Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NZAMBE ATYELAKA YO LIKEBI?

Nzambe akoki kobɔndisa yo

Nzambe akoki kobɔndisa yo

“Nzambe, oyo abɔndisaka baoyo balɛmbi nzoto, abɔndisaki biso.”​—2 BAKORINTI 7:6.

“Mwana ya Nzambe . . . alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.”​—BAGALATIA 2:20

MPO NA NINI BATO MOSUSU BATYAKA NTEMBE? Ata soki bazali na mposa ya lisalisi, bato mosusu bamonaka ete kosɛnga Nzambe asalisa bango bálonga mikakatano ezali lokola nde bazali koluka matomba na bango moko. Mwasi moko na nkombo Raquel, alobi boye: “Soki natali motángo ya bato oyo bazali na mokili mpe mikakatano makasi oyo bakutanaka na yango, namonaka ete mitungisi na ngai ezali mpenza na ntina te, yango wana namonaka mpasi kosɛnga Nzambe asalisa ngai.”

OYO LILOBA YA NZAMBE ETEYAKA: Nzambe así asalisá mpe abɔndisá bato na ndenge moko ya kokamwa mpenza. Moto nyonso na mabele azwá lisumu ya Adama, yango nde esalaka ete moto akokisa makambo nyonso te oyo Nzambe asɛngaka. Kasi, Nzambe “alingaki biso mpe atindaki Mwana na ye [Yesu Kristo] azala mbeka mpo na kozipa masumu na biso.” (1 Yoane 4:10) Na nzela ya mbeka ya Yesu, Nzambe akoki kolimbisa masumu na biso, tokoki kozala na lisosoli ya pɛto mpe na elikya ya bomoi ya seko na mokili ya sika ya kimya. * Mbeka oyo Yesu apesaki ezali kaka mpo na bato nyonso to emonisi mpe ete Nzambe atyelaka yo mpenza likebi?

Tózwa ndakisa ya ntoma Paulo. Mbeka ya Yesu esimbaki mpenza motema na ye, yango wana akomaki boye: “Nandimeli Mwana ya Nzambe, oyo alingaki ngai mpe amikabaki mpo na ngai.” (Bagalatia 2:20) Yesu akufaki liboso kutu Paulo akóma mokristo. Ata bongo, Paulo amonaki mbeka yango lokola likabo oyo Nzambe apesaki mpo na ye mpenza.

Liwa ya Yesu lokola mbeka ezali likabo oyo Nzambe apesaki mpo na yo mpe. Likabo yango emonisi ete ozali mpenza na valɛrɛ na miso ya Nzambe. Ekoki kopesa yo “libɔndisi ya seko mpe elikya ya malamu” mpe ‘kopesa yo makasi na mosala nyonso ya malamu mpe liloba nyonso ya malamu.’​—2 Batesaloniki 2:16, 17.

Kasi, Yesu apesaki bomoi na ye mbeka eleki sikoyo mbula soki 2 000. Nini emonisi mpenza ete Nzambe azali kobenda yo lelo oyo?

^ par. 5 Mpo na koyeba makambo mosusu etali mbeka ya Yesu, talá mokapo 5 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.