Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini?”

“Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini?”

“Elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?”​—MAT. 24:3.

1. Ndenge moko na bantoma, makambo nini tozalaka na mposa ya koyeba?

NTANGO mosala ya Yesu awa na mabele ekómaki pene na nsuka, bayekoli na ye bazalaki na mposa makasi ya koyeba makambo nini basengelaki kozela ete esalema na mikolo ekoya. Na yango, mwa mikolo moke liboso Yesu akufa, bantoma na ye minei batunaki ye boye: “Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?” (Mat. 24:3; Mrk. 13:3) Mpo na koyanola, Yesu apesaki esakweli moko oyo elobelaki makambo oyo esengelaki kokokisama kaka na eleko moko te; esakweli yango ezali na Matai mokapo 24 mpe 25. Na esakweli yango, Yesu alobelaki makambo ebele ya minene. Maloba na ye ezali na ntina mingi mpo na biso mpamba te biso mpe tozalaka na mposa makasi ya koyeba makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya.

2. (a) Na boumeli ya bambula, likambo nini tolukaki koyeba malamu? (b) Mituna nini misato tokotalela?

2 Na boumeli ya bambula, basaleli ya Yehova bayekolaki esakweli wana oyo Yesu apesaki mpo na mikolo ya nsuka mpe babondelaki Nzambe asalisa bango bákanga ntina na yango. Balukaki mpenza koyeba soki maloba wana ya Yesu ekokokisama ntango nini. Mpo tómona ndenge boyebi na biso esembolami, tótalela mituna misato oyo ebandi na maloba “ntango nini.” Ntango nini ‘bolɔzi monene’ ekobanda? Ntango nini Yesu akosambisa “bampate” ná “bantaba”? Ntango nini Yesu “akoya”?​—Mat. 24:21; 25:31-33.

NTANGO NINI BOLƆZI MONENE EKOBANDA?

3. Kala, tozalaki kokanisa nini mpo na bolɔzi monene?

3 Kala, tozalaki kokanisa ete bolɔzi monene ebandaki na 1914 na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba mpe ete Yehova ‘ayeisaki mikolo yango mokuse’ na 1918 ntango etumba yango esilaki mpo bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki awa na mabele, bázwa libaku ya kosakola nsango malamu na bikólo nyonso. (Mat. 24:21, 22) Tozalaki kokanisa ete soki mosala yango ya kosakola ekómi na nsuka, mokili ya Satana ekobebisama. Na yango, tozalaki kokanisa ete bolɔzi monene ezali na biteni misato: Ekozala na ebandeli (kobanda 1914-1918), bolɔzi yango ekoyeisama mokuse (kobanda 1918), mpe ete ekosuka na Armagedone.

4. Likambo nini tososoli na ntina ya esakweli ya Yesu mpo na mikolo ya nsuka?

4 Nzokande, nsima ya koyekola lisusu malamumalamu esakweli ya Yesu, tososolaki ete makambo mosusu oyo Yesu asakolaki mpo na mikolo ya nsuka esengelaki kokokisama mbala mibale. (Mat. 24:4-22) Ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na Yudea na siɛklɛ ya liboso T.B., mpe esengeli kokokisama lisusu na mokili mobimba na ntango na biso. Boyebi yango esalisi biso tósembola makambo mingi. *

5. (a)Eleko nini ebandaki na 1914? (b) Eleko yango ya bampasi ekokani na eleko nini na siɛklɛ ya liboso T.B.?

5 Tososolaki mpe ete eteni ya liboso ya bolɔzi monene ebandaki na 1914 te. Mpo na nini? Mpo bisakweli ya Biblia emonisi ete bolɔzi monene ekobanda na etumba kati ya bikólo te, kasi nde na kobebisama ya mangomba ya lokuta. Na yango, etumba oyo esalemaki na 1914 ezalaki ebandeli ya bolɔzi monene te, kasi ezalaki nde “ebandeli ya bampasi.” (Mat. 24:8) Eleko yango ya “ebandeli ya bampasi” ekokani na makambo oyo esalemaki na Yerusaleme mpe na Yudea kobanda mobu 33 T.B. tii na mobu 66 T.B.

