Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso

“Talá! Nazali elongo na bino mikolo nyonso

“Talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.”​—MAT. 28:20.

1. (a) Lobelá na mokuse ndakisa ya blé ná matiti mabe. (b) Ndimbola nini Yesu apesaki mpo na ndakisa yango?

MOKO ya bandakisa oyo Yesu apesaki na ntina etali Bokonzi elobelaki mosali-bilanga moko oyo alonaki mboto ya blé mpe monguna moko oyo ayaki kolona matiti mabe kaka na elanga yango moko. Matiti mabe ezipaki blé, kasi mosali-bilanga ayebisaki baombo na ye ete ‘bátika nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma.’ Na eleko ya kobuka mbuma, bakotumba matiti mabe mpe bakoyanganisa blé. Yesu ye moko alimbolaki ndakisa yango. (Tángá Matai 13:24-30, 37-43.) Ndakisa yango emonisi nini? (Talá etanda “Blé ná matiti mabe.”)

2. (a) Ndakisa ya blé ná matiti mabe ezali komonisa nini? (b) Tokotalela eteni nini ya ndakisa yango?

2 Makambo oyo esalemaki na elanga ya mosali-bilanga wana emonisi ndenge nini mpe ntango nini Yesu asengelaki koyanganisa blé, elingi koloba bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na ye na Bokonzi na ye. Yesu abandaki kolona blé na Pantekote 33 T.B. Koyanganisa blé ekosila ntango bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ebongiseli oyo, bakozwa elembo ya nsuka mpe na nsima bakokende likoló. (Mat. 24:31; Em. 7:1-4) Kaka ndenge moto oyo atɛlɛmi na ngomba amonaka na mosika makambo oyo ezali zingazinga na ye, ndakisa wana esalisi biso tózwa mwa likanisi ya makambo oyo esengelaki kosalema na boumeli ya mbula soki 2 000. Na esika oyo tozali, makambo nini oyo etali Bokonzi tosili kososola? Ndakisa wana elobeli ntango ya kolona mboto, kokola na yango, mpe eleko ya kobuka mbuma. Lisolo oyo ekolobela mingimingi eleko ya kobuka mbuma. *

YESU ABATELI BLÉ

3. (a) Likambo nini esalemaki nsima ya siɛklɛ ya liboso? (b) Na kolanda Matai 13:28, motuna nini etunamaki, mpe banani batunaki yango? (Talá mpe paragrafe 3 na etanda Mitángo ya mike.)

3 Na ebandeli ya siɛklɛ ya mibale T.B., ‘matiti mabe ebimaki’ ntango bakristo ya lokuta bakómaki komonana na mokili. (Mat. 13:26) Na siɛklɛ ya minei, bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe bakómaki mingi mpenza koleka bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Tóbosana te ete na ndakisa yango, baombo basɛngaki nkolo na bango nzela ya kopikola matiti mabe. * (Mat. 13:28) Nkolo ayanolaki nini?

4. (a) Eyano ya Nkolo Yesu emonisaki nini? (b) Ntango nini bakristo oyo bazali lokola blé bakómaki koyebana?

4 Mpo na blé ná matiti mabe, Yesu alobaki boye: “Bótika yango nyonso mibale ekola esika moko tii na ntango ya kobuka mbuma.” Maloba yango emonisi ete kobanda na siɛklɛ ya liboso tii lelo oyo, ezalaki ntango nyonso na bato oyo bazalaki lokola blé awa na mabele, elingi koloba, bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Toyebi yango mpo Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na bosukisi ya makambo ya ntango oyo.” (Mat. 28:20) Na yango, Yesu alakaki ete akobatela bakristo oyo batyami mafuta na elimo mikolo nyonso tii na ntango ya nsuka. Kasi, lokola bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe bazipaki bango, toyebi mpenza na bosikisiki te banani bazalaki na kati ya blé na eleko wana nyonso. Kasi, mwa bambula mingi liboso eleko ya kobuka mbuma ebanda, ekómaki koyebana soki banani bazali na kati ya blé. Eyebanaki ndenge nini?

