Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Zwáká bikateli ya malamu

Zwáká bikateli ya malamu

“Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te.”​—MAS. 3:5.

1, 2. Olingaka kozwa bikateli yo moko? Okanisaka nini mpo na bikateli mosusu oyo osilá kozwa?

MOKOLO na mokolo tozwaka bikateli ndenge na ndenge. Osepelaka kozwa bikateli yo moko to olingaka moto mosusu azwela yo yango? Bato mosusu balingaka kozwa bikateli nyonso bango moko. Balobaka ete bazali na lotomo ya kozwa bikateli; kutu baboyaka koyoka ata koyoka ete moto mosusu azwa ekateli na esika na bango. Kasi, ezali mpe na bato mosusu oyo babangaka kozwa bikateli ya minene. Basusu balukaka babuku to bapesi-toli mpe mbala mosusu babebisaka mbongo ebele mpo bázwa toli oyo basengeli na yango.

2 Mingi kati na biso toyebi ete ezali na bikateli mosusu oyo tozali na lotomo ya kozwa te; kasi tosepelaka mpe mingi mpamba te na makambo mingi ya bomoi, biso moko tokoki kozwa bikateli oyo tolingi. (Gal. 6:5) Atako bongo, na ntembe te tokondima ete bikateli mosusu oyo tozwaka ezalaka ya malamu te, mpe esalisaka biso te.

3. Nini esalisaka biso tózwa bikateli, kasi mpo na nini ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te koyeba ekateli oyo tosengeli kozwa?

3 Biso basaleli ya Yehova tokoki kosepela mpamba te Nzambe apesi biso malako ya polele na makambo mingi ya minene oyo tokutanaka na yango na bomoi. Toyebi ete soki tolandi malako yango, tokoki kozwa bikateli ya malamu oyo ekosepelisa Yehova mpe ekomemela biso matomba. Kasi, tokoki kokutana na makambo mosusu oyo Liloba ya Nzambe elobeli mpenzampenza te. Na ntango yango, ndenge nini tokoyeba oyo tosengeli kosala? Na ndakisa, toyebi ete Biblia epekisi koyiba. (Ef. 4:28) Kasi, koyiba elimboli mpenza nini? Etaleli nde motuya ya eloko oyo moto azwi, makanisi oyo etindi ye azwa yango, to etaleli eloko mosusu? Tosalaka ndenge nini liboso ya makambo oyo ezali na malako ya polele te? Nini ekoki kosalisa biso?

KOZALA NA MAKANISI MALAMU

4. Toli nini bapesaka biso na bantango mosusu soki tolingi kozwa ekateli moko?

4 Ntango toyebisi ndeko moko mokristo ete tolingi kozwa ekateli moko ya monene, akoki kolendisa biso tózala na makanisi malamu ntango tokozwa ekateli yango. Toli ya ndenge wana ebongi mpenza. Biblia mpe ekebisi biso ete tózwaka bikateli mbangumbangu te; elobi boye: “Moto nyonso oyo asalaka makambo mbangumbangu akokelela mpenza kokelela.” (Mas. 21:5) Kasi, kozala na makanisi malamu elimboli nini? Elimboli kaka kozwa ntango mingi mpo na kokanisa likambo yango malamumalamu, kozala makambo makasimakasi te, mpe koyeba makambo nyonso malamu liboso ya kozwa ekateli? Nyonso wana ekoki kosalisa biso mpo tózwa ekateli ya malamu, kasi kozala na makanisi malamu esuki wana te.​—Rom. 12:3; 1 Pe. 4:7.

5. Mpo na nini makanisi na biso ezalaka malamu na ndenge ya kokoka te?

5 Tosengeli koyeba ete moko te kati na biso abotamá na makanisi malamu na ndenge ya kokoka. Mpo na nini? Mpamba te biso nyonso tozali bato ya masumu mpe ya kozanga kokoka, na nzoto to na makanisi. (Nz. 51:5; Rom. 3:23) Longola yango, liboso toyebaki Yehova mpe mibeko na ye te; Satana ‘azipaki’ makanisi ya mingi kati na biso. (2 Ko. 4:4; Tito 3:3) Na yango, soki tozali kozwa bikateli na kolanda kaka makanisi na biso, tokoki komikosa, ata soki tolekisi ntango boni na kokanisa liboso.​—Mas. 14:12.

