Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna ya batángi

Mituna ya batángi

Makambo oyo Mokonzi Davidi alobaki na Nzembo 37:25 mpe maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 6:33 elimboli ete Yehova akoki soki moke te kopesa nzela ete mokristo azanga eloko ya kolya?

Mokonzi Davidi akomaki ete amoná “naino te moyengebene asundolami mpenza, to bana na ye bazali koluka limpa.” Makambo oyo akutaná na yango nde etindaki ye aloba bongo. Ayebaki ete Nzambe asungaka basaleli na ye ntango nyonso. (Nz. 37:25) Kasi, maloba ya Davidi elakisi te ete mosaleli ya Yehova akoki te kozanga eloko.

Ezalaki na bantango oyo ye moko Davidi mpe akutanaki na mikakatano. Na ndakisa ntango azalaki kokima mokonzi Saulo. Biloko na ye ya kolya etikalaki moke mpenza mpe asɛngaki limpa mpo na ye mpe bato oyo bazalaki na ye. (1 Sa. 21:1-6) Na ntango wana, Davidi azalaki “koluka limpa.” Kasi, ata na ntango wana ya mpasi, Davidi ayebaki ete Yehova abosanaki ye te. Likambo ya ntina ezali ete, ata esika moko te totángaka ete Davidi akómaki kosɛngasɛnga biloko mpo azala na bomoi.

Na Matai 6:33, tomonaka elikya oyo Yesu apesaki ete Nzambe akokokisa bamposa ya basaleli na ye ya sembo oyo batyaka Bokonzi na esika ya liboso. Yesu alobaki ete: “Boye, bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu [ata mpe bilei, komɛla mpe bilamba].” Nzokande, Yesu alobaki mpe ete minyoko ekoki mpe kosala ete “bandeko” na ye bázanga eloko ya kolya. (Mat. 25:35, 37, 40) Yango nde ekómelaki mpe ntoma Paulo. Na ntango mosusu ayokaki nzala mpe mposa ya mai.​—2 Ko. 11:27.

Yehova alobi ete tokokutana na minyoko ya ndenge na ndenge. Akoki kopesa nzela ete tózanga likambo boye to boye mpo tópesa eyano na bifundeli ya Satana. (Yobo 2:3-5) Na ndakisa, minyoko etyaki mpenza na likama bomoi ya bandeko na biso mosusu oyo bazalaki na bakaa ya bakangami ya Banazi. Kozangisa Batatoli ya Yehova bilei, ezalaki moko ya mayele oyo Zabolo asalelaki mpo na kobebisa bosembo na bango. Batatoli ya sembo ya Yehova bakobaki kotosa ye; mpe ye atikaki bango te. Atikaki bákutana na komekama wana, ndenge kaka atikaka ete bakristo nyonso bákutana na komekama ndenge na ndenge. Kasi, Yehova asungaka mpe asalisaka baoyo banyokwamaka mpo na nkombo na ye. (1 Ko. 10:13) Tokoki kobatela na makanisi na biso maloba oyo ezali na mokanda ya Bafilipi 1:29 oyo elobi ete: “Bozwi libaku malamu, kaka ya kondimela Kristo te, kasi mpe ya konyokwama mpo na ye.”

Yehova alaki ete akozala elongo na basaleli na ye. Na ndakisa, Yisaya 54:17 elobi ete: “Ebundeli nyonso oyo ekosalema mpo na kobunda na yo ekolonga te.” Elaka oyo mpe bilaka mosusu ya ndenge wana endimisaka biso ete Nzambe abatelaka basaleli na ye. Kasi, mokristo moko akoki kokutana na mikakatano oyo ekoki ata komema na liwa.