MOMEMI-NSANGO MOKO ‘ABONGISI NZELA’

5. Ndenge nini esakweli ya Malaki ekokisamaki na siɛklɛ ya liboso?

5 Basiɛklɛ mingi liboso Yesu apesa ndakisa ya blé ná matiti mabe, Yehova asalisaki Malaki asakola makambo mosusu oyo Yesu mpe alobelaki na ndakisa na ye. (Tángá Malaki 3:1-4.) Yoane Mobatisi azalaki ‘momemi-nsango oyo abongisaki nzela.’ (Mat. 11:10, 11) Ntango abandaki mosala na ye na mobu 29 T.B., ntango ya kosambisa ekólo Yisraele ekómaki pene. Yesu azalaki momemi-nsango ya mibale. Apɛtolaki tempelo ya Yerusaleme mbala mibale: liboso na ebandeli ya mosala na ye, mpe na nsima pene na nsuka ya mosala na ye. (Mat. 21:12, 13; Yoa. 2:14-17) Na yango, mosala ya kopɛtola ya Yesu ezwaki ntango molai.

6. (a) Ndenge nini esakweli ya Malaki ekokisamaki na monene na yango? (b) Ntango nini Yesu ayaki kotala tempelo ya elimo? (Talá mpe paragrafe 6 na etanda Mitángo ya mike.)

6 Ndenge nini esakweli ya Malaki ekokisamaki na monene na yango? Mwa bambula mingi liboso ya 1914, ndeko Charles Russell ná baninga na ye basalaki mosala lokola oyo ya Yoane Mobatisi. Balukaki koyeba mpenza mateya ya solo ya Biblia. Bayekoli wana ya Biblia bateyaki ndimbola mpenza ya mbeka ya lisiko ya Kristo, bamonisaki ete lifelo ya mɔtɔ ezali lokuta, mpe basakolaki nsuka ya Ntango ya Mabota. Atako bongo, ezalaki na bituluku mingi ya losambo oyo ezalaki komibenga bayekoli ya Kristo. Na yango, ezalaki na motuna moko ya ntina mingi oyo esengelaki kozwa eyano: Etuluku nini ezalaki ya bakristo oyo bazalaki lokola blé? Mpo na koyanola na motuna wana, Yesu ayaki kotala tempelo ya elimo na 1914. Mosala wana ya kotala tempelo ya elimo mpe kopɛtola yango ezwaki ntango molai: kobanda na 1914 tii na ebandeli ya 1919. *

BAMBULA YA KOTALA MPE YA KOPƐTOLA

7. Ntango Yesu abandaki kotala tempelo ya elimo na 1914, amonaki nini?

7 Ntango Yesu abandaki kotala tempelo ya elimo, amonaki nini? Akutaki etuluku moko ya Bayekoli ya Biblia ya molende oyo, banda mbula koleka 30, basalelaki makasi na bango mpe mbongo na bango mpo na komipesa mpenza na mosala ya kosakola. * Na ntembe te, Yesu ná baanzelu bazalaki na esengo komona ete bato wana oyo bazalaki na kati ya blé, atako bazalaki moke, bapikamaki makasi mpe matiti mabe ya Satana emɛlaki bango te! Atako bongo, emonanaki ete esengelaki ‘kopɛtola bana ya Levi,’ elingi koloba bakristo oyo batyami mafuta na elimo. (Mal. 3:2, 3; 1 Pe. 4:17) Mpo na nini?

8. Makambo nini esalemaki nsima ya 1914?

8 Na nsuka ya 1914, Bayekoli mosusu ya Biblia balɛmbaki nzoto mpo bakendaki na likoló te. Na 1915 mpe 1916, botɛmɛli oyo eutaki libándá ya lisangá elɛmbisa mosala ya kosakola. Likambo ya mabe koleka, nsima ya liwa ya ndeko Russell na sanza ya zomi 1916, botɛmɛli ebimaki na kati ya lisangá. Bandeko minei kati na bandeko nsambo oyo bazalaki kotambwisa la Société batɛmɛlaki ekateli oyo ezwamaki ya kotya ndeko Rutherford prezida ya la Société. Balukaki kokɔtisa bokabwani na kati ya bandeko, kasi na sanza ya mwambe 1917, balongwaki na Betele: lisangá epɛtolamaki mpenza! Longola yango, mpo na kobanga bato, Bayekoli mosusu ya Biblia batikaki kosalela Nzambe. Atako bongo, Bayekoli mingi ya Biblia bandimaki ete Yesu apɛtola bango mpe basalaki bambongwana oyo esengeli. Na yango, Yesu amonaki ete bazali bakristo ya solo, elingi koloba blé, kasi aboyaki bakristo ya lokuta oyo bazalaki na kati ya lisangá mpe baoyo nyonso bazalaki na kati ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba. (Mal. 3:5; 2 Tim. 2:19) Nini esalemaki na nsima? Mpo na koyeba yango, tózonga na ndakisa ya blé ná matiti mabe.

