Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Mpo na nini yesu anyokwamaki mpe akufaki?

Mpo na nini yesu anyokwamaki mpe akufaki?

“Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu.”​—Baroma 5:12

Okopesa eyano nini soki batuni yo, “okolinga kozala na bomoi libela na libela?” Bato mingi bakoki kolinga ezala bongo, kasi bamonaka ete ezali mpasi mpo esalema. Balobaka ete liwa ezali nzela ya moto nyonso, mwaye ya kokima yango ezali te.

Kasi, soki batuni yo lisusu boye, “okolinga kokufa?” Ezali mpasi moto andima. Yango emonisi nini? Moto nyonso azalaka na mposa ya kozala na bomoi ata soki azali na mpasi to azali konyokwama. Biblia emonisi ete Nzambe akelá bato na mposa ya kozala na bomoi libela. Kutu, Biblia elobi ete “ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango.”​—Mosakoli 3:11.

Kasi, ata bongo, bato bakufaka kaka. Boye, makambo ebebaki ndenge nini? Lisusu, Nzambe asali nini mpo na kobongisa makambo yango? Biyano ya Biblia ezali kosimba motema mpe eyokani na ntina oyo Yesu anyokwamaki mpe akufaki.

MAKAMBO EBEBAKI NDENGE NINI?

Mikapo misato ya liboso ya Mokanda ya Ebandeli emonisi ete Nzambe apesaki mwasi mpe mobali ya liboso libaku ya kozala na bomoi libela na libela mpe ayebisaki bango nini basengelaki kosala mpo bátikala na bomoi. Na nsima, lisolo yango emonisi ndenge batosaki Nzambe te mpe babungisaki libaku yango. Biblia ebɛti lisolo yango na pɛtɛɛ nyonso, yango wana bato mosusu bawelaka koloba ete ezali kaka mwa lisapo. Kasi ndenge moko na Baevanzile, Mokanda ya Ebandeli elobeli likambo mokomoko oyo emonisi ete ezalaki makambo oyo esalemaki mpenza. *

Kozanga kotosa ya Adama ebimisi nini? Biblia eyanoli boye: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.” (Baroma 5:12) Adama asalaki lisumu mpo aboyaki kotosa Nzambe. Yango wana abungisaki libaku ya kozala na bomoi libela na libela mpe nsukansuka akufaki. Lokola tozali bana na ye, tozwá lisumu yango. Yango wana tobɛlaka, tonunaka mpe tokufaka. Ndimbola yango eyokani na oyo bato ya siansi babengaka herédité to kobotama na maladi oyo baboti bazali na yango. Kasi, Nzambe asali nini mpo na kobongisa makambo?

OYO NZAMBE ASALI

Ɛɛ, Nzambe azwaki bibongiseli mpo na kobongisa makambo to kozongisela lisusu bana ya Adama libaku oyo Adama abungisaki ya kozala na bomoi libela na libela. Asalaki nini?

Na Baroma 6:23, Biblia elobi boye: “Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” Yango elingi koloba ete liwa eyá mpo na lisumu. Adama asalaki lisumu, yango wana akufaki. Ndenge moko mpe, tosalaka masumu yango wana tokufaka mpo yango nde lifuti ya lisumu. Kasi ezali foti na biso te soki tobotamaka na lisumu. Na bolingo na ye, Nzambe atindaki Mwana na ye, Yesu mpo afutela biso ‘nyongo ya lisumu.’ Yango esalemaki ndenge nini?

Liwa ya Yesu efungoli nzela ya kozwa bomoi ya seko mpe ya esengo

Lokola lisumu mpe liwa ekɔtá mpo na kozanga botosi ya Adama, moto ya kokoka, esɛngaki mpe botosi ya moto mosusu ya kokoka, ata tii na liwa mpo na kofuta nyongo wana. Biblia elimboli yango boye: “Ndenge kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki, ndenge mpe botosi ya moto kaka moko ekokómisa bato mingi bayengebene.” (Baroma 5:19) Yesu nde azalaki “moto kaka moko” wana. Autaki likoló, akómaki moto ya kokoka * mpe akufaki mpo na biso. Yango wana tokoki kotángama bayengebene na miso ya Nzambe mpe kozwa bomoi ya seko.

