Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe

Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe

“Ezali malamu kobɛtɛla Nzambe na biso mondule.”​—NZ. 147:1.

1, 2. (a) Kokanisa moto oyo tolingaka mpe kolobela ye ekoki kozala na litomba nini? (Talá elilingi na ebandeli ya lisolo.) (b) Mituna nini tokotalela?

KOKANISA mpe kolobela moto moko oyo tolingaka ekoki kokómisa makasi boninga na biso na moto yango. Ezali mpe bongo mpo na boyokani na biso na Yehova Nzambe. Ntango Davidi azalaki mobateli ya mpate, na butu, azalaki mbala mingi kotala minzoto na likoló mpe komanyola nguya ya Mozalisi. Akomaki boye: “Ntango nazali komona likoló oyo osalá, misala ya misapi na yo, sanza ná minzoto oyo obongisá, moto​—mowei mpamba—​azali nani mpo okanisa ye, mpe mwana ya moto ya mabele mpo obatela ye?” (Nz. 8:3, 4) Mpe nsima ya komonisa lolenge ya kokamwa oyo mokano ya Yehova mpo na Yisraele ya elimo ezalaki kokokisama, ntoma Paulo alobaki ete: “Ee bomɛngo ya Nzambe mpe bwanya na ye mpe boyebi na ye ezali mingi mpenza!”​—Rom. 11:17-26, 33.

2 Ntango tozali na mosala ya kosakola, tokanisaka Yehova mpe tolobelaka ye. Kosala bongo ebongisaka boninga na biso na ye. Bandeko mingi oyo bazali babongisi-nzela bamonaka ete moko ya mapamboli oyo bazwaka na ndenge balekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola ezali ete bolingo na bango mpo na Nzambe ekómaka makasi. Ezala ozali mobongisi-nzela sikoyo, to ozali kokana kosala mosala yango, talelá motuna oyo: Ndenge nini mosala ya ntango nyonso ekoki kokómisa makasi boyokani na yo na Yehova? Soki ozali mobongisi-nzela, omituna boye: ‘Nini ekosalisa ngai nakoba na mosala yango?’ Soki ozali naino mobongisi-nzela te, omituna boye: ‘Makambo nini nakoki kobongola mpo nabanda mosala yango?’ Tótala naino ndenge oyo mosala ya mobongisi-nzela ekoki kokómisa makasi boyokani na biso na Nzambe.

MOSALA YA NTANGO NYONSO MPE BOYOKANI NA BISO NA NZAMBE

3. Na mosala ya kosakola, kolobela mapamboli oyo Bokonzi ekomemela biso esalisaka biso na nini?

3 Koyebisa basusu mapamboli oyo Bokonzi ya Nzambe ekomemela biso na mikolo ezali koya esalisaka biso tópusana penepene na Yehova. Vɛrsɛ nini olingaka kosalela mingi na mosala ya kosakola ndako na ndako? Mbala mosusu olingaka kosalela mingi Nzembo 37:10, 11; Danyele 2:44; Yoane 5:28, 29; to mpe Emoniseli 21:3, 4. Mbala nyonso oyo tozali koyebisa basusu bilaka yango, biso moko tomonaka ete Nzambe na biso oyo akabaka mingi azali mpenza Mopesi ya “likabo nyonso ya malamu mpe libonza nyonso oyo ekoki mpenza.” Yango esalisaka biso tópusana penepene na ye.​—Yak. 1:17.

4. Mpo na nini komona ndenge bato bazali na nzala ya elimo esalisaka biso tómona lisusu mingi ete Nzambe azali malamu?

4 Komona ndenge bato oyo tozali koteya bazali na nzala ya elimo ebakisaka botɔndi na biso mpo na solo. Bato ya mokili bazali na esika moko te ya malonga epai bakoki kozwa litambwisi mpo na kosalisa bango bákóma na esengo ya solosolo. Mingi na bango bamitunaka mituna mpo na mikolo ezali koya mpe bazali na elikya te. Balukaka koyeba ntina ya bomoi. Ata bato mingi oyo bakendaka bandako-nzambe bazali mpenza na boyebi ya Biblia te. Bazali kaka lokola bato ya Ninive ya ntango ya kala. (Tángá Yona 4:11.) Soki tozali kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, tokomona mpe polele bokeseni oyo ezali kati na bato oyo toteyaka, oyo bazali na nzala ya elimo, ná basaleli ya Yehova. (Yis. 65:13) Yango esalisaka biso tómona ete Yehova azali malamu na ndenge azali kosuka kaka te na kokokisa bamposa na biso ya elimo, kasi azali mpe kobenga moto nyonso oyo alingi aya kozwa libɔndisi mpe elikya ya solosolo.​—Em. 22:17.

