Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Yesu akosala nini na mikolo ezali koya?

Na mobu 33 ya ntango na biso, Yesu akufaki, asekwaki mpe amataki na likoló. Bambula mingi na nsima bapesaki ye bokonzi mpo na koyangela. (Danyele 7:13, 14) Na mikolo ezali koya, Yesu akosalela bokonzi na ye mpo na kotya kimya na mokili mpe kosilisa bobola.​—Tángá Nzembo 72:7, 8, 13.

Ntango Yesu akoyangela, akolongola makambo nyonso ya kozanga bosembo na mabele

Ntango Yesu akoyangela bato, akosala makambo ya kitoko mpenza. Akosalela nguya oyo Tata na ye apesi ye mpo bato bákóma lisusu na nzoto ya kokoka. Bakozala na bomoi oyo ezangi konuna mpe liwa.​—Tángá Yoane 5:26-29; 1 Bakorinti 15:25, 26.

Yesu azali kosala nini sikoyo?

Sikoyo Yesu azali kotambwisa mosala ya kosakola oyo bayekoli na ye ya solosolo bazali kosala na mokili mobimba. Bakendaka kotala bato mpo na komonisa bango oyo Biblia elobi mpo na Bokonzi ya Nzambe. Yesu alobaki ete akokoba kopesa bayekoli na ye mabɔkɔ na mosala yango tii ntango Bokonzi ya Nzambe ekosukisa baguvɛrnema ya bato.​—Tángá Matai 24:14; 28:19, 20.

Na nzela ya Lisangá ya bokristo, Yesu azali kolakisa bato ndenge ya kozala na bomoi ya malamu koleka. Akokoba kokamba bango tii ntango mokili oyo ekobebisama mpo na kokɔtisa bango na mokili ya sika oyo Nzambe alaki.—Tángá 2 Petro 3:7, 13; Emoniseli 7:17.