Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LISOLO NA MONINGA MOKO YA KARTYE

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Mpo na nini Nzambe atiki bampasi ezala?

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Michelle akei kotala mwasi moko na nkombo Sofia.

NZAMBE ATALELAKA BAMPASI NA BISO NDENGE NINI?

Michelle: Mbote Sofia. Nasepeli ndenge nakuti yo na ndako.

Sofia: Ngai mpe nasepeli.

Michelle: Mbala eleki tolobelaki ndenge oyo Nzambe atalelaka bampasi na biso. * Olobaki ete likambo yango etungisaka yo banda kala, mingimingi banda mama na yo azwá likama na aksida ya motuka. Kutu, yebisá ngai naino: mama ayoki ndenge nini sikoyo?

Sofia: Mikolo mosusu azalaka malamu, mikolo mosusu ayokaka mpasi. Lelo azali malamu.

Michelle: Ezali esengo mingi. Nakanisi kobatela makanisi ya malamu ntango okutani na likambo ya ndenge wana ezali pɛtɛɛ te.

Sofia: Ezali pɛtɛɛ te. Ntango mosusu namitunaka soki akonyokwama lisusu tii wapi?

Michelle: Emonani ete ozali mpenza komitungisa. Ozali koyeba lisusu motuna oyo totikaki mbala eleki? Mpo na nini Nzambe azali kotika bampasi ekoba konyokola bato soki azali na nguya ya kosilisa yango?

Sofia: Ɛɛ, nazali koyeba.

Michelle: Liboso tótala eyano oyo Biblia epesi na motuna wana, tózongela mwa makambo oyo tolobelaki mbala eleki.

Sofia: Likambo te.

Michelle: Ya liboso, tomonaki ete ata moto moko ya sembo na ntango ya kala amitunaki mpo na nini Nzambe atiki ete bampasi ezala. Kasi, Nzambe apamelaki ye te mpo na motuna wana; alobaki mpe na ye te ete azali na kondima moke.

Sofia: Wana ezalaki likambo moko ya sika mpo na ngai.

Michelle: Tomonaki mpe ete Yehova Nzambe asepelaka ata moke te komona biso tozali konyokwama. Na ndakisa, Biblia elobi ete ntango basaleli na ye bazalaki na mpasi, “ye mpe azalaki koyoka mpasi.” * Koyeba ete Nzambe amityaka na esika na biso ntango tozali na mpasi ezali mpenza kokitisa biso motema, boye te?

Sofia: Ezali bongo.

Michelle: Na nsuka, tomonaki ete lokola Mozalisi na biso azali na nguya nyonso, na ntembe te azali na likoki ya kozwa makambo na mabɔkɔ mpe kosilisa bampasi na ntango nyonso alingi.

Sofia: Yango nde likambo oyo ezali kolekela ngai. Mpo na nini Nzambe azali kotika makambo ya mabe esalemaka nzokande azali na nguya ya kosilisa yango?

NANI ALOBAKI SOLO?

Michelle: Mpo tózwa eyano na motuna na yo, tóbanda na mokanda ya liboso ya Biblia, Ebandeli. Oyebaka lisolo ya Adama ná Eva mpe ya mbuma oyo epekisamaki?

Sofia: Ɛɛ, nayekolá yango na eteyelo ya mokolo ya lomingo. Nzambe apekisaki bango bálya mbuma ya nzete moko boye, kasi bango balyaki yango.

Michelle: Ezali bongo. Sikoyo tólobela makambo oyo ememaki Adama ná Eva na lisumu wana. Makambo yango etaleli mpe ntina oyo tozali konyokwama. Okoki kotánga Ebandeli mokapo 3, vɛrsɛ 1 tii na 5?

Sofia: Ɛɛ. Natángi boye: “Sikoyo nyoka ezalaki ekɛngɛ koleka banyama nyonso ya zamba ya mokili oyo Yehova Nzambe asalaki. Na bongo abandaki koloba na mwasi ete: ‘Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?’ Bongo mwasi alobaki na nyoka ete: ‘Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: “Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.”’ Bongo nyoka alobaki na mwasi ete: ‘Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.’”

Michelle: Mersi. Tótalela naino bavɛrsɛ yango. Ya liboso, simbá ete nyoka elobaki na mwasi, Eva. Mokanda mosusu ya Biblia emonisi ete Satana Zabolo nde asalelaki nyoka mpo na koloba na mwasi. * Satana atunaki Eva mituna mpo na mobeko oyo Nzambe apesaki na ntina etali nzete moko boye. Ntango otángi na Biblia, omonaki etumbu oyo Nzambe alobaki ete Adama ná Eva bakozwa soki balei mbuma yango?

Sofia: Alobaki ete bakokufa.

Michelle: Ezali bongo. Nzokande na maloba oyo abimisaki na nsima, Satana atɛmɛlaki mpenza makambo oyo Nzambe alobaki. Satana alobaki ete: “Bokokufa soki moke te.” Abengaki Nzambe moto ya lokuta!

Sofia: Mbala ya liboso nayoka ete ezalaki nde boye.

Michelle: Mpe ntango Satana alobaki ete Nzambe azali moto ya lokuta, abimisaki ntembe moko oyo esengelaki kozwa ntango mpo na kosilisa yango. Oyebi mpo na nini?

Sofia: Bon, nayebi mpenza te.