6. Nini ekoki kosalisa biso tóyekola komonisa makanisi malamu?

6 Atako tozali na nzoto mpe makanisi ya kokoka te, Yehova Tata na biso ya likoló akoká na makambo nyonso. (Mib. 32:4) Likambo ya esengo, apesi biso oyo tosengeli na yango mpo tóbongola makanisi na biso mpe tóyekola kozala na makanisi malamu. (Tángá 2 Timote 1:7.) Lokola tozali bakristo, mposa na biso ezali ete tókanisaka mpe tósalaka makambo na ndenge ya malamu. Tosengeli koyekola kopekisa makanisi mpe mayoki na biso mpe komekola makanisi ya Yehova mpe ndenge oyo asalaka makambo.

7, 8. Pesá ndakisa moko oyo emonisi ete tokoki kozwa ekateli ya malamu ata soki basusu bazali kotya biso mbamba.

7 Tózwa ndakisa moko. Bato mingi oyo bakendá kofanda na mboka mopaya bakómi na momeseno ya kozongisa bana na bango ya mike na mboka oyo bautá mpo bandeko ya libota bábɔkɔla bango, bongo bango baboti bákoba mosala mpo na koluka mbongo. * Mwasi moko oyo akendá mboka mopaya abotaki mwana moko kitoko ya mobali. Na eleko yango, abandaki koyekola Biblia mpe akómaki kokola malamu na elimo. Baninga mpe bandeko na ye bakómaki kotya ye ná mobali na ye mbamba ete bázongisa mwana yango na mboka mpo bankɔkɔ na ye bábɔkɔla ye. Kasi, wana azalaki koyekola Biblia, mwasi yango amonaki ete lokola azali moboti, Nzambe apesi nde ye mokumba ya kobɔkɔla mwana na ye. (Nz. 127:3; Ef. 6:4) Asala nini? Alanda momeseno oyo ezalaki komonana malamu na miso ya bato ebele? To alanda makambo oyo azalaki koyekola na Biblia, oyo ekokaki kosala ete akóma na mikakatano ya mbongo mpe bato mosusu báyina ye? Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?

8 Lokola bazalaki kotya ye mbamba mingi, elenge mwasi yango afungwelaki Yehova motema, asɛngaki ye alakisa ye nzela. Ntango asololaki likambo yango na ndeko mwasi oyo azalaki koyekola na ye Biblia mpe bandeko mosusu na lisangá, akómaki kososola likanisi ya Yehova. Akanisaki mpe mabe oyo baboti bakoki kosala mwana soki bazali elongo na ye te na bambula na ye ya ebandeli ntango bana balukaka koyeba makambo. Nsima ya kotalela likambo yango na lisalisi ya Makomami, mwasi yango amonaki ete ebongi te atinda mwana na ye epai ya baboti na ye. Ntango mobali na ye amonaki ndenge bandeko ya lisangá bazalaki koya kosalisa bango mpe ndenge mwana na bango azalaki nzoto kolɔngɔnɔ mpe esengoesengo, andimaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita elongo na mwasi na ye.

9, 10. Kozala na makanisi malamu elimboli nini, mpe ndenge nini tokoki kozwa yango?

9 Wana ezali kaka ndakisa moko, kasi emonisi ete kozala na makanisi malamu elimboli te kolanda kaka makambo oyo biso moko tokanisi to oyo bato mosusu bakanisi ete ebongi to ete ekosalisa. Makanisi mpe motema na biso ya kozanga kokoka ezali lokola montre oyo ezali kotambola mbangu mingi to malɛmbɛ mingi. Kolanda yango ekoki komemela biso mikakatano ya minene. (Yir. 17:9) Mpo tóboya mindɔndɔ, makanisi mpe motema na biso esengeli kolanda mitinda ya Nzambe, oyo ebongi kotyelama motema.​—Tángá Yisaya 55:8, 9.

10 Yango wana Biblia epesi biso toli ete: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” (Mas. 3:5, 6) Simbá maloba “kondimela mayele na yo moko te.” Maloba oyo elandi elobi “kanisá [Yehova].” Ye nde azali na makanisi malamu ya solosolo. Na yango, ntango nyonso oyo tolingi kozwa ekateli, tosengeli kotala oyo Biblia elobi mpo tómona makanisi ya Nzambe. Na nsima, tosengeli kozwa ekateli oyo eyokani na yango. Yango nde kozala na makanisi malamu: komekola makanisi ya Yehova.