6. Likambo nini ekozala ebandeli ya bolɔzi monene?

6 Likambo nini ekozala ebandeli ya bolɔzi monene? Yesu asakolaki ete: “Ntango bokomona eloko ya bosɔtɔ oyo ebebisaka etɛlɛmi na esika mosantu, ndenge mosakoli Danyele alobaki, (tiká motángi asosola,) na ntango yango, baoyo bazali na Yudea bábanda kokima na bangomba.” (Mat. 24:15, 16) Esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 66 T.B., ntango basoda ya Roma (“eloko ya bosɔtɔ”) ‘batɛlɛmaki na esika mosantu,’ elingi koloba bayaki kobundisa Yerusaleme mpe tempelo na yango (oyo ezalaki esika mosantu na miso ya Bayuda). Esakweli yango ekokokisama na monene na yango ntango ONU (“eloko ya bosɔtɔ” ya ntango na biso) ‘ekotɛlɛma,’ elingi koloba ekobundisa mangomba ya bokristo (oyo ezali esika mosantu na miso ya bakristo ya lokuta) mpe mangomba mosusu ya Babilone Monene. Emoniseli 17:16-18 elobeli mpe etumba yango. Likambo yango nde ekozala ebandeli ya bolɔzi monene.

7. (a) Nini esalaki ete ‘bato bábika’ na siɛklɛ ya liboso? (b) Makambo nini tokoki kozela ete ekosalema na mikolo ezali koya?

7 Yesu asakolaki mpe ete: “Mikolo yango ekoyeisama mokuse.” Esakweli yango ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na mobu 66 T.B., ntango basoda ya Roma ‘bayeisaki mokuse’ etumba na bango. Na nsima, bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki na Yerusaleme mpe na Yudea, bakimaki, mpe yango esalaki ete bábika. (Tángá Matai 24:22; Mal. 3:17) Na yango, makambo nini tokoki kozela ete ekosalema na bolɔzi monene oyo ezali koya? Yehova ‘akoyeisa mokuse’ etumba oyo ONU ekobundisa mangomba ya lokuta, mpo abatela lingomba ya solo mpo ebebisama te elongo na mangomba ya lokuta. Yango nde ekosala ete basaleli ya Nzambe bábika.

8. (a) Makambo nini ekosalema soki eteni ya liboso ya bolɔzi monene ebandi? (b) Emonani ete ntango nini mokristo ya nsuka oyo atyami mafuta na elimo kati na ba 144 000 akozwa mbano na ye ya kokende likoló? (Talá paragrafe 8 na etanda Mitángo ya mike.)

 8 Nini ekosalema soki eteni ya liboso ya bolɔzi monene eleki? Maloba ya Yesu emonisi ete ekozala na eleko moko oyo ekoumela tii na ebandeli ya Armagedone. Makambo nini ekosalema na boumeli ya eleko yango? Eyano ezali na Ezekiele 38:14-16 mpe na Matai 24:29-31. (Tángá.) * Nsima na yango, tokomona Armagedone, nsuka ya bolɔzi monene, oyo ekokani na kobebisama ya Yerusaleme na mobu 70 T.B. (Mal. 4:1) Etumba ya Armagedone ekosala ete bolɔzi monene oyo ezali koya ezala likambo “oyo esalemá naino te banda mokili ebandá.” (Mat. 24:21) Soki Armagedone eleki, Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Kristo ebandi.

9. Esakweli ya Yesu oyo elobeli bolɔzi monene ezali kosala nini epai ya basaleli ya Yehova?

9 Esakweli oyo elobeli bolɔzi monene ezali kolendisa biso. Mpo na nini? Mpo ezali kondimisa biso ete, ata soki tokutani na makambo nini na bolɔzi monene, Biblia emonisi ete ebele mpenza ya basaleli ya Yehova bakobika. (Em. 7:9, 14) Longola yango, tozali na esengo mpamba te na Armagedone, Yehova akolongisa boyangeli na ye mpe akosantisa nkombo na ye.​—Nz. 83:18; Ezk. 38:23.

