Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bosantisami

Bosantisami

“Bosukwami pɛɛ, . . . bosantisami.”​—1 KO. 6:11.

1. Makambo nini ya mabe Nehemia akutaki ntango azongaki na Yerusaleme? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.)

BATO ya Yerusaleme bazali kolobaloba. Mopaya moko oyo ayebani ete alingaka Yehova te azali kofanda na shambrɛ moko ya tempelo. Balevi bazali kosundola mikumba na bango. Na esika ete bankulutu bámipesa na makambo ya losambo, bazali kosala mombongo na mokolo ya Sabata. Mpe Bayisraele mingi bazali kobala bato oyo bazali Bayuda te. Wana ezali kaka ndambo ya makambo mabe oyo Nehemia akutaki ntango azongaki na Yerusaleme mwa moke nsima ya mobu 443 L.T.B.​—Neh. 13:6.

2. Ndenge nini Yisraele ekómaki ekólo oyo esantisami?

2 Yisraele ezalaki ekólo oyo emipesaki na Nzambe. Na mobu 1513 L.T.B., Bayisraele bandimaki kosala mokano ya Yehova. Balobaki ete: “Maloba nyonso oyo Yehova alobi, tokosalela yango.” (Kob. 24:3) Na yango, Nzambe asantisaki bango, elingi koloba atyaki bango pembeni mpo bázala ekólo na ye. Ezalaki mpenza lokumu monene! Mbula 40 na nsima, Moize akundwelaki bango ete: “Yo ozali ekólo moko mosantu na miso ya Yehova Nzambe na yo. Yo nde Yehova Nzambe na yo aponi mpo okóma ekólo na ye, eloko na ye moko, kati na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na mabele.”​—Mib. 7:6.

3. Bayuda bazalaki ndenge nini na elimo ntango Nehemia ayaki na Yerusaleme mpo na mbala ya mibale?

3 Likambo ya mawa, esengo oyo Yisraele ezalaki na yango ya kozala ekólo mosantu eumelaki te. Atako ezalaki ntango nyonso na mwa bato oyo bazalaki kosalela Nzambe, Bayuda mingi bazalaki koluka mingimingi nde komonana basantu to bato oyo bamipesá, na esika ya koluka kosala mokano ya Nzambe. Ntango Nehemia ayaki na Yerusaleme mpo na mbala ya mibale, mbula soki nkama moko esilaki koleka banda ntango oyo mwa ndambo ya Bayuda ya sembo bautaki na Babilone mpe bazongaki na Yerusaleme mpo na kozongisa losambo ya solo. Kasi, molende ya ekólo yango mpo na makambo ya elimo ezalaki kokita.

4. Makambo nini tokotalela oyo ekoki kosalisa biso tózala ntango nyonso bato oyo basantisami?

4 Lokola Bayisraele, lelo oyo Batatoli ya Yehova mpe bazali bato oyo basantisami na Nzambe. Ezala bakristo oyo batyami mafuta na elimo to baoyo bazali na kati “ebele mpenza ya bato” bazali basantu, batyami pembeni mpo na mosala mosantu. (Em. 7:9, 14, 15; 1 Ko. 6:11) Moko te kati na biso akolinga ete azala lisusu mosantu te na miso ya Nzambe, ndenge nsukansuka Bayisraele bakómaki. Tokoki kosala nini mpo likambo ya ndenge wana ekómela biso te, mpo tózala ntango nyonso basantu mpe Yehova akoba kosalela biso na mosala na ye? Na boyekoli oyo, tokotalela makambo minei oyo Nehemia mokapo 13 elobeli: (1) Koboya baninga mabe; (2) kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova; (3) kotya makambo ya elimo na esika ya liboso; mpe (4) kobosana te ete ozali mokristo. Tótalela makambo yango mokomoko.

BOYÁ BANINGA MABE

Ndenge nini Nehemia amonisaki ete azali sembo epai ya Yehova? (Talá paragrafe 5 mpe 6)

5, 6. Eliashibe mpe Tobia bazalaki banani, mpe ekoki kozala mpo na nini Eliashibe akómaki moninga ya Tobia?

