Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BASUVENIRE YA MAKAMBO ELEKÁ

“Mosala ya kobuka mbuma ezali naino mingi”

“Mosala ya kobuka mbuma ezali naino mingi”

George Young akómaki na Rio de Janeiro na sanza ya misato ya mobu 1923

TOZALI na mobu 1923. Ndako oyo basalaka bateyatre mpe babɛtaka miziki na São Paulo etondi na bato mɛkɛ! Okoki koyoka mongongo kitoko ya ndeko George Young? Bazalaki kobongola diskur na ye na Portugais fraze mokomoko. Bayangani nyonso 585 bazali koyoka na likebi mpenza! Bazalaki kolakisa bavɛrsɛ ya Biblia ya Portugais na elamba moko na projecteur. Na nsuka, bankama ya mwa babuku Bamilio ya bato oyo bazali sikoyo na bomoi bakokufa te! ekabolamaki, elongo na misusu oyo ezalaki na minɔkɔ ya Lingelesi, Allemand mpe Italien. Diskur wana ekokisaki mpenza mokano na yango! Nsango epanzanaki. Mikolo mibale na nsima, ndako wana ya masano etondaki mpo na diskur mosusu. Nini ememaki makambo wana?

Na mobu 1867, Sarah Bellona Ferguson ná libota na ye balongwaki na États-Unis mpe bakendaki na Brésil. Na mobu 1899, Sarah andimaki ete amoni solo nsima ya kotánga mikanda mosusu oyo elimbolaka Biblia oyo leki na ye azwaki na États-Unis mpe amemaki na Brésil. Lokola azalaki motángi ya molende, asalaki komande bátindelaka ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Lingelesi. Lokola asepelaki mingi na nsango ya Biblia, akomelaki ndeko Charles Taze Russel mpe alobaki ete ndakisa na ye “emonisi polele ete ata soki moto afandaka mosika ndenge nini, nsango malamu ekoki kokómela ye.”

Bato ya bomoi bakoki kosolola na bakufi? (Portugais)

Ndeko Sarah Ferguson asalaki nyonso ayebisa basusu solo ya Biblia, kasi azalaki komituna soki nani akosalisa ye ná libota na ye, mpe bato mosusu nyonso malamu ya Brésil. Na mobu 1912, Betele ya Brooklyn eyebisaki ye ete moto moko azali koya na São Paulo ná bankóto ya batrakte na monɔkɔ ya Portugais oyo ezalaki na motó ya likambo ete Bato ya bomoi bakoki kosolola ná bakufi? Na mobu 1915, alobaki ete azalaki komona yango likambo ya kokamwa ete bayekoli mingi ya Biblia bazalaki na elikya ete mosika te bakokende na likoló. Mpo na komonisa likanisi na ye, akomaki ete: “Tokoloba nini mpo na Brésil mpe Amerika ya Sudi? . . . Soki otali ndenge Amerika ya Sudi ezali monene, okoki komona mbala moko ete mosala ya kobuka mbuma ezalaki mingi.” Ya solo, mosala ya kobuka mbuma esengelaki mpenza kosalema lisusu mingi!

Na mobu soki 1920, bilenge mwambe ya Brésil oyo bazalaki kosala na masuwa moko ya basoda bakɔtaki na makita na engumba New York mpo bazalaki kobongisa masuwa na bango. Ntango bazongaki na Rio de Janeiro, babandaki koyebisa bato mosusu mateya ya Biblia oyo bautaki kozwa. Eumelaki mingi te, na sanza ya misato ya mobu 1923, George Young, oyo azalaki pèlerin to mokɛngɛli-motamboli, akómaki na Rio de Janeiro, epai akutaki bato oyo bazalaki kosepela na solo. Azwaki bibongiseli mpo ete mikanda mingi ebongolama na Portugais. Eumelaki te, ndeko Young akendaki na São Paulo, engumba oyo ezalaki na ntango wana na bato soki 600 000. Asalaki diskur kuna mpe akabolaki bamilio ya mwa babuku, ndenge tomonisaki yango na ebandeli ya lisolo oyo. Alobi ete: “Lokola nazalaki kaka ngai moko, nazalaki komipesa mingi na kokabola bazulunalo mpo na kobenga bato.” Abakisi ete: “Esalemaki bongo mpo na badiskur ya liboso oyo nasalaki na Brésil. Tosalelaki maloba I.B.S.A.” *

Bazalaki kolakisa bavɛrsɛ ya Biblia na elamba moko na projecteur ntango ndeko Young azali kosala badiskur

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/12/1923, na Lingelesi epesaki lapolo ya Brésil boye: “Soki totali ndenge mosala ebandaki kuna na 01/06 mpe ata mokanda moko te ezalaki na ntango wana, ezali mpenza likambo ya kokamwa ndenge Nkolo apamboli mosala yango.” Lapolo yango ekobaki ete badiskur oyo ndeko Young asalaki na São Paulo ezalaki mibale kati na badiskur 21 oyo esalemaki kobanda 01/06/ tii 30/09, mpe motángo mobimba ya bayangani ezalaki 3 600. Na Rio de Janeiro, nsango ya Bokonzi ezalaki kopanzana mokemoke. Mpe nsima kaka ya mwa basanza, mikanda na biso na monɔkɔ ya Portugais ekabolamaki koleka 7 000! Nzokande, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na monɔkɔ ya Portugais ebandaki kobima na nimero ya sanza ya 11-12/1923.

Ndeko Sarah Bellona Ferguson, azalaki moto ya liboso oyo asalaki komande ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na Lingelesi na Brésil

Ndeko George Young alukaki Sarah Ferguson, mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobi ete: “Ndeko mwasi yango ayaki na salon mpe atikalaki monɔkɔ polele mpo na mwa ntango. Asimbaki ndeko Young na lobɔkɔ, mpe azalaki kotala ye na elongi, mpe na nsuka atunaki ye boye: ‘Yo ozali mpenza pèlerin?’” Eumelaki te, ye ná bana na ye mosusu bazwaki batisimo. Elekaki mbula 25 tii ntango azwaki batisimo! Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/1924 emonisaki ete bato 50 babatisamaki na Brésil, mingimingi na Rio de Janeiro.

Kasi, lelo oyo nsima ya mbula soki 90, tozali lisusu te na mposa ya kotuna: “Tokoloba nini mpo na Brésil mpe Amerika ya Sudi?” Batatoli ya Yehova koleka 760 000 bazali kosakola nsango malamu na Brésil. Mpe na Amerika ya Sudi mobimba, bato bazali sikoyo koyoka nsango ya Bokonzi na Portugais, Espagnol mpe na minɔkɔ mosusu mingi ya kuna. Ndeko Sarah Ferguson azalaki na elonga ndenge alobaki na mobu 1915 ete: ‘Mosala ya kobuka mbuma ezalaki naino mingi.’​—Basuvenire ya makambo oyo eleká na Brésil.

^ par. 6 I.B.S.A. elimboli [Association internationale des étudiants de la Bible].