Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biyano na mituna ya Biblia

Biyano na mituna ya Biblia

Mokolo ya kosambisama ezali nini?

Mpo na nini mokolo ya kosambisama ekozala ntango moko ya esengo?

Na ntango ya kala, Nzambe asalelaki bazuzi mpo na kobikisa bato na ye na makambo ya kozanga bosembo. (Basambisi 2:18) Biblia elobeli mokolo ya kosambisama oyo ezali koya lokola ntango moko ya esengo oyo Yehova, Zuzi ya mabele mobimba, akobikisa bato na makambo ya kozanga bosembo.​—Tángá Nzembo 96:12, 13; Yisaya 26:9.

Nzambe aponi Yesu mpo bosembo esalema mpo na bakufi mpe bato ya bomoi. (Misala 10:42; 17:31) Bato mingi bakufá kozanga ete báyeba Nzambe. Na boumeli ya mokolo ya kosambisama, Yesu akosekwisa bato yango mpo bázwa libaku ya koyeba mpe kolinga Nzambe ya solo.​—Tángá Misala 24:15.

Mpo na nini mokolo yango ekoumela mbula 1 000?

Bato bakosekwa na boumeli ya mbula 1 000. (Emoniseli 20:4, 12) Bakozala na mposa ya ntango ya koyekola banzela ya Nzambe mpe kotosa ye. Na kokesana na makanisi ya bato mingi, Biblia emonisi ete bato bakosambisama na kotalela makambo oyo bakosala nsima ya lisekwa na bango.​—Tángá Baroma 6:7.

Biblia elobeli mpe mokolo ya kosambisama oyo ekoya na mbalakaka liboso ete mbula 1 000 ebanda. Babengaka mokolo yango mpe nsuka ya mokili ndenge tolobeli yango na masolo ya ebandeli na zulunalo oyo. Na mokolo yango, Nzambe akoboma bato nyonso oyo batyolaka ye, bato mabe. (2 Petro 3:7) Yango wana, tosengeli kosala nyonso mpo na komonisa ete tolingaka Nzambe.​—Tángá 2 Petro 3:9, 13.