Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?

Ndenge nini okoki kosala ete losambo na kati ya libota esepelisaka?

Tata moko na Brésil alobaki ete: “Masolo na losambo na kati ya libota ekómaka mpenza elɛngi, mpe mbala mingi tokendeke tii butu makasi soki nakati bango te.” Tata moko na Japon alobi ete mwana na ye ya mbula 10 akipaka te ntango ya kosilisa boyekoli mpe alingaka kaka ekoba. Mpo na nini? Tata yango abakisi boye: “Elendisaka ye mpe epesaka ye esengo.”

Kasi, mpo na koloba polele, bana nyonso te nde basepelaka na losambo na kati ya libota. Kasi mpo na nini? Tata moko na Togo alobi boye: “Losambo ya Yehova esengeli te kolɛmbisaka.” Soki esalemi bongo, ekoki kozala nde mpo na lolenge oyo losambo na kati ya libota ezali kosalema? Ndenge Yisaya alobaki yango mpo na Sabata ete esengeli ‘kosepelisa mpenza,’ mabota mingi emonaki mpe ete losambo na kati ya libota esengeli kozala bongo.​—Yis. 58:13, 14.

Baboti bayebaka ete mpo mabota na bango esepela na losambo na kati ya libota, esengeli esengo emonanaka. Ralf, tata moko oyo azali na bana misato ya basi mpe moko ya mobali alobi ete boyekoli na bango na kati ya libota ezalaka te kaka koyekola mokanda boye to boye, kasi moto nyonso ya libota alobaka. Ya solo, kosala ete moto nyonso asepela mpe amikɔtisa na lisolo ekoki kozala mpenza mokakatano. Mama moko alobi ete: “Nakokaka te kokómisa losambo na kati ya libota elɛngi ndenge nalingaka ezala.” Ndenge nini okoki kolonga mokakatano yango?

BÓSALELAKA MAYELE NDENGE NA NDENGE

Tata moko ya bana mibale na Allemagne alobi boye: “Tosengeli kobongolaka makambo.” Natalia, mama moko ya bana mibale alobi ete: “Likambo eleki ntina mpo na libota na biso ezali ete tosalelaka mayele ndenge na ndenge.” Mabota mingi ekabolaka losambo na bango na kati ya libota na biteni mingi. Cleiton, tata moko na Brésil oyo azali na bana mibale ya bilenge alobi boye: “Yango esalaka ete boyekoli ezala malilimalili te mpe moto nyonso ya libota apesaka makanisi.” Kokabola ntango ya boyekoli na biteni mingi ekoki kosalisa baboti batyaka likebi na bamposa ya mwana mokomoko, mingimingi soki bokeseni ya bambula na bango ezali makasi. Baboti bakoki kolobela bamposa ya moto mokomoko ya libota mpe kobongola makambo mpe kopona makanisi nini bakosalela mpe ndenge ya kosala yango.

Mayele nini mabota mosusu basalelaka mpo bázala na makambo ndenge na ndenge ya koyekola? Basusu babandaka losambo na bango na kati ya libota na loyembo. Juan, tata moko na Mexique alobi boye: “Yango esalaka ete boyekoli esepelisa moto nyonso mpe ebongisaka makanisi na biso mpo na makambo oyo tokoyekola.” Libota na ye eponaka nzembo oyo eyokani na makambo mosusu oyo bakoyekola na mpokwa yango.

Sri Lanka

Mabota mingi etángaka mokapo moko to mibale ya Biblia elongo. Mpo na kokangama kaka na likambo moko te, na mabota mingi, moto na moto atángaka biteni oyo elobeli bato oyo balobeli na lisolo moko ya Biblia. Tata moko na Japon, alobi ete “azalaki kosala bongo te liboso.” Kasi bana na ye mibale ya mibali bazalaki na esengo ya komona baboti na bango bazali kosala lokola bango. Mabota mosusu basalaka masano ya Biblia. Roger, tata moko ya bana mibale ya mibali na Afrika ya Sudi alobi ete: “Mbala mingi bana bamonaka makambo oyo biso baboti totyelaki yango likebi te na lisolo moko ya Biblia.”

