisa mosala na ye. Mbala mingi Ilaria azalaki koloba ete: “Papa azali moninga na ngai ya motema.”

Ya solo, mpo na kosalisa Ilaria atikala na nzela ya Yehova, esɛngaki kopesa ye disiplini, na bantango mosusu disiplini ya makasi. Nazali koyeba lisusu mokolo moko ntango azalaki kosakana ná moninga na ye, asalaki likambo moko ya mabe. Tomonisaki ye na Biblia ntina oyo asengeli kosalaka bongo te. Tosɛngaki ye mpe asɛnga moninga na ye bolimbisi na miso na biso.

Ilaria alobaka ete bolingo ya baboti na ye mpo na mosala ya kosakola esalisá ye mpe alinga mosala yango. Lelo oyo, abalá mpe akangá ntina malamu koleka ete esengeli kotosa Yehova mpe kolanda litambwisi na ye.

KOTOSA ATA NA NTANGO YA MAWA

Na 2008, monganga ayebisaki biso ete Paolo azali na maladi ya kanser. Na ebandeli, emonanaki ete akoyoka malamu, mpe azalaki kolendisa ngai mingi. Tolukaki minganga ya malamu mpenza mpo básalisa Paolo. Longola yango, ngai ná llaria tozalaki kobondela Yehova mingi mpo apesa biso makasi mpe mpiko. Atako bongo, nazalaki komona ndenge nzoto ya mobali na ngai oyo azalaki makasi ekómaki kolɛmba mokemoke. Liwa na ye na 2010 esalaki ngai mpasi mingi. Kasi, nabɔndisamaka mingi soki nakanisi mbula 45 oyo nasalaki elongo na ye. Tosalelaki Yehova na motema na biso mobimba. Nayebi ete akobosana te nyonso oyo tosalaki mpo na ye. Nazali kozela na mposa makasi ntango oyo Paolo akosekwa, ndenge Yesu alobaki yango na Yoane 5:28, 29.

“Tii lelo, na kati ya motema na ngai, nazali kaka mwana moke oyo alingaka lisolo ya Noa. Nazali kaka na ekateli ya kotosa Yehova”

Tii lelo, na kati ya motema na ngai, nazali kaka mwana moke oyo alingaka lisolo ya Noa. Nazali kaka na ekateli ya kotosa Yehova, ata soki asɛngi ngai nasala nini. Namonaka ete ata soki tokutani na mokakatano nini, ata soki tomipimeli makambo nini, ata soki tobungisi eloko nini, nyonso wana ekokokana te na mapamboli oyo Nzambe na biso ya bolingo apesaka biso. Na bomoi na ngai, namoná ete ezali bongo.