Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Zabolo azali nani?

OKOLOBA ete Zabolo azali . . .

  • Moto ya elimo?

  • Mabe oyo ezalaka na kati ya moto?

  • Makanisi ya moto?

OYO BIBLIA ELOBI

Zabolo asololaki na Yesu mpe “amekaki” ye. (Matai 4:1-4) Na yango, Zabolo azali te makanisi to mabe oyo ezalaka na kati ya moto. Azali ekelamu moko mabe oyo amonanaka te.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Na ebandeli Zabolo azalaki anzelu moko mosantu, kasi “akangamaki makasi te na solo.” (Yoane 8:44) Akómaki mokosi mpe atombokelaki Nzambe.

  • Baanzelu mosusu mpe batombokelaki Nzambe.​—Emoniseli 12:9.

  • Zabolo asalaka ete bato bákanisa te ete azalaka.​—2 Bakorinti 4:4.

Zabolo azali na bokonzi likoló ya bomoi ya bato?

BATO MOSUSU BALOBAKA ete ekoki kosalema te ete Zabolo azala na bokonzi likoló ya bomoi ya moto, kasi basusu babangaka ete bilimo mabe bátungisa bango. Okanisaka nini?

OYO BIBLIA ELOBI

“Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19) Zabolo azali na nguya likoló ya bato, kasi azalaka na yango likoló ya moto nyonso te.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Zabolo asalelaka bokosi mpo na kozala na bokonzi mingi likoló ya bato.​—2 Bakorinti 11:14.

  • Na bantango mosusu, bilimo mabe mpe bakoki kotambwisa bomoi ya bato.​—Matai 12:22.

  • Na lisalisi ya Nzambe, okoki kolonga ‘kotɛmɛla Zabolo.’​—Yakobo 4:7.