Afrika ya Sudi

Lolenge mosusu ya kosalela mayele ndenge na ndenge ezali ya kosala likambo moko elongo, na ndakisa kotonga masuwa ya Noa to tempelo ya Salomo. Kosala bongo esɛngaka bolukiluki ya mozindo. Na ndakisa, na libota moko na Asie mwana moko ya mwasi ya mbula mitano afandaki na salon ná baboti mpe nkɔkɔ na ye ya mwasi. Na tablo moko basalaki mwa lisano oyo ezalaki komonisa mibembo oyo ntoma Paulo asalaki lokola misionɛrɛ. Mabota mosusu basalaka masano na tablo ya masolo oyo mokanda ya Kobima elobeli. Na Togo, elenge moko na nkombo Donald oyo azali na mbula 19 alobi boye: “Kosalela mayele ndenge na ndenge ememaki makambo ya sika na losambo na biso na kati ya libota mpe na libota na biso.” Okoki kokanisa likambo moko oyo ekoki kosala ete losambo na bino na kati ya libota epesaka mpenza esengo?

États-Unis d’Amérique

KOMIBONGISA EZALI NA NTINA MINGI

Atako kosalela mayele ndenge na ndenge mpe kobongola makambo epesaka esengo na losambo na kati ya libota, bato nyonso basengeli komibongisa mpo bázwela yango mpenza litomba. Ntango mosusu bilenge balɛmbaka, yango wana batata basengeli kokanisa malamu liboso na makambo oyo baponaki mpo na boyekoli mpe kozwa ntango mpo na komibongisa malamu. Tata moko alobi boye: “Soki namibongisi malamu, bato nyonso basepelaka na boyekoli.” Tata moko na Allemagne ayebisaka libota na ye liboso makambo oyo bakotalela na bapɔsɔ oyo ekoya. Tata moko na Bénin oyo azali na bana motoba oyo bakokisi naino mbula 13 te, abongisaka liboso mituna oyo bakosalela soki asali programɛ ya kotala DVD na losambo na kati ya libota. Ya solo, komibongisa ekómisaka losambo na kati ya libota malamu koleka.

Soki bato ya libota bayebi liboso makambo oyo bakotalela, bakoki kolobela yango na boumeli ya pɔsɔ mpe yango ekobakisa lisusu esengo na bango. Mpe soki mokomoko azali na mokumba, akomona ete losambo na kati ya libota etaleli mpe ye.

SALÁ MAKASI EZANGAKA TE

Mabota mingi bazalaka na mokakatano ya kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ.

Batata mingi basalaka banda ntɔngɔ tii mpokwa mpo na kozwa mwa limpa. Na ndakisa, tata moko na Mexique alongwaka na ndako na ngonga ya 6 ya ntɔngɔ mpe azongaka kaka na ngonga ya 20. Na ntango mosusu, ekoki kosɛnga kotya losambo na kati ya libota mokolo mosusu mpo na kosala makambo mosusu ya elimo.

Kasi, tosengeli kozala na ekateli ya kosala losambo na kati ya libota pɔsɔ na pɔsɔ. Loïs, elenge moko ya mbula 11 na Togo, alobi ete na libota na bango bazwá ekateli ete: “Ata soki tobandi losambo na kati ya libota na retare mpo likambo moko ebimaki mokolo wana, tosalaka yango kaka.” Mabota mosusu basalaka losambo na bango na kati ya libota na ebandeli ya pɔsɔ. Soki likambo moko ya mbalakaka ebimi, bakoki kosala yango mokolo mosusu, kasi kaka na pɔsɔ wana.

Maloba losambo na kati ya libota emonisi ete eteni yango ya losambo ezali na kati ya losambo oyo topesaka Yehova. Tiká ete bato nyonso ya libota na yo bámemela Yehova ‘likabo ya bana-ngɔmbɛ ya mibali ya mbɛbu na bango’ pɔsɔ nyonso. (Hos. 14:2) Mpe tiká ete losambo na kati ya libota ezala ntango moko ya esengo mpo na moto nyonso “mpo esengo ya Yehova ezali esika makasi ya libateli na bino.”​—Neh. 8:9, 10.