5. Koteya basusu solo ekoki kotinda biso tótalela mikakatano na biso moko ndenge nini?

5 Soki tozali koteya basusu solo ya Biblia, yango ekosalisa biso tómitungisa koleka ndelo te mpo na mikakatano na biso moko. Trisha, oyo azali mobongisi-nzela ya sanza na sanza, amonaki ete likambo yango ezali solo ntango baboti na ye babomaki libala. Alobi boye: “Yango ezalaki moko ya makambo oyo etungisaki ngai mingi na bomoi na ngai.” Mokolo moko, atako azalaki mawamawa mpe azalaki na mposa ya kobima mosala ya kosakola te, abimaki kaka mpo na koyekola Biblia na bana misato, oyo bazalaki na mikakatano makasi na libota na bango. Tata na bango asundolá bango, mpe yaya na bango ya mobali azalaki konyokola bango. Trisha alobi boye: “Namonaki ete mpasi mpe mitungisi na ngai ezalaki eloko te soki nakokanisi yango na oyo ya bango. Wana tozalaki koyekola, bilongi na bango ekómaki kofungwama mpe bazalaki na esengo makasi. Mokolo wana, namonaki mpenza ete bana wana bazalaki likabo oyo eutaki epai ya Yehova.”

6, 7. (a) Ndenge nini kondima na biso ekómaka makasi ntango tozali koteya basusu mateya ya Biblia? (b) Toyokaka ndenge nini ntango tozali komona ndenge mateya ya Biblia ezali kobongola bomoi ya bayekoli ya Biblia?

6 Koteya basusu solo ya Biblia ekómisaka kondima na biso makasi. Mpo na Bayuda mosusu ya ntango na ye oyo bazalaki kosalela te makambo oyo bazalaki koteya, ntoma Paulo akomaki boye: “Yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te?” (Rom. 2:21) Kasi, babongisi-nzela lelo oyo basalaka bongo te! Bazwaka mabaku mingi ya koteya basusu solo ya Biblia mpe koyekola na bato Biblia. Mpo básala yango malamu, esɛngaka bámibongisa liboso ya koyekola na moto mokomoko mpe mbala mosusu básala bolukiluki mpo na koyanola na mituna oyo batunaki bango. Mobongisi-nzela moko na nkombo Janeen alobi boye: “Mbala nyonso oyo nazwi libaku ya koteya basusu solo ya Biblia, nayokaka ete mateya yango ekɔti mpenza na makanisi mpe motema na ngai. Yango esalaka ete kondima na ngai etɛlɛma esika moko te, kasi ekoba kokola.”

7 Komona ndenge oyo mateya ya Biblia ezali kobongola bomoi ya bayekoli ya Biblia esalisaka biso tózwa bwanya ya Nzambe na motuya. (Yis. 48:17, 18) Mpe yango esalisaka biso tózala na ekateli ya kokoba kosalela mateya yango na bomoi na biso moko. Adrianna, mobongisi-nzela mosusu, alobi boye: “Soki bato bazali kotya motema na bwanya na bango moko, bomoi na bango ekozala mbilingambilinga. Kasi soki babandi kotyela bwanya ya Yehova motema, matomba emonanaka mbala moko.” Phil, oyo azali mpe mobongisi-nzela, alobi boye: “Komona ndenge Yehova azali kosalisa bato bálonga kobongola bomoi na bango epesaka esengo mingi.”