MESENISÁ MAKOKI NA YO YA KOSOSOLA

11. Moto asengeli kosala nini mpo ayeba kozwa bikateli ya malamu?

11 Ezali pɛtɛɛ te kozwa bikateli ya malamu mpe kokokisa yango. Ekoki kozala mpasi mingimingi mpo na bato oyo bauti kozwa batisimo sika to baoyo babandi kokola na elimo sika. Kasi, bato yango oyo Biblia ebengi bana mike ya elimo, bakoki kokende liboso. Mwana moke oyo azali koyekola kotambola atyaka litambe mokomoko tii akoyeba kotambola. Ezalaka mpe bongo mpo na bana mike ya elimo oyo bazali koyekola kozwa bikateli ya malamu. Ntoma Paulo alobaki ete bato oyo bakɔmɛli bazali “baoyo, makoki na bango ya kososola, lokola basalelaka yango, emesaná kokesenisa ná mabe ná malamu.” Maloba “basalelaka” mpe “emesaná” emonisi ete tosengeli kokoba kosala milende mingi; yango nde bato ya sika mpe basengeli kosala.​—Tángá Baebre 5:13, 14.

Ntango tozali kozwa bikateli ya malamu na makambo ya mokolo na mokolo, tozali komesenisa makoki na biso ya kososola (Talá paragrafe 11)

12. Ndenge nini tokoki koyekola kozwa bikateli ya malamu?

12 Ndenge tolobaki yango liboso, mokolo na mokolo esɛngaka tózwa bikateli ndenge na ndenge, na makambo ya mike mpe ya minene. Ankɛtɛ moko emonisi ete bikateli mingi oyo tozwaka tokanisaka yango mpenza te, eutaka nde na mimeseno oyo ekɔtelá biso. Na ndakisa, ntɔngɔ nyonso esɛngaka opona elamba oyo okolata. Okoki komona yango lokola likambo ya moke, mpe okoki kozwa ekateli yango kozanga okanisa mpenza, mingimingi soki ozali na retare. Kasi ezali na ntina kokanisa soki elamba oyo olati ebongi na yo mosaleli ya Yehova. (2 Ko. 6:3, 4) Ntango ozali kosomba bilamba, okoki kotala modɛlɛ na yango mpe soki ezali kolatama mikolo oyo, kasi okanisaka mpe ntalo na yango mpe soki ezali molato ya kolekisa ndelo te? Kozwa bikateli ya malamu na makambo wana ekosalisa biso tómesenisa makoki na biso ya kososola, mpe yango ekoki kosalisa biso tóyeba kozwa bikateli ya malamu na makambo ya minene.​—Luka 16:10; 1 Ko. 10:31.

YEKOLÁ KOLINGA KOSALA OYO EZALI MALAMU

13. Tosengeli kosala nini mpo tókokisa bikateli oyo tozwaki?

13 Biso nyonso toyebi ete kozwa bikateli ekeseni na kokangama na yango mpe kokokisa yango. Na ndakisa, bato mosusu oyo balukaka kotika komɛla likaya balongaka te mpo bakangamaka mpenza te na ekateli yango. Esɛngaka bálinga mpenza kosala likambo oyo bakani. Bato mosusu balobaka ete mposa makasi ya kosala likambo moko ezali lokola misuni ya nzoto. Soki tozali kosala ngalasisi mingi, misuni ya nzoto mpe ekómaka makasi. Soki tozali kosala ngalasisi mingi te, nzoto ekómaka kilo mpe ezalaka makasi te. Na yango, ndenge nini tokoki kokómisa makasi mposa na biso ya kokangama na ekateli oyo tozwaki mpe kokokisa yango? Tosengeli kotalela Yehova mpo asalisa biso.​—Tángá Bafilipi 2:13.

14. Nini epesaki Paulo makasi ya kosala oyo ayebaki ete asengeli kosala?

14 Paulo ayebaki ete ezali mpasi kosala oyo ezali malamu. Mokolo moko amilelaki ete: “Nazalaka na likoki ya kolinga oyo eleki malamu, kasi nakokaka kosala yango te.” Ayebaki makambo oyo azalaki kolinga kosala to oyo asengeli kosala, kasi na bantango mosusu eloko moko ezalaki kopekisa ye kosala yango. Alobaki boye: “Na motema na ngai, nasepelaka mpenza na mobeko ya Nzambe, kasi nazali komona na binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba na mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na binama na ngai.” Elikya ezalaki te mpo na ye? Te, elikya ezalaki. Alobaki boye: “Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!” (Rom. 7:18, 22-25) Na esika mosusu, akomaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.”​—Flp. 4:13.