NTANGO NINI YESU AKOKABOLA BAMPATE NÁ BANTABA?

10. Kala, tozalaki koloba nini mpo na ntango oyo Yesu akokabola bampate ná bantaba?

10 Tótalela sikoyo likambo mosusu oyo Yesu alobelaki na esakweli na ye: ntango oyo akokabola bampate ná bantaba. (Mat. 25:31-46) Kala, tozalaki kokanisa ete Yesu abandaki kokabola bato oyo bazali lokola bampate ná bato oyo bazali lokola bantaba na mikolo ya nsuka, oyo ebandaki na 1914. Tozalaki koloba ete bato oyo baboyaki koyoka nsango ya Bokonzi mpe bakufaki liboso ete bolɔzi monene ebanda, bakufaki lokola bantaba, elingi koloba bakosekwa te.

11. Mpo na nini Yesu akokaki te kobanda kosambisa bato mpo na kokata banani bazali bampate mpe banani bazali bantaba, na 1914?

11 Na 1995, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli etalelaki lisusu Matai 25:31, oyo elobi: “Ntango Mwana ya moto akoya na nkembo na ye mpe baanzelu nyonso elongo na ye, bongo akofanda na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo.” Linɔ́ngi yango elobaki ete Yesu akómaki Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na 1914, kasi afandaki te “na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo” mpo na kozala Mosambisi ya “bikólo nyonso.” (Mat. 25:32; talá Danyele 7:13.) Nzokande, ndakisa ya bampate ná bantaba elobeli libosoliboso mokumba ya Yesu ya Mosambisi. (Tángá Matai 25:31-34, 41, 46.) Lokola Yesu akómaki naino te Mosambisi ya bikólo nyonso na 1914, akokaki te kobanda kosambisa bato mpo na kokata banani bazali bampate mpe banani bazali bantaba, na mbula wana. * Na bongo, ntango nini lisambisi wana ya Yesu ekobanda?

12. (a) Ntango nini Yesu akosambisa bikólo nyonso mpo na mbala ya liboso? (b) Makambo nini Matai 24:30, 31 mpe Matai 25:31-33, 46 elobeli?

 12 Esakweli ya Yesu oyo elobeli mikolo ya nsuka emonisi ete akosambisa bikólo nyonso mpo na mbala ya liboso nsima ya kobebisama ya mangomba ya lokuta. Ndenge tomonaki yango na  paragrafe 8, makambo mosusu oyo ekosalema na ntango wana ezali na Matai 24:30, 31. Soki otaleli bavɛrsɛ yango, okomona ete Yesu asakolaki makambo oyo ekokani na oyo alobelaki na ndakisa ya bampate ná bantaba. Na ndakisa: Mwana ya moto akoya na nkembo na ye elongo na baanzelu; mabota mpe bikólo nyonso ekoyangana; bato oyo bakozala lokola bampate ‘bakotombola mitó na bango’ mpo bakozwa “bomoi ya seko.” * Baoyo bakozala lokola bantaba “bakomibɛtabɛta na kolela” mpo bakomona ete “liwa ya seko” ezali kozela bango.​—Mat. 25:31-33, 46.

13. (a) Ntango nini Yesu akokabola bato lokola bampate ná bantaba? (b) Koyeba likambo yango ezali kotinda biso tótalelaka mosala ya kosakola ndenge nini?