Michelle: Bon, tózwa ndakisa moko. Kanisá ete mokolo mosusu nayei epai na yo mpe nalobi na yo ete naleki yo na makasi. Okoki kosala nini mpo olakisa ngai ete nakosi?

Sofia: Nakanisi tokoki kosala eloko moko mpo na komeka makasi na biso.

Michelle: Ɛɛ, ezali bongo mpenza. Ntango mosusu tokoki kozwa ata eloko moko ya kilo mpe kotala soki nani akokoka kotombola yango. Omoni, mpo na koyeba soki nani aleki moninga na makasi ezali mpasi te.

Sofia: Ɛɛ, ezali mpasi te.

Michelle: Sikoyo, kanisá ete nalobi nde ete nazali sembo koleka yo. Wana ekómi eloko mosusu, bongo te?

Sofia: Ɛɛ, namoni mpe bongo.

Michelle: Mpo, bosembo ezali lokola makasi te; kotombola eloko ya kilo ekolakisa te ete moto azali sembo.

Sofia: Te, ekolakisa te.

Michelle: Mpo na kosilisa mpenza ntembe wana, esengeli kaka kotika ntango eleka mpo bato mosusu bálandela biso mibale mpo bámona soki nani mpenza azali sembo koleka moninga.

Sofia: Ezali bongo.

Michelle: Sikoyo, tózonga na lisolo na biso ya mokanda ya Ebandeli. Satana alobaki nde ete aleki Nzambe na makasi?

Sofia: Te.

Michelle: Soki bongo, Nzambe alingaki komonisa nokinoki ete Satana akosi. Nzokande, Satana alobaki nde ete azali sembo koleka Nzambe. Ezali lokola alobaki na Eva ete: ‘Nzambe azali kokosa bino, ngai nde nazali koyebisa bino solo.’

Sofia: Lobá likambo.

Michelle: Na yango, na bwanya na ye Nzambe ayebaki ete lolenge eleki malamu mpo na kosilisa ntembe yango ezali ya kotika ete ntango eleka. Nsukansuka, ekoyebana polele nani alobaki solo mpe nani akosaki.

NTEMBE MOKO MONENE

Sofia: Bongo ndenge Eva akufaki, emonisaki te ete Nzambe alobaki solo?

Michelle: Emonisaki yango mwa moke. Kasi, ntembe ya Satana esukaki kaka wana te. Talá lisusu vɛrsɛ 5. Omoni likambo mosusu oyo Satana alobaki na Eva?

Sofia: Alobaki na ye ete soki alei mbuma, miso na ye ekofungwama.

Michelle: Ɛɛ, mpe abakisaki ete akokóma ‘lokola Nzambe, akoyeba malamu ná mabe.’ Na yango, Satana amonisaki ete Nzambe azali kopimela bato eloko moko ya malamu.

Sofia: Namoni.

Michelle: Yango mpe ezalaki ntembe moko monene.

Sofia: Na ndenge nini?

Michelle: Na maloba na ye, Satana alingaki koloba ete Eva​—ata mpe bato nyonso—​bakozala malamu koleka soki baboyi litambwisi ya Nzambe. Na likambo yango mpe, Yehova ayebaki ete lolenge eleki malamu ya kokata yango ezali ya kotika Satana ameka komonisa soki alobaki solo. Yango wana, Nzambe atiki ete Satana ayangela mokili oyo mpo na mwa ntango. Yango nde ntina oyo bampasi etondi na mokili: Ezali Satana nde azali koyangela mokili oyo, kasi Nzambe te. * Kasi, nsango malamu mpe ezali.

Sofia: Nsango yango nini?

Michelle: Biblia eteyaka makambo mibale ya malamu na ntina etali Nzambe. Ya liboso, Yehova asalisaka biso ntango tozali konyokwama. Na ndakisa, talá maloba ya Mokonzi Davidi oyo ezali na Nzembo 31:7. Davidi akutanaki na makambo mingi ya mpasi na bomoi na ye, kasi talá likambo oyo alobaki na libondeli moko epai ya Nzambe. Okoki kotánga vɛrsɛ yango?

Sofia: Ɛɛ. Elobi boye: “Nakozala na esengo mpe nakosepela na motema boboto na yo, mpo omoni mpasi na ngai; oyebi bampasi ya molimo na ngai.”

Michelle: Na yango, atako Davidi akutanaki na makambo ya mpasi, motema na ye ekitaki mpo ayebaki ete Yehova azalaki komona makambo nyonso oyo ekómeli ye. Lokola Yehova ayebi makambo nyonso, ata mpe mitungisi na biso, oyo bato mosusu bakoki komona te, ezali mpenza kokitisa motema, omoni te?

Sofia: Ɛɛ, ezali bongo.

Michelle: Likambo ya mibale oyo Biblia eteyaka mpo na Nzambe ezali ete akotika te ete bampasi ezala kaka libela na libela. Biblia elobi ete mosika te Nzambe akosukisa boyangeli mabe ya Satana. Mpe akolongola mabe nyonso oyo ezali kosalema, ata mpe makambo oyo ezali kotungisa yo ná mama na yo. Nakoki kozonga pɔsɔ ya nsima mpo na komonisa yo ntina oyo tokoki kondima ete etikali moke Nzambe asukisa bampasi nyonso? *

Sofia: Ɛɛ, ekozala malamu.

Ezali nde na lisolo moko ya Biblia oyo olukaka koyeba malamu? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna Motatoli ya Yehova moko. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

^ par. 61 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 9 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.