15. Mpo na nini tosengeli kozala na ekateli ya kosala oyo ezali malamu?

15 Mpo na kosepelisa Nzambe, tosengeli kozwa bikateli ya malamu mpe kokokisa yango. Tókanisa lisusu makambo oyo Eliya ayebisaki basambeli ya Baala mpe Bayisraele oyo bakómaki bapɛngwi, na Ngomba Karmele: “Kino ntango nini bokokakatana na makanisi? Soki Yehova azali Nzambe ya solo, bólanda ye; kasi soki ezali nde Baala, bólanda ye.” (1 Bak. 18:21) Bayisraele bayebaki oyo basengelaki kosala, kasi bazalaki ‘kokakatana’ mpo na kozwa ekateli. Nzokande, bambula mingi liboso, Yosua apesaki ndakisa malamu ntango alobaki na Bayisraele ete: “Soki emonani mabe na miso na bino kosalela Yehova, bópona bino moko lelo nani bino bokosalela . . . Kasi mpo na ngai mpe bato ya ndako na ngai, tokosalela Yehova.” (Yos. 24:15) Ekateli wana oyo azwaki ememaki matomba nini? Yosua ná bato oyo bakangamaki na ye bazwaki lipamboli ndenge bakɔtaki na Mokili ya Ndaka, “mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.”​—Yos. 5:6.

SOKI OZALI KOZWA BIKATELI YA MALAMU, OKOPAMBWAMA

16, 17. Mapamboli nini tokoki kozwa soki bikateli na biso eyokani na mokano ya Nzambe?

16 Tótalela ndakisa moko ya mikolo na biso. Ndeko mobali moko oyo azali na mwasi ná bana misato ya mike autaki kozwa batisimo sika. Mokolo moko, moninga moko ya mosala ayebisaki ye ete bákende kosala na kompanyi mosusu epai bakobanda kofuta bango mbongo mingi mpe bakozwa matomba mingi. Ndeko yango akanisaki mpe abondelaki mpo na likambo yango. Aponaki mosala oyo azalaki na yango atako bazalaki kofuta ye mbongo mingi te, mpo akoka kozwaka ntango na nsuka ya pɔsɔ mpo na koyangana na makita mpe kobima mosala ya kosakola na libota na ye. Amonaki ete soki andimi mosala oyo moninga na ye ayebisaki ye, akozwa lisusu ntango te na nsuka ya pɔsɔ. Soki ezalaki yo, olingaki kosala nini?

17 Ntango ndeko yango amonaki ete akozonga nsima na elimo atako akobanda kozwa mbongo mingi, aboyaki kondima mosala wana. Okanisi ete na nsima ayokaki mawa mpo na ekateli oyo azwaki? Te. Amonaki ete mapamboli ya elimo oyo ye ná libota na ye bazwaki eleki mbongo oyo alingaki kobanda kozwa. Ye ná mwasi na ye basepelaki mingi ntango mwana na bango ya mwasi ya liboso, oyo azalaki na mbula 10, ayebisaki bango ete alingaka bango mingi, alingaka bandeko ya lisangá, mpe alingaka Yehova mingi. Alobaki ete alingi komipesa na Yehova mpe kozwa batisimo. Ndenge tata na ye atyaki losambo ya Yehova na esika ya liboso na bomoi na ye epesaki ye ndakisa ya malamu!

Soki ozali kozwa bikateli ya malamu, okozala na esengo na kati ya lisangá ya Nzambe (Talá paragrafe 18)

18. Mpo na nini kozwa bikateli ya malamu mokolo na mokolo ezali na ntina?

18 Ndenge kaka Moize atambwisaki Bayisraele na esobe, Yesu Kristo, Moize Monene, azali kotambwisa basaleli ya Yehova na mokili oyo ya Satana banda bambula mingi. Ndenge kaka Yosua akɔtisaki Bayisraele na Mokili ya Ndaka, etikali moke Yesu, Yosua Monene, aboma mokili oyo mpe akɔtisa bayekoli na ye na mokili ya sika ya boyengebene. (2 Pe. 3:13) Yango wana, sikoyo ezali te ntango ya kozongela makanisi, mimeseno, bizaleli, mpe mikano na biso ya kala. Ezali nde ntango ya koluka kososola malamumalamu soki mokano ya Yehova ezali nini mpo na biso. (Rom. 12:2; 2 Ko. 13:5) Tiká ete bikateli na yo, makambo oyo oponaka mokolo na mokolo emonisa ete ozali lolenge ya bato oyo Nzambe akopambola libela na libela.​—Tángá Baebre 10:38, 39.

^ par. 7 Ntina mosusu oyo bato basalaka bongo ezalaka mpo bankɔkɔ ya bana yango bálakisa bango epai ya baninga mpe bandeko ya libota.