5 Tángá Nehemia 13:4-9. Lokola tofandi na mokili oyo etondi na bato mabe mpe makambo ya mabe, ezali pɛtɛɛ te kokoba kozala basantu. Tózwa ndakisa ya Eliashibe ná Tobia. Eliashibe azalaki nganga-nzambe monene, mpe Tobia azalaki Moamone mpe emonani ete azalaki mosaleli na Yudea, etúká oyo eyangelamaki na Baperse. Tobia ná baninga na ye batɛmɛlaki milende oyo Nehemia asalaki mpo na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme. (Neh. 2:10) Epekisamaki na Baamone bátya makolo na bango na lopango ya tempelo. (Mib. 23:3) Bongo, ebandaki boni nganga-nzambe monene atika moto lokola Tobia akóma kofanda na esika ya kolya na kati ya tempelo?

6 Tobia akómaki moninga mpenza ya Eliashibe. Tobia ná mwana na ye ya mobali Yehohanane babalaki basi Bayuda, mpe Bayuda mingi bazalaki koloba malamu mpo na Tobia. (Neh. 6:17-19) Moko ya bankɔkɔ ya Eliashibe abalaki mwana mwasi ya Sanebalate, guvɛrnɛrɛ ya Samaria, oyo azalaki moko ya baninga ya motema ya Tobia. (Neh. 13:28) Mbala mosusu, boninga wana nde esalaki ete nganga-nzambe monene Eliashibe alanda makanisi ya moto oyo azalaki mopakano mpe motɛmɛli ya losambo ya solo. Kasi Nehemia amonisaki ete azali sembo epai ya Yehova na ndenge abwakaki biloko nyonso ya Tobia na libándá ya esika ya kolya.

7. Bankulutu mpe bandeko mosusu basalaka nini mpo bákoba kozala basantu na miso ya Yehova?

7 Lokola tozali bato oyo bamipesá na Yehova Nzambe, tosengeli kotikala sembo libosoliboso epai na ye. Mpo tókoba kozala basantu na miso ya Nzambe, tosengeli kotosa mitinda na ye ya sembo. Tosengeli te kotika ete bondeko ya libota eleka liboso ya mitinda ya Biblia. Bankulutu bazwaka bikateli na kolanda makanisi ya Yehova, kasi te na kolanda makanisi to mayoki na bango moko. (1 Tim. 5:21) Bankulutu bakebaka ete básala likambo moko te oyo ekoki kobebisa boyokani na bango na Nzambe.​—1 Tim. 2:8.

8. Likambo nini tosengeli kobosana te na oyo etali baninga?

8 Tosengeli kobosana te ete “baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Ko. 15:33) Ata bandeko na biso mosusu ya libota bakoki kozala baninga mabe mpe kotinda biso tósala makambo ya mabe. Eliashibe apesaki ndakisa malamu na ndenge asalisaki Nehemia mingi mpo na kotonga lisusu bifelo ya Yerusaleme. (Neh. 3:1) Kasi, emonani ete nsima ya mikolo, Tobia ná bato mosusu batindaki Eliashibe asala makambo ya mabe oyo ekómisaki ye mbindo na miso ya Yehova. Tosengeli koluka baninga oyo bakolendisa biso tósala makambo ya malamu, na ndakisa kotánga Biblia, koyangana na makita, mpe kobima na mosala ya kosakola. Tosengeli kozala na botɔndi mingi mpo na bandeko na biso ya libota oyo balendisaka biso tósala makambo ya malamu.

