Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NTANGO MOTO OLINGAKA AKUFI

Bato oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi!

Bato oyo bakufá bakozonga lisusu na bomoi!

Mbala mosusu obosani Gail te, oyo tolobelaki liboso na masolo oyo, oyo azalaki komituna soki mpasi oyo ayokaki mpo na liwa ya Rob, mobali na ye ekosila. Kasi, azali na mposa makasi ya komona ye lisusu na mokili ya sika ya Nzambe. Alobi boye: “Vɛrsɛ oyo nalingaka mingi ezali Emoniseli 21:3, 4.” Vɛrsɛ yango elobi boye: “Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”

Gail alobi boye: “Elaka yango elobi mingi. Nakanisaka baoyo bandeko to baninga na bango bakufá, kasi bayebi elaka oyo te ya komona lisusu bato yango.” Gail asalelaka mateya oyo andimaka, yango wana alekisaka bangonga mingi na koteya bato ya kartye na ye nsango malamu oyo etali elaka ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya ntango “liwa ekozala lisusu te.”

Yobo azalaki na kondima ete akozonga lisusu na bomoi

Okoki koloba ete ‘ekoki kosalema te!’ Kasi, tótalela ndakisa ya mobali moko na nkombo Yobo. Abɛlaki makasi mpenza. (Yobo 2:7) Atako Yobo akómaki na mposa ya liwa, azalaki kaka kondima ete Nzambe azali na nguya ya kosekwisa ye. Na kondima nyonso, alobaki boye: “Aa soki obombaka ngai ata na Nkunda . . . Yo okobenga, mpe ngai nakondima. Okozala na mposa makasi ya mosala ya mabɔkɔ na yo.” (Yobo 14:13, 15) Yobo azalaki na kondima ete Nzambe na ye akozala na mposa makasi ya kozongisa ye na bomoi.

Mosika te, Nzambe akosala yango mpo na Yobo mpe mpo na bato mosusu mingi ntango mabele oyo ekokóma paradiso. (Luka 23:42, 43) Biblia emonisi na Misala 24:15 ete “lisekwa ekozala.” Yesu mpe alobaki boye: “Bókamwa te mpo na yango, mpamba te ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita bakoyoka mongongo na ye mpe bakobima.” (Yoane 5:28, 29) Yobo akomona ndenge elaka yango ekokokisama. Akozala na libaku ya kozongela “makasi ya bolenge,” mpe nzoto na ye ekotikala libela na libela “ya sika koleka oyo ya bolenge.” (Yobo 33:24, 25) Ekozala mpe bongo mpo na baoyo nyonso bakondima ebongiseli ya motema mawa ya Nzambe oyo etali kosekwisa bato awa na mabele.

Soki liwa ya ndeko to moninga etungisaka yo, makambo oyo tolobeli awa ekosilisa mpasi na yo nyonso te. Kasi, soki ozali kokanisa mpenza bilaka ya Nzambe oyo ezali na Biblia, okoki kozala na elikya ya solosolo mpe na makasi ya kokoba koyika mpiko.​—1 Batesaloniki 4:13.

Okosepela koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kokitisa mawa oyo moto ayokaka soki ndeko to moninga na ye akufi? To mpe omitunaka mituna lokola, “Mpo na nini Nzambe atiki nzela ete mabe mpe bampasi ezala?” Tosɛngi yo okɔta na site Internet na biso, jw.org, mpo omona ndenge Biblia ezali kopesa biyano oyo ebongi, oyo ekokitisa motema.