13 Boye, tóloba nini? Yesu akosambisa bato ya bikólo nyonso mpo na kokata banani bazali bampate mpe banani bazali bantaba ntango akoya na bolɔzi monene. Na nsima, na Armagedone, oyo ekosukisa bolɔzi monene, bato oyo bakozala lokola bantaba “bakokufa liwa ya seko.” Koyeba likambo yango esengeli kotinda biso tótalelaka mosala ya kosakola ndenge nini? Ezali kosalisa biso tómona ete mosala na biso ya kosakola ezali na ntina mingi. Tii liboso ete bolɔzi monene ebanda, bato bazali naino na ntango ya kobongola makanisi na bango mpe kobanda kotambola na nzela ya nkaka “oyo ememaka na bomoi.” (Mat. 7:13, 14) Ya solo, ata lelo oyo bato bakoki komonisa bizaleli lokola bampate to bantaba. Atako bongo, tosengeli kobosana te ete kokata mpenza soki banani bazali bampate to banani bazali bantaba ekoyebana na ntango ya bolɔzi monene. Yango wana, ezali na ntina mingi tókoba kosakola mpo na kopesa lisusu bato ebele libaku ya koyoka nsango ya Bokonzi mpe ya kondima yango.

Tii liboso ete bolɔzi monene ebanda, bato bazali naino na ntango ya kobongola makanisi na bango (Talá paragrafe 13)

NTANGO NINI YESU AKOYA?

14, 15. Wapi mikapo minei oyo elobeli koya ya Kristo mpo na kosambisa na mikolo ezali koya?

14 Nsima ya koyekola lisusu malamu esakweli ya Yesu, tomoni nde ete tosengeli kosembola boyebi na biso na oyo etali ntango oyo makambo mosusu ya minene ekosalema? Kaka esakweli yango epesi eyano. Tótalela yango sikoyo.

15 Na eteni ya esakweli oyo ezali na Matai 24:29–25:46, Yesu alobelaki libosoliboso makambo oyo ekosalema na mikolo oyo ya nsuka mpe na bolɔzi monene oyo ezali koya. Na bavɛrsɛ yango, Yesu alobelaki “koya,” to kozonga na ye mbala mwambe. * Na oyo etali bolɔzi monene, alobaki boye: “Bakomona Mwana ya moto azali koya na mapata ya likoló.” “Boyebi te mokolo Nkolo na bino akoya.” “Mwana ya moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa te.” Mpe na ndakisa ya bampate ná bantaba, Yesu alobaki ete: “Mwana ya moto akoya na nkembo na ye.” (Mat. 24:30, 42, 44; 25:31) Mbala nyonso minei wana etaleli koya ya Kristo mpo na kosambisa na mikolo ezali koya. Kasi na esakweli yango, na bisika mosusu nini minei Yesu alobelaki koya na ye?

16. Mikapo nini mosusu elobeli koya ya Yesu?

16 Ntango alobelaki moombo ya sembo mpe ya mayele, Yesu alobaki boye: “Esengo na moombo yango soki nkolo na ye ntango akoya akuti ye azali kosala bongo.” Na ndakisa ya bangɔndɔ, Yesu alobaki boye: “Ntango bakendaki kosomba, mobali ya libala akómaki [“ayei,” Bible na lingala ya lelo oyo].” Na ndakisa ya batalanta, Yesu alobaki ete: “Nsima ya ntango molai nkolo ya baombo wana ayaki.” Kaka na ndakisa yango, nkolo alobaki ete: “Na bozongi na ngai [“eyei ngai,” haut fleuve] mbɛlɛ nazwi mbongo na ngai.” (Mat. 24:46; 25:10, 19, 27) Mbala minei yango oyo elobeli koya ya Yesu etaleli ntango nini?

17. Kala, tolobaki nini mpo na koya ya Yesu oyo Matai 24:46 elobeli?

17 Kala, tolobaki na mikanda na biso ete mbala minei yango elobeli koya to kozonga ya Yesu na 1918. Na ndakisa, tózwa maloba ya Yesu oyo elobeli “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Tángá Matai 24:45-47.) Tolobaki ete “koya” oyo vɛrsɛ 46 elobeli ekokisamaki ntango Yesu ayaki na 1918 mpo na kotala soki bakristo oyo batyami mafuta bazalaki ndenge nini na elimo mpe ete moombo atyamaki likoló ya biloko nyonso ya Nkolo na 1919. (Mal. 3:1) Kasi, nsima ya kotalela lisusu malamu esakweli wana ya Yesu, tomoni ete tosengeli kosembola boyebi na biso na oyo etali ntango oyo makambo mosusu ya esakweli yango ekokokisama. Mpo na nini?

