Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Ozali koyeba lisusu?

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna oyo elandi:

Bakristo bakoki kotumba ebembe?

Kotumba ebembe to te ezali ekateli oyo moto na moto akoki kozwa. Atako Biblia elobeli polele boye te momeseno yango, kasi tosengeli koyeba ete bibembe ya bato lokola mokonzi Saulo mpe mwana na ye Yonatane etumbamaki mpe na nsima ekundamaki. (1 Sa. 31:2, 8-13)​—15/6, lok. 7.

Ndenge nini tokoki kondimisama ete Nzambe te nde abimisaka makambo mabe?

Nzambe azali moyengebene na banzela na ye nyonso. Azali moyengebene, sembo mpe makambo na ye ezali alima. Yehova azali mpe motema boboto mpe mawa. (Mib. 32:4; Nz. 145:17; Yak. 5:11)​—1/7, lok. 4.

Mikakatano nini moto oyo akei na mboka mopaya kosala epai mposa ezali monene akoki kokutana na yango?

Mikakatano yango misato ezali (1) Ndenge ya kobikela, (2) susi ya mboka na yo, mpe (3) kozwa baninga ya sika. Ebele ya bandeko oyo balongaki mikakatano yango, bazwaki mapamboli mingi mpenza.​—15/7, nk. 4-5.

Mpo na nini bandeko ya Yozefe babalukelaki ye?

Likambo ya ntina ezali ete Yakobo alingaki Yozefe mingi mpenza, mpe apesaki ye elamba moko ya kitoko mingi mpenza. Bandeko ya Yozefe bakómaki na likunya na ye mpe batɛkaki ye na boombo.​—1/8, nk. 11-13.

Nini ezali kosala ete batrakte ya sika ebimisa matomba mpe esalelama kozanga mindɔndɔ?

Batrakte yango nyonso ebongisami ndenge moko. Trakte mokomoko etindaka biso tópona vɛrsɛ moko ya malamu oyo tokotánga mpe tótuna motuna ntango tokolakisa yango epai ya moto. Ezala apesi eyano nini, tokoki kofungola na kati mpe kolakisa ye oyo Biblia elobi. Tokoki kotuna motuna moko mpo na kobongisa bozongiseli ya sika.​—15/8, nk. 13-14.

Peshitta ya monɔkɔ ya Syriaque ezali nini?

Syriaque, monɔkɔ moko ya Aramɛyɛ, ekómaki kosalelama mingi na siɛklɛ ya mibale to ya misato ya T.B. Ekoki kozala ete Syriaque ezali monɔkɔ ya liboso oyo babongolaki na yango biteni mosusu ya Makomami ya Grɛki ya bokristo. Biblia na monɔkɔ ya Syriaque ekómaki kobengama Peshitta.​1/9, nk. 13-14.

Baboti bakristo bakoki kosala nini mpo bábɔkɔla bana na bango?

Ezali na ntina mingi koyoka bana mpe koyeba bango malamu. Salá makasi mpo na koleisa bango na elimo. Na ndakisa, tambwisá bango na bolingo ntango babandi kotya bantembe na makambo mosusu ya elimo.​—15/9, nk. 18-21.

Na nse ya Bokonzi ya Nzambe, makambo nini ekozala lisusu te?

Maladi, liwa, kozanga mosala, bitumba, kozanga bilei mpe bobola ekozala lisusu te.​—1/10, nk. 6-7.

Kondimana nini epesi bakristo mosusu nzela ya koyangela elongo na Kristo?

Nsima ya kosala Elekeli ya nsuka elongo na bantoma na ye, Yesu asalaki kondimana ná bayekoli na ye ya sembo mpe kondimana yango ebengami Kondimana mpo na Bokonzi. (Luka 22:28-30) Endimisi bango ete bakoyangela elongo na ye na likoló.​—15/10, nk. 16-17.

Pesá ndakisa mibale oyo emonisi ete Satana azali moto ya solo.

Makomami elobi ete Satana asololaki ná Yesu mpo na komeka ye. Lisusu, na mikolo ya Yobo, Satana asololaki ná Nzambe. Masolo oyo mibale emonisi ete Satana azali moto ya solo.​—1/11, nk. 4-5.

Ndenge Misala 15:14 emonisi yango, banani bazalaki bato mpo na “nkombo na ye” oyo Yakobo alobelaki?

Ezalaki bandimi oyo bazalaki Bayuda ná oyo bazalaki Bayuda te, oyo Nzambe aponaki mpo bázala libota oyo eponami mpo ‘básakola bizaleli malamu’ ya moto oyo abengaki bango. (1 Pe. 2:9, 10)​—15/11, nk. 24-25.

Timgad ezalaki nini, mpe bato mosusu kuna bazalaki na ezaleli nini?

Timgad ezalaki engumba moko monene na Afrika ya Nɔrdi (lelo oyo Algérie). Mpo na komonisa makanisi oyo bato mosusu bazalaki na yango kuna, makomami moko oyo bakundolaki ezalaki koloba boye: “Koboma, kosukola, kosakana, kosɛka nde bomoi ya solo!” Likambo yango eyokani na makanisi oyo ezali na 1 Bakorinti 15:32.​—1/12, nk. 8-10.