Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Yehova ‘azali komema mokumba na ngai mokolo na mokolo’

Yehova ‘azali komema mokumba na ngai mokolo na mokolo’

Nazali na maladi moko ya makasi, kasi namoni ndenge Tata na biso na likoló oyo alingaka biso asungi ngai mingi na bomoi. Mpe esali mbula koleka 20 sikoyo, nasepeli mingi mpo nasaleli Yehova lokola mobongisi-nzela.

Nabotamá na 1956, ná maladi babengi spina-bifida. Lokola mokuwa ya mokɔngɔ na ngai ekangamaki malamu te, nakómaki na bamaladi ndenge na ndenge oyo esalaki ete nakoka kotambola te mpe ebimisaki bamaladi mosusu ya makasi.

Mwa moke liboso ete nabotama, bamisionɛrɛ ya Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na baboti na ngai. Na bomwana na ngai, basakoli bazalaki kaka mokomoko na mboka na biso Usakos, na Namibie. Na yango, makambo oyo tosengelaki koyekola na makita, tozalaki koyekola yango na ndako. Ntango nakómaki na mbula 7, basalaki ngai lipaso mpo na kofungola lidusu moko na nzoto na ngai mpo masuba ebimaka wana. Ntango nakómaki na mbula 14, nakómaki kobɛla maladi ya ndɛkɛ. Lokola eteyelo moko te ya ntei ezalaki pene mpenza ya ndako na biso mpe lokola ezalaki kosɛnga ete baboti na ngai bákipaka ngai ntango nyonso, mwaye nasilisa kelasi ezalaki te.

Atako bongo, nazwaki ekateli ya kokómisa makasi boyokani na ngai ná Nzambe. Na ntango wana, mikanda mingi ya moombo ya sembo ezalaki naino te na Afrikaans, monɔkɔ na biso. Yango wana, nayekolaki kotánga Lingelesi mpo nayekola mwa babuku mingi ya moombo ya sembo. Na nsima, nakómaki mosakoli mpe nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 19. Na boumeli ya mbula minei oyo elandaki, nabɛlaki mingi mpe nanyokwamaki na makanisi. Longola yango, lokola nazalaki na mboka oyo bato bamesaná mingi, kobanga bato ezalaki kopekisa ngai kosakola na molende.

Ntango nakómaki na mbula mwa moke koleka 20, tolongwaki na Namibie mpe tokendaki kofanda na Afrika ya Sudi; mpo na mbala ya liboso, nazwaki likoki na koyangana na makita na lisangá. Nasepelaki mingi! Kasi, basalaki ngai lisusu lipaso, ya mbala oyo na côlon, mpo na kofungola mwa nzela moko mpo nabimisaka salite ya libumu.

Nsima ya mikolo, mokɛngɛli ya zongazonga moko asalaki lisolo oyo elobelaki mosala ya mobongisi-nzela. Makambo oyo alobaki esimbaki motema na ngai. Nayebaki ete nazali moto ya maladi, kasi namonaki ndenge oyo Yehova azalaki kosunga ngai na ebele ya mikakatano. Na yango, nasɛngaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Kasi, lokola nazalaki kobɛla mingi, bankulutu bazalaki kolinga te.

Atako bongo, nazwaki ekateli ya komipesa mingi na mosala ya kosakola Bokonzi. Na lisalisi ya mama na ngai mpe bandeko mosusu, na boumeli ya sanza motoba, nalongaki kopesa ngonga oyo esɛngamaki na babongisi-nzela. Yango emonisaki ete nalingaki mpenza kokóma mobongisi-nzela mpe ete maladi ekokaki te kopekisa ngai nasala yango. Natondisaki lisusu formilɛrɛ, mpe mbala oyo bandimaki. Na mokolo ya 01/09/1988, nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.

Na mosala ya mobongisi-nzela, namonaki ndenge Yehova azalaki ntango nyonso kosalisa ngai. Koteya bato solo ya Biblia na esika nakanisaka kaka maladi na ngai ebatelaki ngai, elendisaki ngai, mpe esalisaki ngai nakóma na boyokani malamu na Yehova. Nazali na esengo mingi ndenge nasalisi bato ebele bámipesa na Yehova mpe bázwa batisimo.

Tii lelo, nabɛlaka kaka mingi. Kasi, Yehova ‘azali komema mokumba na ngai mokolo na mokolo.’ (Nz. 68:19) Azali kosalisa ngai nazala na bomoi; kasi azali mpe kosalisa ngai nasepela na bomoi yango!