MAKAMBO OYO ESENGELAKI KOSALEMA NSIMA YA EBANDELI YA ELEKO YA KOBUKA MBUMA

9, 10. (a) Tokotalela nini sikoyo na oyo etali eleko ya kobuka mbuma? (b) Ntango eleko ya kobuka mbuma ebandaki, nini esalemaki liboso?

9 Yesu alobaki boye: “Ntango ya kobuka mbuma ezali bosukisi ya makambo ya ntango moko boye.” (Mat. 13:39) Eleko wana ya kobuka mbuma ebandaki na 1914. Tótalela makambo mitano oyo Yesu alobaki ete ekosalema na ntango yango.

10 Ya liboso, kopikola matiti mabe. Yesu alobaki boye: “Na eleko ya kobuka mbuma nakoyebisa babuki-mbuma ete, Liboso bópikola matiti mabe mpe bókangisa yango mabokemaboke.” Nsima ya 1914, baanzelu babandaki ‘kopikola’ bakristo oyo bazalaki lokola matiti mabe na ndenge bakabolaki bango na “bana ya bokonzi” oyo batyami mafuta na elimo.​—Mat. 13:30, 38, 41.

11. Tii lelo, likambo nini ezali mpenza kokesenisa bakristo ya solo ná bakristo ya lokuta?

11 Wana mosala ya kopikola ezalaki kokoba, bokeseni kati na blé ná matiti mabe ekómaki komonana polele mpenza. (Em. 18:1, 4) Na 1919, emonanaki polele ete Babilone Monene ekwei. Nini mpenza ekesenisaki bakristo ya solo ná bakristo ya lokuta? Mosala ya kosakola. Bandeko oyo bazalaki kokamba Bayekoli ya Biblia bakómaki kolobela mingi ntina oyo ndeko nyonso asengeli komipesa na mosala ya kosakola Bokonzi. Na ndakisa, mwa buku moko (To Whom the Work Is Entrusted) oyo ebimisamaki na 1919 elendisaki bakristo nyonso oyo batyami mafuta na elimo básakolaka ndako na ndako. Elobaki boye: “Mosala yango ekoki kobangisa; kasi ezali mosala ya Nkolo mpe ezali na makasi na ye nde tokosala yango. Bozali na libaku malamu ya kosangana na mosala yango.” Nini esalemaki? Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1922 elobaki ete kobanda na ntango wana, Bayekoli ya Biblia bamipesaki lisusu mingi na mosala ya kosakola. Eumelaki te, kosakola ndako na ndako ekómaki elembo mpo na koyeba bakristo wana ya sembo, mpe ezali bongo tii lelo.

12. Kobanda ntango nini blé ezali koyanganisama?

12 Ya mibale, koyanganisa blé. Yesu apesaki baanzelu mitindo oyo: “Bóbanda koyanganisa blé na kati ya ndako na ngai ya kobomba biloko.” (Mat. 13:30) Kobanda 1919, bakristo oyo batyami mafuta na elimo bazali koyanganisama na lisangá ya bokristo oyo epɛtolami. Mpo na bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakozala na bomoi na nsuka ya ebongiseli oyo, koyanganisama ya nsuka ekosalema ntango bakozwa mbano na bango ya kokende na likoló.​—Dan. 7:18, 22, 27.

13. Emoniseli 18:7 emonisi ete mwasi ya ndumba, to Babilone Monene, kati na yango mangomba ya bokristo, ezali komimona ndenge nini lelo oyo?