8. Ndenge nini kosakola elongo na bandeko ya lisangá esalisaka biso?

8 Kosakola elongo na bandeko ya lisangá elendisaka biso. (Mas. 13:20) Babongisi-nzela mingi balekisaka ntango na bango mingi na mosala ya kosakola elongo na basakoli mosusu. Yango epesaka bango mabaku mingi ya ‘kolendisana.’ (Rom. 1:12; tángá Masese 27:17.) Lisa, ndeko mwasi moko mobongisi-nzela, alobi boye: “Na esika ya mosala, mbala mingi bato bawelanaka mpe bayokelanaka zuwa. Mokolo na mokolo okoyoka bato bazali kotɔnga baninga mpe kobimisa maloba ya nsɔni. Balukaka kaka kokóma bato minene, ata soki esɛngi nini. Na bantango mosusu, okomona bazali kotyola yo to koloba na yo mabe mpo na bizaleli na yo ya mokristo. Nzokande, kosakola elongo na bandeko na biso bakristo elendisaka mpenza. Na nsuka ya mokolo, ntango nazongi ndako, nayokaka ete nabɔndisami, ata soki nalɛmbi ndenge nini.”

9. Kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na molongani na biso ekoki kosala nini na kati ya libala?

9 Kosala mosala ya mobongisi-nzela elongo na molongani na biso ebongisaka boyokani na kati ya libala. (Mos. 4:12) Madeline, oyo asalaka mosala ya mobongisi-nzela elongo na mobali na ye, alobi boye: “Mosala ya mobongisi-nzela epesaka biso libaku ya kolekisa ntango mingi na kolobela makambo oyo tokutanaki na yango na mosala ya kosakola to likambo moko oyo totángaki na Biblia, oyo ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola. Mbula nyonso oyo tosalaka mosala ya mobongisi-nzela biso mibale, boyokani na biso ekómaka makasi.” Trisha mpe alobi boye: ‘Ngai ná mobali na ngai toyokaná ete tókɔtaka banyongo te, yango wana toswanaka te mpo na mbongo. Lokola biso mibale tozalaka na programɛ moko ya kosakola, tozongelaka bato na ye mpe bato na ngai elongo mpe totambwisaka boyekoli ya Biblia elongo; yango esalaka ete libala na biso ekóma makasi koleka.’

Kobima mosala ya kosakola mingi epesaka esengo na bomoi (Talá paragrafe 9)

10. Ntango tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso mpe komona ndenge Nzambe azali kosunga biso, yango etindaka biso tósala nini?

10 Ntango tozali kotya Bokonzi na esika ya liboso, tokómaka kotyela Yehova motema mingi koleka, wana tozali komona ndenge azali kosunga biso mpe koyanola na mabondeli na biso. Ya solo, ezalaka bongo mpo na bakristo nyonso ya sembo. Kasi, baoyo bazali babongisi-nzela bamonaka ete kotyela Yehova motema ekoki kosalisa bango bákoba na mosala na bango. (Tángá Matai 6:30-34.) Ndeko Curt, oyo azali mobongisi-nzela mpe asalaka lokola mokɛngɛli ya zongazonga mosungi, andimaki kokende kotala lisangá moko oyo mpo na kokóma kuna, esengelaki kosala ngonga mibale na ndambo na motuka. Ye ná mwasi na ye, oyo azali mpe mobongisi-nzela, bazalaki kaka na esansi oyo ekoki mpo na kokende, kasi kozonga te, mpe mokolo oyo bafutaka bango na mosala ezalaki na pɔsɔ oyo elandi. Curt alobi boye: “Namitunaki soki nazwaki ekateli ya malamu.” Nsima ya kobondela, bamonaki ete bakokende kaka kotala lisangá yango, na elikya ete Nzambe akokokisa bamposa na bango. Ntango balingaki kobima na ndako, ndeko mwasi moko abengaki bango mpe alobaki ete azali na eloko moko ya kopesa bango. Apesaki bango motángo ya mbongo oyo basengelaki na yango mpo na esansi ya kozonga. Curt alobi boye: “Soki ozali komona makambo ya ndenge wana mbala na mbala, ezali mpasi te omona ete Yehova nde azali kosalisa.”