PESÁ MABƆKƆ NA MOSALA YA YEHOVA

9. Makambo nini ekómaki kosalema na tempelo, mpe Nehemia apamelaki banani?

9 Tángá Nehemia 13:10-13. Emonani ete ntango Nehemia azongaki na Yerusaleme, bato bazalaki kopesa makabo mpenza te mpo na misala ya tempelo. Lokola Balevi bazalaki kozwa lisungi te, bakómaki kosundola mikumba na bango na tempelo mpo na kokende kosala bilanga na bango. Nehemia apamelaki bayangeli-basungi mpo na likambo yango. Emonani ete bazalaki kokokisa mikumba na bango te. Mbala mosusu bazalaki kokɔngɔla te ndambo ya zomi epai ya bato ya ekólo to mpe bazalaki kokɔngɔla yango kasi bazalaki kotinda yango na tempelo te, ndenge esɛngamaki. (Neh. 12:44) Na yango, Nehemia alandelaki likambo ya kokɔngɔla ndambo ya zomi. Aponaki mibali ya sembo mpo na kotambwisa mosala ya kopesa Balevi biloko oyo basengelaki na yango.

10, 11. Lokumu nini tozalaka na yango ntango tozali kopesa mabɔkɔ na losambo ya solo?

10 Liteya nini tokoki kozwa na likambo yango? Ekundweli biso ete tozali na lokumu monene ya kokumisa Yehova na biloko na biso ya motuya. (Mas. 3:9) Ntango tozali kopesa makabo mpo mosala na ye ekende liboso, tozali nde kozongisela Yehova biloko na ye moko. (1 Nt. 29:14-16) Tokoki kokanisa ete lokola tozali na mingi te, likabo na biso ekokumisa Yehova te; nzokande, soki mposa ya kopesa ezali, Yehova akondima likabo na biso.​—2 Ko. 8:12.

11 Na boumeli ya bambula mingi, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki na bana mwambe bazalaki kobengisa ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela monene ya mibange mpo na kolya na bango elongo mbala moko na pɔsɔ. Mama ya libota yango azalaki koloba ete lokola amesaná kolamba mpo na bato zomi, kobakisa bato mibale ezali mpasi te. Kosala bongo ekoki komonana lokola likambo ya moke, kasi babongisi-nzela wana bazalaki na botɔndi mingi mpo na boyambi ya libota wana! Bango mpe bazalaki lipamboli mpo na libota wana. Maloba na bango ya kolendisa mpe masolo ya makambo oyo bazalaki kokutana na yango elendisaki bana yango bákola na elimo. Na nsima, bana yango nyonso bakɔtaki na mosala ya ntango nyonso.

12. Ndakisa nini ya malamu bandeko oyo bazali na mikumba bapesaka?

12 Liteya mosusu ezali ete lokola Nehemia, bandeko mibali oyo bazali na mikumba lelo oyo basengeli kozala bato ya liboso na oyo etali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova. Yango ememelaka bandeko mosusu na lisangá matomba. Na likambo yango, bankulutu bamekolaka mpe ntoma Paulo. Apesaki mabɔkɔ mpo losambo ya solo ekende liboso mpe apesaki malako oyo esalisaki lisangá. Na ndakisa, apesaki batoli mingi mpo na ndenge ya kopesa makabo.​—1 Ko. 16:1-3; 2 Ko. 9:5-7.

TYÁ MAKAMBO YA ELIMO NA ESIKA YA LIBOSO

13. Na ndenge nini Bayuda mosusu bazalaki kotosa Sabata te?

13 Tángá Nehemia 13:15-21. Soki tokómi komitungisa mingi mpo na biloko ya mokili, tokoki kobebisa mokemoke boyokani na biso na Yehova. Na kolanda Kobima 31:13, Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ ezalaki kokundwela Bayisraele ete bazalaki ekólo ya bato oyo basantisami. Na mokolo ya Sabata, Bayuda basengelaki komipesa kaka na losambo na kati ya libota, kobondela, mpe komanyola Mibeko ya Nzambe. Kasi, na mikolo ya Nehemia, Bayisraele mosusu bakómaki komona mokolo ya Sabata kaka lokola mikolo mosusu nyonso: mokolo ya kosala mombongo ndenge bamesaná. Bazongisaki makambo ya losambo nsima. Ntango Nehemia amonaki bongo, abenganaki bapaya nyonso oyo bayaki kotɛka, mpe apesaki etinda ete bákanga baporte ya engumba na mpokwa ya mokolo ya motoba, liboso Sabata ebanda.