13 Ya misato, kolela mpe kolya mino. Ntango baanzelu basilisaki kokangisa matiti mabe, nini esalemaki? Mpo na ndenge bakristo oyo bazali lokola matiti mabe basengelaki kozala, Yesu alobaki ete: “Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.” (Mat. 13:42) Likambo yango ezali kosalema sikoyo? Te. Lelo oyo, mangomba ya bokristo, oyo ezali eteni ya mwasi ya ndumba, ezali naino koloba ete: “Nazali mokonzi, mpe nazali te mwasi oyo mobali akufá, mpe nakomona mawa ata moke te.” (Em. 18:7) Ya solo, mangomba ya bokristo ezali komizwa na lokumu mingi; ezali kutu kokanisa ete ‘ezali mokonzi’ likoló ya bakonzi ya politiki. Lelo oyo, bakristo oyo bazali lokola matiti mabe bazali komikumisa, bazali kolela te. Kasi etikali moke makambo ebongwana.

Etikali moke boninga ya mangomba ya bokristo ná bakonzi ya politiki esuka (Talá paragrafe 13)

14. (a) Ntango nini mpe mpo na nini bakristo ya lokuta ‘bakolya mino na bango’? (b) Ndenge nini likambo oyo tosemboli na ndimbola ya Matai 13:42 eyokani na likanisi oyo ezali na Nzembo 112:10? (Talá paragrafe 14 na etanda Mitángo ya mike.)

14 Na bolɔzi monene, ntango mangomba nyonso ya lokuta ekobomama, bandimi na yango bakoluka esika ya komibomba, kasi bakozwa ata moko te. (Luka 23:30; Em. 6:15-17) Na nsima, ntango bakomona ete ndenge ya kokima libebi ezali te, bakolela mpo bakozala na elikya te mpe ‘bakolya mino na bango’ na nkanda. Ndenge Yesu alobaki yango na esakweli na ye mpo na bolɔzi monene, na ntango wana ya mpasi, “bakomibɛtabɛta na kolela.” *​—Mat. 24:30; Em. 1:7.

15. Nini ekokómela matiti mabe, mpe ntango nini likambo yango ekosalema?

15 Ya minei, kobwakama na litumbu ya mɔtɔ. Nini ekokómela matiti mabe oyo bakangisi mabokemaboke? Baanzelu “bakobwaka [yango] na litumbu ya mɔtɔ.” (Mat. 13:42) Yango elimboli kobebisama mpo na libela. Na yango, bato wana oyo bazalaki liboso na mangomba ya lokuta bakobebisama na eteni ya nsuka ya bolɔzi monene, na Armagedone.​—Mal. 4:1.

16, 17. (a) Likambo nini ya nsuka Yesu alobelaki na ndakisa na ye? (b) Mpo na nini tolobi ete likambo yango ekokokisama nde na mikolo ezali koya?

16 Ya mitano, kongɛnga makasi. Yesu asukisaki esakweli na ye na maloba oyo: “Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi na kati ya bokonzi ya Tata na bango.” (Mat. 13:43) Ntango nini mpe epai wapi likambo yango ekosalema? Maloba yango ekokokisama na mikolo ezali koya. Na esika wana, Yesu alobelaki te likambo moko oyo ezali kosalema sikoyo awa na mabele; alobelaki nde likambo oyo ekosalema na likoló na mikolo oyo ezali koya. * Tótalela makambo mibale oyo etindi biso tóloba bongo.

17 Ya liboso, likambo yango ekosalema “ntango nini”? Yesu alobaki boye: “Na ntango yango bayengebene bakongɛnga makasi.” Emonani ete maloba “na ntango yango” etaleli likambo oyo Yesu autaki kolobela liboso, elingi koloba ‘kobwakama ya matiti mabe na litumbu ya mɔtɔ.’ Likambo yango ekosalema na eteni ya nsuka ya bolɔzi monene. Na yango, bakristo oyo batyami mafuta na elimo mpe “bakongɛnga makasi” na ntango wana, na mikolo ezali koya. Ya mibale, likambo yango ekosalema “epai wapi”? Yesu alobaki ete bayengebene ‘bakongɛnga na kati ya bokonzi.’ Yango elimboli nini? Bakristo nyonso ya sembo oyo batyami mafuta na elimo oyo bakozala awa na mabele ntango oyo eteni ya liboso ya bolɔzi monene ekoleka bakosila kozwa elembo na bango ya nsuka. Na nsima, ndenge Yesu asakolaki yango, bakoyanganisama na likoló. (Mat. 24:31) Kuna nde bakongɛnga “na kati ya bokonzi ya Tata na bango,” mpe mwa moke na nsima ya etumba ya Armagedone, bakozala na esengo ya kozala mwasi ya libala na “fɛti ya libala ya Mwana-Mpate.”​—Em. 19:6-9.

