Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Mpo na nini Yesu abimisaki mpisoli liboso ya lisekwa ya Lazare, ndenge Yoane 11:35 emonisi yango?

Soki moto oyo tolingaka akufi, tolelaka mpo tokobanda komona ye lisusu te. Atako Yesu azalaki kolinga Lazare mingi, abimisaki mpisoli te mpo Lazare akufaki. Abimisaki mpisoli mpo na mawa oyo ayokelaki bandeko mpe baninga ya Lazare, ndenge bavɛrsɛ mosusu ya lisolo yango emonisi yango.​—Yoa. 11:36.

Ntango Yesu ayokaki ete Lazare azali kobɛla, awelaki te kokende esika Lazare azalaki kofanda mpo na kobikisa ye. Lisolo yango elobi boye: “Ntango [Yesu] ayokaki ete [Lazare] azalaki na maladi, afandaki bongo mikolo mibale mpenza na esika azalaki.” (Yoa. 11:6) Mpo na nini Yesu aumelaki? Asalaki bongo mpamba te. Alobaki boye: “Ntina ya maladi wana ezali te mpo akufa, kasi ezali nde mpo na nkembo ya Nzambe, mpo Mwana ya Nzambe azwa nkembo na nzela na yango.” (Yoa. 11:4) “Ntina” ya maladi ya Lazare ezalaki liwa te. Yesu alingaki kosalela liwa ya Lazare “mpo na nkembo ya Nzambe.” Na ndenge nini? Alingaki kosala likamwisi mpe kosekwisa moninga na ye oyo akufaki.

Ntango Yesu alobelaki likambo yango elongo na bayekoli na ye, akokanisaki liwa na mpɔngi. Yango wana ayebisaki bango ete azalaki “kokende kuna mpo na kolamwisa [Lazare] na mpɔngi.” (Yoa. 11:11) Mpo na Yesu, kozongisa Lazare na bomoi ezalaki lokola kolamwisa mwana oyo azali kolala mwa moke. Na yango, Yesu azalaki na ntina te ya koyoka mawa mpo na liwa ya Lazare.

Sikoyo, mpo na nini Yesu abimisaki mpisoli? Awa mpe, bavɛrsɛ mosusu ya lisolo yango epesi eyano. Ntango Yesu akutanaki na Maria, ndeko ya Lazare, mpe amonaki ye ná bato mosusu bazali kolela, “atungisamaki makasi na elimo mpe abulunganaki.” Komona mawa na bango nde epesaki Yesu mpasi mpe “atungisamaki makasi na elimo.” Yango wana “Yesu alelaki, abimisi mpisoli.” Yesu ayokaki mawa makasi ntango amonaki baninga na ye oyo azalaki kolinga mingi bazali na mpasi makasi ndenge wana.​—Yoa. 11:33, 35.

Lisolo ya Lazare emonisi ete Yesu azali na nguya mpe likoki ya kozongisa bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá na bomoi, na nzoto kolɔngɔnɔ, na mokili ya sika oyo ezali koya. Ezali mpe kosalisa biso tómona ete Yesu amityaka mpenza na esika ya bato oyo bandeko mpe baninga na bango bakufá. Liteya mosusu oyo tokoki kozwa na lisolo yango ezali ete tosengeli kokabola mawa elongo na baoyo bazali kolela ntango ndeko to moninga na bango akufi.

Yesu ayebaki ete akosekwisa Lazare. Atako bongo, abimisaki mpisoli, mpo na bolingo mpe mawa makasi oyo ayokelaki baninga na ye. Ndenge moko mpe, komitya na esika ya basusu ekoki kotinda biso ‘tólela elongo na bato oyo bazali kolela.’ (Rom. 12:15) Komonisa mawa ndenge wana elakisi te ete moto azangi kondima na elikya ya lisekwa. Na yango, Yesu apesaki ndakisa malamu na oyo etali komitya na esika ya bato oyo ndeko na bango akufi, na ndenge abimisaki mpisoli atako ayebaki ete akosekwisa Lazare.