11. Wapi mapamboli mosusu oyo babongisi-nzela bazwaka?

11 Mbala mingi, babongisi-nzela bamonaka ete ntango bamipesi na mosala ya Yehova mpe bazali kokóma na boyokani makasi ná ye, bazwaka mapamboli ndenge na ndenge. (Mib. 28:2) Atako bongo, mosala ya mobongisi-nzela ezangi mikakatano te. Basaleli ya Nzambe mpe bamonaka mpasi mpo na makambo oyo botomboki ya Adama ebimisá. Babongisi-nzela mosusu bamonaka ete basengeli kotika mosala yango mpo na mwa ntango. Nzokande mbala mingi, likoki ya kosilisa mikakatano to mpe ya kokima yango ezangaka te. Nini ekoki kosalisa babongisi-nzela bákoba na mosala na bango na esengo?

KOTIKA MOSALA YA MOBONGISI-NZELA TE

12, 13. (a) Mobongisi-nzela asengeli kosala nini soki azali na mokakatano mpo na kokokisa bangonga na ye? (b) Mpo na nini kosala programɛ ya kotánga Biblia mokolo na mokolo, koyekola, mpe komanyola ezali na ntina mingi?

12 Babongisi-nzela mingi bazalaka na makambo ebele ya kosala. Ekoki kozala mpasi kosala makambo nyonso; yango wana esengeli kozala na programɛ ya malamu. (1 Ko. 14:33, 40) Soki mobongisi-nzela amoni ete azali kokoka te kokokisa bangonga na ye, mbala mosusu ezali kosɛnga atalela lisusu ndenge oyo azali kosalela ntango na ye. (Ef. 5:15, 16) Akoki komituna boye: ‘Ntango boni nalekisaka na kominanola? Ezali kosɛnga ete nayekola komipekisa? Ndenge nini nakoki kobongola programɛ na ngai ya mosala ya mosuni?’ Mokristo nyonso ayebi ete ezali mpasi te kobakisa makambo mosusu na programɛ na biso; na yango, ekoki kosɛnga ete baoyo bazali babongisi-nzela bátalelaka programɛ na bango mbala na mbala mpe bábongisa bisika oyo esengeli.

13 Kotánga Biblia mokolo na mokolo, koyekola, mpe komanyola esengeli kozala na programɛ ya mobongisi-nzela nyonso. Na yango, mobongisi-nzela asengeli kozala na komipekisa, mpo makambo mosusu oyo ezali na ntina mingi te ebɔtɔla ye te ntango oyo asengeli kosalela mpo na makambo oyo eleki ntina. (Flp. 1:10) Na ndakisa, kanisá ete mobongisi-nzela azongi na ndako nsima ya kolekisa mokolo mobimba na mosala ya kosakola. Akanaki ete na mpokwa wana abongisa makita ya pɔsɔ. Kasi, liboso, atángi naino mikanda oyo batindeli ye. Na nsima, afungoli ordinatɛrɛ na ye mpo na kotánga mpe koyanola bamesaje oyo batindelaki ye. Lokola afungoli Internet, akɔti na site moko mpo na kotala soki ntalo ya biloko ekiti mpo na eloko moko oyo azali na mposa ya kosomba. Kozanga ete ayeba yango, pene na ngonga mibale esili koleka, kasi abandi naino koyekola te ndenge akanaki mpo na mpokwa wana. Mokakatano ezali wapi? Bato oyo basalaka ngalasisi to masano ya mbangu basengeli kobatela nzoto soki balingi koumela na mosala yango. Ndenge moko mpe, babongisi-nzela basengeli kozala na programɛ moko ya malamu ya boyekoli ya Biblia mpo bábatela elimo na bango mpo báumela na mosala ya ntango nyonso.​—1 Tim. 4:16.

14, 15. (a) Mpo na nini babongisi-nzela basengeli kozala na bomoi ya mindɔndɔ te? (b) Soki mobongisi-nzela akutani na mikakatano, asengeli kosala nini?