MATOMBA OYO TOZWI

18, 19. Kokanga ntina ya ndakisa ya Yesu ya blé ná matiti mabe epesi biso matomba nini?

18 Makambo oyo ndakisa ya Yesu esalisi biso tósosola ezali kopesa biso matomba nini? Tótalela matomba misato. Ya liboso, ekolisi boyebi na biso. Ndakisa yango emonisi ntina monene oyo mpo na yango Yehova azali kotika nzela ete mabe ezala. ‘Akangelaki bambɛki ya nkanda motema’ mpo na kobongisa “bambɛki ya motema mawa”​—bakristo oyo bazali lokola blé. * (Rom. 9:22-24) Ya mibale, ebakiseli biso elikya. Awa nsuka ezali kopusana, banguna na biso bakobakisa milende mpo na kobundisa biso, ‘kasi bakolonga te.’ (Tángá Yirimia 1:19.) Tata na biso ya likoló Yehova abatelaki blé na boumeli ya bambula mingi; ndenge moko mpe, na nzela ya Yesu mpe baanzelu, akozala elongo na biso “mikolo nyonso,” tii na nsuka.​—Mat. 28:20.

19 Ya misato, ndakisa yango esalisi biso tóyeba bakristo oyo bazali lokola blé. Mpo na nini boyebi yango ezali na ntina mingi? Koyeba bakristo yango ekosalisa biso mingi mpo tózwa eyano na motuna moko oyo Yesu atunaki kaka na esakweli na ye oyo elobelaki mikolo ya nsuka. Atunaki boye: “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele?” (Mat. 24:45) Masolo mibale oyo elandi ekopesa biso biyano ya malamu na motuna yango.

 

^ par. 2 Paragrafe 2: Mpo omikundola ndimbola ya biteni mosusu ya ndakisa yango, tosɛngi yo otánga lisolo “Bayengebene bakongɛnga makasi lokola moi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2010.

^ par. 3 Paragrafe 3: Lokola bantoma ya Yesu basilaki kokufa mpe bakristo oyo batyami mafuta na elimo, oyo bazalaki awa na mabele, bamonisamaki lokola baombo te, kasi nde lokola blé, boye baombo ezali nde baanzelu. Na nsima, Yesu amonisaki ete babuki-mbuma ezali baanzelu.​—Mat. 13:39.

^ par. 6 Paragrafe 6: Yango esemboli boyebi na biso. Liboso, tozalaki kokanisa ete Yesu ayaki kotala tempelo ya elimo na 1918.

^ par. 7 Paragrafe 7: Kobanda 1910 tii na 1914, Bayekoli ya Biblia bakabolaki babuku pene na 4 000 000 mpe batrakte ná mwa babuku koleka 200 000 000.

^ par. 14 Paragrafe 14: Yango esemboli ndenge oyo tozalaki kolimbola Matai 13:42. Kala, mikanda na biso elobaki ete bakristo ya lokuta bazali ‘kolela mpe kolya mino na bango’ banda bambula mingi mpo bazali na mawa makasi na ndenge “bana ya bokonzi” bazali kobimisa bango polele ete bazali “bana ya moto mabe.” (Mat. 13:38) Kasi, tosengeli kobosana te ete kolya mino elimboli nde kobebisama.​—Nz. 112:10.

^ par. 16 Paragrafe 16: Danyele 12:3 elobi ete “baoyo bazali na mayele ya kososola [bakristo oyo batyami mafuta na elimo] bakongɛnga lokola kongɛnga ya etando.” Awa na mabele, bazali kongɛnga na ndenge bazali komipesa na mosala ya kosakola. Kasi, Matai 13:43 elobeli nde ntango oyo bakongɛnga makasi na Bokonzi ya likoló. Kala, tozalaki kokanisa ete bavɛrsɛ yango mibale ezali kolobela kaka likambo moko: mosala ya kosakola.