Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NDENGE YA KOLONGA MITUNGISI

Mitungisi ezalaka bisika nyonso!

Mitungisi ezalaka bisika nyonso!

“Nakendaki kosomba biloko ya kolya, kasi nakutaki kaka bisikiti mpe ntalo na yango emataki mbala 10 000 koleka ndenge ezalaka! Mokolo oyo elandaki, bamagazini ezalaki ata na eloko te.”​—Paul, Zimbabwe.

“Mobali na ngai afandisaki ngai mpe ayebisaki ngai ete aboyi ngai. Ndenge nini nakokaki kokangela likambo yango motema? Nini elingaki kokómela bana na ngai?”​—Janet, États-Unis.

“Ntango nayokaka lokito ya mandoki, nakimaka mpo na komibomba mpe nalalaka na nse ntango babɔmbi ebɛtaka. Bangonga mingi na nsima mabɔkɔ na ngai ekobaka kolɛnga.”​—Alona, Isräel.

Tozali na ntango ya mitungisi, “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Timote 3:1) Bato mingi bazali komitungisa mpo na kozanga mbongo, ndenge mabota ezali kobeba, bitumba, kopalangana ya bamaladi mabe mpe mpo na makama oyo ebimaka yango moko mpe oyo bato babimisaka. Longola yango, ezali na makambo ndenge na ndenge oyo ekoki kotungisa moto ye moko: ‘Eloko oyo ebimi ngai na nzoto ekokóma kanser te?’ ‘Mokili ekozala ndenge nini ntango bankɔkɔ na ngai bakokola?’

Mitungisi nyonso ezalaka mabe te. Ekomelaka moto nyonso amitungisa mwa moke liboso ya kosala ekzamɛ moko, mosala moko boye to liboso ya koyanola na mituna oyo bapatrɔ batunaka liboso moto abanda mosala. Mpe kobanga likama esalisaka biso tókima yango. Kasi komitungisa koleka ndelo to ntango nyonso nde ezalaka mabe. Baankɛtɛ mingi oyo euti kosalema epai ya mikóló koleka 68 000 emonisi ete komitungisa ata mwa moke ebakisaka likama ya kokufa liwa ya mobesu. Ezali mpo na yango nde Yesu atunaki boye: “Nani na kati na bino soki amitungisi akoki kobakisa bolai ya bomoi na ye ata moke?” Mitungisi ekómisaka bomoi ya moto molai te. Yango wana, Yesu apesaki toli oyo: “Bótika komitungisa.” (Matai 6:25, 27) Kasi ndenge nini yango ekoki kosalema?

Mpo esalema bongo, esɛngi kosalela bwanya oyo ebongi, kozala na kondima ya solosolo epai ya Nzambe mpe kozala ya elikya ya solosolo mpo na avenire. Ata soki tozali na makambo oyo ezali kotungisa biso sikoyo te, tokoki kokutana na yango na avenire. Na yango, tótala ndenge oyo kosalela batoli yango esalisaki Paul, Janet ná Alona bálonga mitungisi.