18. Kotalela makambo nyonso oyo ezali na esakweli ya Yesu etindi biso tóloba nini mpo na koya na ye?

18 Na bavɛrsɛ oyo ezali liboso ya Matai 24:46, liloba “akoya” elobeli ntango oyo Yesu akoya kosambisa bikólo mpe kokata makambo na bolɔzi monene. (Mat. 24:30, 42, 44) Lisusu, ndenge tomonaki yango na  paragrafe 12, ‘koya’ ya Yesu oyo Matai 25:31 elobeli ezali mpe kaka ntango wana oyo akoya kosambisa bikólo na mikolo ezali koya. Na yango, tokoki mpenza koloba ete koya oyo Yesu akoya mpo na kotya moombo ya sembo likoló ya biloko na ye nyonso, oyo Matai 24:46, 47 elobeli, ekosalema mpe na mikolo ezali koya, na ntango ya bolɔzi monene. Kutu, kotalela makambo nyonso oyo ezali na esakweli wana ya Yesu emonisi ete mbala nyonso mwambe oyo elobeli koya na ye, ekokokisama na mikolo ezali koya, ntango akoya kokata makambo na bolɔzi monene.

19. Tosemboli boyebi na biso na makambo nini na lisolo oyo, mpe mituna nini tokoyanola na masolo elandi?

19 Na mokuse, makambo nini toyekoli? Na ebandeli ya lisolo oyo, totunaki mituna misato oyo ebandaki na maloba “ntango nini.” Ya liboso, tomoni ete bolɔzi monene ebandaki na 1914 te, kasi ekobanda nde ntango ONU ekobundisa Babilone Monene. Ya mibale, totaleli lisusu ntina oyo tokoki koloba ete Yesu abandaki kokabola bampate ná bantaba na 1914 te, kasi akosala yango nde na ntango ya bolɔzi monene. Ya misato, tomoni ete Yesu ayaki kotya moombo ya sembo likoló ya biloko na ye nyonso na 1919 te, kasi akosala yango nde na ntango ya bolɔzi monene. Na yango, mituna nyonso misato oyo ebandi na maloba “ntango nini” ekokokisama na mikolo ezali koya, na eleko moko: bolɔzi monene. Ndenge nini boyebi oyo ya sika ekotinda biso tósembola ndimbola oyo topesaka na ndakisa oyo elobeli moombo ya sembo? Longola yango, ndenge nini yango ekotinda biso tósembola ndenge na biso ya kolimbola bandakisa mosusu oyo Yesu apesaki, oyo ezali kokokisama na ntango oyo ya nsuka? Tokotalela mituna wana ya ntina mingi na masolo oyo elandi.

 

^ par. 4 Paragrafe 4: Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/02/1994, nkasa 8-21 mpe ya   mpe ya 01/05/1999, nkasa 8-20.

^ par. 8 Paragrafe 8: Moko ya makambo oyo bavɛrsɛ yango elobeli ezali ‘koyanganisama ya bato oyo ye aponá.’ (Mat. 24:31) Na yango, emonani ete na eleko moko boye, bakristo nyonso oyo batyami mafuta oyo bakozala naino awa na mabele nsima ya ntango oyo bolɔzi monene ekobanda bakomata na likoló liboso ete Armagedone ebanda. Ndimbola oyo esemboli lisolo “Mituna ya batángi” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/08/1990, lokasa 30, na Lifalanse.

^ par. 11 Paragrafe 11: Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 15/10/1995, nkasa 18-28.

^ par. 12 Paragrafe 12: Talá mpe Luka 21:28.

^ par. 15 Paragrafe 15: Maloba “koya” mpe “kozonga” euti na vɛrbɛ kaka moko ya Grɛki érkhomaï.