Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Talá elilingi oyo!”

“Talá elilingi oyo!”

Mbala boni osilá koloba bongo na nse ya motema to koyebisa moto mosusu bongo ntango ofungoli zulunalo moko ya sika? Mayemi mpe bafɔtɔ kitoko oyo batyaka na bazulunalo na biso ezalaka na ntina. Bililingi yango eteyaka biso, etindaka biso tókanisa mpe esimbaka mayoki na biso. Ekoki kosalisa biso, mingimingi ntango tozali kobongisa Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to ntango tozali kopesa biyano.

Na ndakisa, ntango tomoni elilingi oyo batye na ebandeli ya lisolo ya boyekoli, tosengeli kokanisa mwa moke ntina oyo baponi nde elilingi yango. Tokoki komituna boye: Ezali komonisa nini? Ndenge nini eyokani na motó ya likambo ya lisolo to na vɛrsɛ oyo esimbi lisolo? Mpo na bililingi mosusu, esengeli mpe kokanisa ndenge oyo eyokani na lisolo oyo bozali koyekola mpe na bomoi na yo.

Motambwisi ya Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli asengeli kopesa bandeko libaku ya kopesa makanisi mpo na elilingi mokomoko, koyebisa liteya oyo epesi, to ndenge oyo ekoki kosalisa bango na bomoi. Na bisika mosusu, pembeni ya maloba oyo elimboli elilingi, bayebisaka paragrafe oyo eyokani na elilingi yango. Nzokande na bisika mosusu, motambwisi nde akoluka koyeba na paragrafe nini ebongi kolobela elilingi mokomoko. Na ndenge yango, bato nyonso bakomona ndenge bililingi oyo etyami ekoki kosalisa motángi amona na miso mateya oyo ezali na Liloba ya Nzambe.

Ndeko moko alobaki ete nsima ya kotánga lisolo moko oyo ekomami malamu, bililingi na yango ebakisaka kitoko ya lisolo yango.