14 Babongisi-nzela oyo balongaka na mosala yango basalaka makasi bázala na bomoi ya mindɔndɔ te. Yesu alendisaki bayekoli na ye bázala na liso alima. (Mat. 6:22) Ye moko azalaki na bomoi ya mindɔndɔ te; yango wana amipesaki na mosala ya kosakola kozanga ete atya makanisi na makambo mosusu. Alobaki boye: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.” (Mat. 8:20) Babongisi-nzela oyo balandaka ndakisa ya Yesu bayebaka ete soki okómi na biloko ebele, ekosɛnga mpe ntango mingi mpo na kobatela yango, kobongisa yango, to koluka mosusu na esika ya oyo ya liboso.

15 Babongisi-nzela bayebaka ete mokumba na bango ezali ya ntina mingi, kasi bamimonaka te ete baleki bandeko mosusu. Bayebaka nde ete likabo to mokumba nyonso oyo tokoki kozala na yango, ezali mpo na boboto monene ya Nzambe. Na yango, mpo moto akoba na mosala ya mobongisi-nzela, asengeli kotyela Yehova motema. (Flp. 4:13) Mikakatano ekozanga te. (Nz. 34:19) Na ntango yango, babongisi-nzela basengeli koluka litambwisi ya Yehova mpe kotikela Ye nzela asalisa bango, na esika ya kowela kozwa ekateli ya kotika mosala yango. (Tángá Nzembo 37:5.) Wana bazali komona ndenge Yehova azali kokokisa bamposa na bango, bakomona ete azali Tata na bango ya bolingo mpe boninga na bango na ye ekokóma makasi.​—Yis. 41:10.

OKOKI KOKÓMA MOBONGISI-NZELA?

16. Soki olingi kokóma mobongisi-nzela, osengeli kosala nini?

16 Soki yo mpe olingi kokóma mobongisi-nzela mpo ozwa mapamboli oyo mosala ya ntango nyonso epesaka, yebisá Yehova mposa na yo. (1 Yoa. 5:14, 15) Sololá na bandeko oyo bazali babongisi-nzela. Mityelá mikano ya mikemike oyo ekosalisa yo okóma mobongisi-nzela. Yango nde Keith ná Erika basalaki. Mosala na bango ya mosuni ezalaki kozwa bango ntango mingi, mpe ndenge bilenge mingi ya bambula na bango basalaka, bazwaki ndako mpe basombaki motuka nsima ya kobalana. Balobi boye: “Tokanisaki ete ekopesa biso esengo ya solosolo, kasi esalemaki bongo te.” Ntango Keith alongwaki mosala, asɛngaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Alobi boye: “Mosala ya mobongisi-nzela ekundwelaki ngai ete esengo mingi eutaka na mosala ya kosakola.” Bakómaki baninga ya ndeko moko ná mwasi na ye oyo bazalaki babongisi-nzela, mpe basalisaki bango báyoka esengo ya mosala ya mobongisi-nzela mpe ya kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Keith ná Erika basalaki nini? Balobi boye: “Tokomaki mikano ya elimo oyo tomityelaki, tobambaki papye yango na frigo na biso, mpe tozalaki kotya elembo na mokano mokomoko oyo tokokisi.” Nsukansuka, bakómaki babongisi-nzela.

17. Mpo na nini osengeli kotalela programɛ to bomoi na yo mpo omona soki okoki kokóma mobongisi-nzela?

17 Yo mpe okoki kokóma mobongisi-nzela? Soki omoni ete sikoyo okokoka te, bimáká mosala ya kosala mingi mpo esalisa yo opusana lisusu penepene na Yehova. Nsima ya kobondela Yehova mpe kokanisa malamumalamu, mbala mosusu okomona ete osengeli kobongisa makambo mosusu na programɛ na yo to na bomoi na yo mpo etikela yo nzela ya kokóma mobongisi-nzela. Soki okómi mobongisi-nzela, mapamboli oyo okozwa ekoleka mosika makambo oyo otikaki mpo na kosala mosala yango. Okoyoka esengo oyo moto akoki kozwa soki azali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. (Mat. 6:33) Okoyoka esengo makasi oyo eutaka na kopesa. Longola yango, okozwa mabaku mingi ya kokanisa Yehova mpe kolobela Ye, mpe yango ekokolisa bolingo na yo mpo na ye mpe okosepelisa ye.