Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Ndeko ya sika na Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Na ntɔngɔ ya mokolo ya misato, mwa mitano sanza ya libwa 2012, bapesaki liyebisi na libota ya Betele ya États-Unis mpe ya Canada ete ndeko moko abakisami na Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova. Kobanda na mokolo ya 01/09/2012, ndeko Mark Sanderson akɔtaki na Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Ndeko Sanderson akolá na engumba San Diego, na etúká ya Californie, na États-Unis; baboti na ye bazalaki bakristo mpe azwaki batisimo na mokolo ya 09/02/1975. Abandaki mosala ya mobongisi-nzela na mokolo ya 01/09/1983, na engumba ya Saskatchewan, na Canada. Na sanza ya zomi na mibale 1990, azwaki diplome na kelasi ya mbala ya nsambo ya Eteyelo mpo na kobongisa basungi (lelo oyo, Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko mibali minzemba) na États-Unis. Na sanza ya minei 1991, batindaki ndeko Sanderson mobongisi-nzela monene na esanga Terre-Neuve, na Canada. Nsima ya kosala lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi, na sanza ya mibale 1997, babengaki ye akóma kosala na Betele ya Canada. Na sanza ya zomi na moko 2000, batindaki ye na Betele ya États-Unis, epai azalaki kosala na Biro ya makambo etali boyokani elongo na minganga mpe na nsima na Departema ya mosala.

Na sanza ya libwa 2008, ndeko Sanderson akɔtaki na Eteyelo mpo na bandeko ya Bakomite ya filiale, mpe na nsima batindaki ye akende kosala na komite ya filiale na Betele ya Philippines. Na sanza ya libwa 2010, basɛngaki ye azonga na Betele ya États-Unis, epai akómaki mosungi na Komite ya Mosala ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.