14, 15. (a) Nini ekoki kokómela biso soki tozali kolekisa ntango ebeleebele na koluka mbongo? (b) Ndenge nini tokoki kokɔta na kopema ya Nzambe?

14 Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Nehemia? Liteya moko ezali ete tosengeli te kolekisa ntango ebeleebele na koluka mbongo. Soki te, makambo mosusu ekoki kobenda likebi na biso, to kutu kotya biso nkaka na bolingo na biso mpo na Yehova, mingimingi soki tosepelaka na mosala na biso ya mosuni. Kobosana te: Yesu alobaki ete moto moko akoki kozala moombo ya bankolo mibale te. (Tángá Matai 6:24.) Nehemia azalaki moto ya mbongo; kasi ndenge nini asalelaki ntango na ye na Yerusaleme? (Neh. 5:14-18) Na esika ete akoba kosala mombongo na bato ya Tire to bato mosusu, amipesaki na kosalisa bandeko na ye mpe na kosala makambo oyo esalisaki na kosantisa nkombo ya Yehova. Ndenge moko mpe lelo oyo, bankulutu ná basaleli na misala bamipesaka na kosala makambo oyo ekosalisa lisangá, mpe bandeko balingaka bango mpo na yango. Yango esalaka ete bandeko bálingana, bázala na kimya kati na bango, mpe bábanga eloko te.​—Ezk. 34:25, 28.

15 Atako bakristo basɛngisami te kotosa Sabata ya pɔsɔ na pɔsɔ, Paulo alobaki ete “etikali na kopema moko ya sabata mpo na bato ya Nzambe.” Abakisaki ete: “Moto oyo akɔti na kopema ya Nzambe apemi mpe na misala na ye, ndenge Nzambe mpe apemaki na oyo ya ye.” (Ebr. 4:9, 10) Biso bakristo tokoki kokɔta na kopema ya Nzambe soki tozali kotosa ye mpe kosala na boyokani na mokano na ye. Yo ná libota na yo, bozali kotya losambo na kati ya libota, koyangana na makita, mpe mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na bino? Ekoki kosɛnga ete tómonisa mpenza patrɔ na biso to baninga na biso ya mosala ete makambo wana ezali na ntina mingi mpo na biso, mingimingi soki bango bamonaka ete makambo ya elimo ezali na ntina te. Kutu, ekoki ata kosɛnga ete ‘tókanga baporte ya engumba mpe tóbengana bato ya Tire’ mpo tómipesa na makambo ya elimo ndenge esengeli. Lokola tozali bato oyo basantisami, tosengeli komituna boye: ‘Ndenge oyo namemaka bomoi na ngai, emonisaka ete natyaka mosala ya Yehova na esika ya liboso?’​—Mat. 6:33.

KOBOSANA TE ETE OZALI MOKRISTO

16. Na mikolo ya Nehemia, ndenge nini Bayisraele balingaki kobungisa eloko oyo ezalaki komonisa ete bazali na ekólo oyo esantisamaki?

16 Tángá Nehemia 13:23-27. Na mikolo ya Nehemia, Bayisraele bazalaki kobala basi ya bikólo mosusu. Ntango Nehemia ayaki na Yerusaleme na mbala ya liboso, asɛngaki mikóló bátya mabɔkɔ na mokanda oyo elobaki ete bakobala bapakano te. (Neh. 9:38; 10:30) Kasi, bambula moke kaka na nsima, akutaki Bayuda bazali kozwa basi bapakano; kutu etikalaki moke bábungisa eloko oyo ezalaki komonisa ete bazali bato oyo basantisami na Nzambe! Bana oyo basi wana bapaya bazalaki kobota bazalaki kotánga mpe koloba monɔkɔ ya Ebre te. Soki bakómi mikóló, bakomona ete bazali Bayisraele? To bakomona nde ete bazali Baasedode, Baamone, to Bamoabe? Soki bayebi monɔkɔ ya Ebre te, bakokoka mpenza kokanga ntina ya Mibeko ya Nzambe? Ndenge nini bakoyeba Yehova mpe bakopona kosalela ye na esika ya banzambe ya lokuta oyo bamama na bango bazalaki kosambela? Esengelaki kosembola makambo nokinoki, mpe Nehemia asalaki yango.​—Neh. 13:28.

