Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI: OSENGELI KOTYELA LINGOMBA MOTEMA?

Mpo na nini ebongi mpenza otalela lingomba na yo?

Mpo na nini ebongi mpenza otalela lingomba na yo?

Kanisá ete ozali na mposa básala yo lipaso ya maladi moko mabe mpenza. Okozala mpenza na mposa ya kotyela monganga oyo akosala yo lipaso yango motema mpo bomoi na yo ekozala na mabɔkɔ na ye, boye te? Omoni te ete ekozala malamu otalela lisusu eksperiansi oyo azali na yango?

Ndenge moko mpe, ebongi mpenza otalela lingomba na yo. Soki osambelaka na lingomba moko boye, ezali lokola otye boyokani na yo ná Nzambe mpe elikya na yo ya bomoi ya seko na mabɔkɔ ya lingomba yango.

Yesu apesaki malako oyo ekosalisa biso tóyeba soki tozali na lingomba ya solo to te. Alobaki boye: “Nzete na nzete eyebanaka na mbuma na yango.” (Luka 6:44) Na ndakisa, ntango otalaka lingomba moko boye, omonaka ete ebimisaka mbuma ya ndenge nini? Bakonzi ya lingomba yango babɛtaka nsɛtɛ mingi kaka na makambo ya mbongo? Bandimi na yango balandaka mitinda ya Biblia na makambo etali bitumba mpe bizaleli malamu? Ezali mpenza na lingomba oyo ebongi kotyela motema? Tosɛngi yo otalela masolo oyo elandi.

“Nzete na nzete eyebanaka na mbuma na yango.”​—Luka 6:44