Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NYONSO ESUKAKA NA LIWA?

Moto abundi mpo na kosilisa liwa

Moto abundi mpo na kosilisa liwa

AMPERƐRƐ QIN SHI HUANG

PONCE DE LEÓN

Liwa ezali monguna moko ya nsɔmɔ. Tobundisaka yango na makasi na biso nyonso. Ntango moto oyo tolingaka akufi, toboyaka kondima likambo yango. Ntango moto azali naino na makasi ya bolenge, akanisaka ete akokufa te, nzokande makanisi yango ezali ndɔtɔ mpamba.

Bafarao ya Ezipito ya kala bazalaki na mposa makasi ya kozala na bomoi oyo ekufaka te. Balekisaki bomoi na bango mobimba mpe basalelaki bankóto ya bato mpo na koluka kosilisa liwa. Bapiramide oyo batongá emonisi ete balukaki kozala na bomoi oyo ekufaka te, kasi balongaki te.

Baamperɛrɛ ya Chine mpe bazalaki koluka kozala na bomoi oyo ekufaka te; kasi bango basalelaki nde nkisi ya maji. Amperɛrɛ Qin Shi Huang asɛngaki bato na ye ya siansi báluka nkisi ya maji oyo ekosala ete akufa te. Kasi, bankisi mingi oyo basalaki ezalaki na pwazɔ, mpe na ntembe te nkisi moko ya ndenge wana nde ebomaki ye.

Balobaka ete na mobu 1513, Juan Ponce de León, mwana-mboka Espagne oyo azalaki kosala mibembo atambolaki na mai ya Caraïbe mpo na koluka liziba ya mai oyo ezongisaka moto elenge. Akómaki na Floride, na États-Unis, kasi akufaki mwa bambula moke na nsima, na etumba moko oyo abundaki na bana-mboka oyo akutaki kuna. Moto moko te amoná liziba ya mai oyo ezongisaka moto elenge.

Bafarao, baamperɛrɛ mpe bato oyo bazalaki kosala mibembo balukaki kolonga liwa. Mpe moto nyonso akoki komona ete bazalaki na mokano ya malamu, atako akosepela te na makambo oyo basalaki mpo na kokokisa yango. Na kati ya motema, mokomoko na biso alingaka kokoba kozala na bomoi.

MOTO AKOKI KOLONGA LIWA?

Mpo na nini tolingaka kokufa te? Biblia epesi eyano. Mpo na Mozalisi na biso Yehova Nzambe, * Biblia elobi ete: “Asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango. Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema [ya bato].” (Mosakoli 3:11) Tolingaka kosepela na bomoi libela na libela, kasi te mpo na mbula soki 80 mpamba. (Nzembo 90:10) Nzambe nde atya mposa yango na mitema na biso.

Mpo na nini Nzambe atyá “likanisi ya kozala na bomoi ya seko” na mitema na biso? Ezali kaka mpo na konyokola makanisi na biso? Te. Nzambe alaki ete liwa ekolongwa. Na bisika mingi, Biblia elobi ete liwa ekolongwa mpe elobeli elaka oyo Nzambe apesi biso ya kozwa bomoi ya seko.​—Talá etanda  “Liwa ekolongwa.”

Yesu Kristo alobaki polele ete: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Na yango, liwa ekolongwa mokolo mosusu. Kasi, Yesu amonisaki ete kaka Nzambe nde akolonga yango.

^ par. 9 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.