Salisá bana na yo bákóma na boyokani malamu na Yehova (Talá paragrafe 17 mpe 18)

17. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango bákóma na boyokani na Yehova?

17 Lelo oyo, tosengeli kozwa makambo na mabɔkɔ mpo na kosalisa bana na biso bákóma bakristo. Baboti, bómituna boye: Bana na ngai balobaka malamu ‘monɔkɔ ya pɛto,’ elingi koloba bayebi malamu solo oyo euti na Biblia? (Sef. 3:9) Masolo na bango emonisaka ete batambwisami na elimo ya Nzambe to na elimo ya mokili? Bólɛmba nzoto mbala moko te soki bomoni ete ezali na makambo oyo bana basengeli kobongisa. Koyekola monɔkɔ mosusu esɛngaka ntango mingi, mingimingi soki ozali na esika oyo makambo mosusu ezali kobenda likebi na yo. Na mokili, bana bazali kokutana na makambo oyo ezali kotinda bango bábuka mibeko ya Nzambe. Yango wana, na ntango ya losambo na kati ya libota to na mabaku mosusu, bózala motema molai mpo na kosalisa bana bákóma na boyokani malamu na Yehova. (Mib. 6:6-9) Bómonisa bango matomba oyo bakozwa soki bakeseni na bato ya mokili ya Satana. (Yoa. 17:15-17) Mpe bólukaka kosimba mitema na bango.

18. Mpo na nini baboti bakristo nde babongi mpo na kosalisa bana na bango bámipesa na Yehova?

18 Nsukansuka, mwana ye moko akozwa ekateli ya kosalela Yehova to te. Kasi, bino baboti bokoki kosalisa mingi. Bosengeli kopesa bango ndakisa malamu, komonisa bango polele etamboli oyo ebongi, mpe kosalisa bango báyeba makambo oyo bikateli ya mabe ekoki komemela bango. Baboti, bino nde bobongi mpo na kosalisa bana na bino mpo bámipesa na Yehova. Basengeli na lisalisi na bino mpo bákóma bakristo mpe bábosana te ete bazali bakristo. Ya solo, biso nyonso tosengeli kokeba ete tóbungisa te ‘bilamba na biso ya likoló,’ elingi koloba, mitinda mpe bizaleli oyo emonisaka ete tozali bayekoli ya Kristo.​—Em. 3:4, 5; 16:15.

YEHOVA AKOKANISA YO MPE AKOSALELA YO BOLAMU

19, 20. Tokoki kosala nini mpo Yehova akanisa biso mpe asalela biso bolamu?

19 Moto mosusu oyo azalaki na bomoi na eleko ya Nehemia ezalaki mosakoli Malaki, oyo alobaki ete “buku ya kokanisama ebandaki kokomama . . . mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bakanisaka nkombo na ye.” (Mal. 3:16, 17) Nzambe akobosana ata moke te bato oyo babangaka ye mpenza mpe oyo balingaka nkombo na ye.​—Ebr. 6:10.

20 Nehemia abondelaki boye: “Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai mpe salelá ngai bolamu.” (Neh. 13:31) Ndenge moko na Nehemia, nkombo na biso ekokɔta na buku ya kokanisama ya Nzambe soki tokobi koboya baninga mabe, tozali kopesa mabɔkɔ na mosala ya Yehova, kotya makambo ya elimo na esika ya liboso, mpe soki tobosani te ete tozali bakristo. ‘Tókoba komimeka mpo na komona soki tozali na kati ya kondima.’ (2 Ko. 13:5) Soki tokobi kozala na kati ya bato oyo Yehova asantisi, akokanisa biso mpe akosalela biso bolamu.