MPO NA NINI YESU ANYOKWAMAKI MPE AKUFAKI?

Kasi, mpo na nini esɛngaki Yesu akufa mpo na kokokisa likambo yango? Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akokaki kaka te kobimisa mobeko oyo ekotikela bana ya Adama nzela ya kozala na bomoi ya seko? Na ntembe te, akokaki kosala bongo. Kasi yango elingaki koyokana te na mobeko na ye oyo elobi ete lifuti ya lisumu ezali liwa. Mobeko yango ezali kaka te mwa mobeko moko boye oyo bakoki kolongola to kobongola yango na pɛtɛɛ nyonso. Ezali na ntina mingi mpo na bosembo ya solosolo.​—Nzembo 37:28.

Soki Nzambe atyaka bosembo na ye pembeni na likambo yango, bato bakokaki komituna soki akosala mpe bongo te mpo na makambo mosusu. Na ndakisa, alingaki kopona bilongi te ntango azali kotala soki mwana nani ya Adama abongi kozwa bomoi ya seko? Bato balingaki kotya motema ete akokokisa bilaka na ye? Ndenge oyo Nzambe akangamaka na bosembo mpo na kobikisa biso, endimisi biso ete akosala ntango nyonso oyo ezali sembo.

Na nzela ya liwa ya Yesu, Nzambe apesi biso elikya ya bomoi ya seko na paradiso awa na mabele. Talá maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 3:16: “Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” Na yango, liwa ya Yesu emonisaka ete Nzambe azali mpenza sembo mpe alingaka bato mingi.

Kasi, mpo na nini esɛngaki Yesu anyokwama mpe akufa liwa ya mpasi ndenge Baevanzile emonisi yango? Ndenge Yesu amekamaki makasi mpe atikalaki sembo, amonisaki ete Zabolo akosaki ntango alobaki ete bato bakotikala sembo te epai ya Nzambe na ntango ya komekama. (Yobo 2:4, 5) Emonanaki lokola Satana alobaki solo ntango akweisaki Adama moto ya kokoka na lisumu. Kasi Yesu, oyo azalaki moto ya kokoka lokola Adama, atikalaki sembo atako anyokwamaki makasi. (1 Bakorinti 15:45) Na ndenge yango, amonisaki ete Adama mpe akokaki kotosa Nzambe soki aponaki kosala yango. Yesu atikelá biso ndakisa ndenge ayikaki mpiko na komekama. (1 Petro 2:21) Nzambe apesaki Mwana na ye mbano ya bomoi oyo ekufaka te ndenge atosaki na makambo nyonso.

NDENGE OKOKI KOZWA MATOMBA

Yesu akufaki mpenza. Nzela ya bomoi ya seko efungwami. Okolinga kozala na bomoi libela na libela? Yesu amonisaki oyo tosengeli kosala ntango alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.”​—Yoane 17:3.

Babimisi ya zulunalo oyo basɛngi yo oyekola makambo mosusu etali Yehova, Nzambe ya solo mpe Mwana na ye Yesu Kristo. Batatoli ya Yehova na esika ofandaka bakosepela kosalisa yo. Okoki mpe kozwa makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo na site Internet na biso www.pr418.com.

^ par. 8 Talá Historicité de la Genèse,” na buku Étude perspicace des Écritures, Volimi 1 na nkasa 986-988, ebimisami na Batatoli ya Yehova.

^ par. 13 Nzambe alongolaki bomoi ya Mwana na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya Maria mpo azwa zemi mpe elimo santu ya Nzambe ezipaki Yesu mpo azwa te kozanga kokoka ya Maria.​—Luka 1:31, 35.