Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | BOKONZI YA NZAMBE​—EZALI NA NTINA NINI MPO NA YO?

Bokonzi ya Nzambe ekozala na ntina nini mpo na yo?

Bokonzi ya Nzambe ekozala na ntina nini mpo na yo?

Ndenge omoni yango na masolo oyo eleki, Batatoli ya Yehova bazwaka Bokonzi ya Nzambe na ntina mingi. Mbala mosusu mapamboli oyo touti kolobela, oyo Bokonzi ya Nzambe ekopesa esepelisi yo. Kasi, okoki mpe komituna soki bilaka kitoko wana ekokokisama mpenza.

Ezali malamu kozala ekɛngɛ na esika ya kondima likambo nyonso oyo oyoki. (Masese 14:15) Okokokana na bato ya Beroya * oyo bazalaki mpe ekɛngɛ. Ntango bayebisaki bango nsango malamu ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso, bandimaki makambo bayokaki, kasi kaka te mpo balingaki ete nsango yango ezala solo. Kutu, batalelaki malamumalamu Makomami “mpo na koyeba soki makambo yango ezali bongo.” (Misala 17:11) Na maloba mosusu, bato ya Beroya bakokanisaki nsango malamu oyo bayokaki ná oyo Makomami elobaka. Na nsima, bandimaki ete nsango malamu yango eutaki mpenza na Liloba ya Nzambe.

Na esengo nyonso, Batatoli ya Yehova basɛngi yo osala mpe bongo. Na nzela ya programɛ ya koyekola Biblia ofele, topesi yo libaku ya kotala oyo Batatoli ya Yehova bandimaka na ntina etali Bokonzi ya Nzambe mpe oyo Biblia eteyaka.

Longola koyekola makambo etali Bokonzi ya Nzambe, boyekoli ya Biblia ekosalisa yo ozwa mpe biyano na mituna mosusu ya ntina mingi oyo etali bomoi.

Na nyonso, koyekola Biblia ekosalisa yo ‘opusana penepene na Nzambe.’ (Yakobo 4:8) Ntango ozali kopusana penepene na Nzambe, ekosala ete omona mpenza ndenge Bokonzi ya Nzambe ekomemela yo bolamu lelo mpe mpo na libela. Yesu alobaki na Tata na ye boye na libondeli: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

 

^ par. 4 Beroya ezalaki engumba moko ya Masedonia.