Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | MOTO AKOKI KOYEBA AVENIRE?

Makambo mosusu ekokisamaka kasi mingi ekokisamaka te

Makambo mosusu ekokisamaka kasi mingi ekokisamaka te

Okolinga koyeba avenire na yo? Bato mingi balingaka koyeba oyo ya bango. Ezali na bato mingi oyo bayebisaka makambo oyo ekosalema, kasi makambo ndenge na ndenge emonanaka na nsima. Tótalela makambo oyo elandi:

  • BATO YA SIANSI basalelaka baaparɛyi ya kokamwa mpenza mpe babimisaka mbongo ebele mpo na kolobela makambo ndenge na ndenge oyo ekosalema, na ndakisa ndenge oyo kobeba ya mopɛpɛ ekobebisa mabele to soki mbula ekobɛta lobi na esika ofandaka to te.

  • BATO OYO BALANDELAKA MAKAMBO MALAMUMALAMU basakolaka mbongwana oyo ekokɔta na makambo ya mombongo mpe ya politiki. Warren Buffett, moko ya bato oyo bazali na mbongo mingi koleka na mokili mobimba abengamaki profeta mpo asakolaki na bosikisiki ndenge makambo ya mombongo ekobongwana. Nate Silver, moto mosusu ya mayele atalelaki malamumalamu balapolo oyo azalaki na yango mpo esalisa ye alobela makambo nyonso oyo ekokómela politiki ya États-Unis mpe mbano oyo bakopesa bato oyo basalaka bafilme na Hollywood.

  • MAKOMI YA KALA elobelamaki lokola bisakweli. Bato mosusu bamonaka ete makambo oyo ezali kosalema lelo elobelamaki na makomi moko boye, oyo Michel de Notredame (Nostradamus) akomaki na siɛklɛ ya 16. Bato mosusu balobaki ete kalandriye ya kala ya Ba-Maya oyo esukaki na mokolo ya 21/12/2012 ezalaki elembo ya makambo ya nsɔmɔ oyo elingaki kosalema.

  • BAKONZI YA MANGOMBA basakolaka na bantango mosusu makambo mabe oyo ekosalema na mokili mpo na kokebisa bato mpe mpo bázwa bandimi. Harold Camping, oyo asakolaki makambo mabe, mpe bayekoli na ye bapanzaki nsango ete mabele ekokufa na 2011. Kasi tii lelo mokili ezali kaka.

  • BANGANGA-NKISI balobaka ete bazali na makoki oyo bato mosusu bazali na yango te ya kosakola avenire. Makambo mosusu oyo Edgar Cayce mpe Jeane Dixon basakolaki mpo na siɛklɛ ya 20 ekokisamaki. Bango mibale basakolaki mpe makambo mingi oyo ekokisamaki te. Na ndakisa, Dixon alobaki ete Etumba ya Misato ya mokili mobimba ekosalema na 1958 mpe Cayce alobaki ete engumba New York ekozinda na mbu na katikati ya bambula ya 1970.

Ezali mpenza na ndenge mosusu ya koyeba avenire oyo tokoki kotyela motema? Ebongi mpenza komituna motuna wana. Soki ozalaki na likoki ya komona makambo oyo ekoya, olingaki koyeba ndenge ya kotambwisa bomoi na yo.