Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BOKONZI YA NZAMBE​—EZALI NA NTINA NINI MPO NA YO?

Mpo na nini kotyela Bokonzi ya Nzambe likebi?

Mpo na nini kotyela Bokonzi ya Nzambe likebi?

Bamilio ya bato na mokili mobimba batyelaka Bokonzi ya Nzambe elikya. Balandaka ndakisa ya Yesu, oyo ateyaki bayekoli na ye bábondelaka boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.”​—Matai 6:10.

Likambo ya kokamwa, atako bato mingi batyelaka Bokonzi ya Nzambe likebi, kasi mangomba mingi etyelaka yango likebi mpenza te. Mpo na yango, George Wells, moto moko ya istware amonisaki ndenge Yesu azalaki kozwa na “valɛrɛ mingi . . . mateya na ye, oyo abengaki Bokonzi ya likoló” mpe ndenge oyo “mangomba mingi ya bokristo ezali . . . kozwa mateya yango na valɛrɛ mingi te.”

Na kokesana na mangomba yango, Batatoli ya Yehova balobelaka mingi Bokonzi ya Nzambe. Na ndakisa: Zulunalo na biso oyo ozali kotánga sikoyo ebimisami na minɔkɔ 220. Nimero mokomoko ya zulunalo yango ebimaka na motángo pene ya milio 46, yango esali ete ezala zulunalo oyo ekabolami mingi na mokili mobimba koleka bazulunalo mosusu nyonso. Kasi, nsango ya libosoliboso oyo zulunalo yango elobelaka ezali nini? Talá titre na yango mobimba: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Eyebisaka Bokonzi ya Yehova.  *

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka milende wana nyonso mpo na kosakola Bokonzi ya Nzambe? Ezali mpo tondimaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali nsango ya libosoliboso ya Biblia, buku ya ntina mingi koleka babuku nyonso na mokili. Lisusu, tondimaka mpenza ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa bampasi ya bato.

Batatoli ya Yehova balandaka mpenza ndakisa ya Yesu ndenge balobelaka mingi Bokonzi ya Nzambe. Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bokonzi ya Nzambe ezalaki na ntina mingi na bomoi na ye mpe azalaki kolobela yango mingi na mosala na ye. (Luka 4:43) Mpo na nini Bokonzi ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu? Mpe ezali na ntina nini mpo na yo? Tosɛngi yo otalela biyano ya Biblia ndenge elobelami na masolo oyo elandi.

^ par. 5 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.