Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyebaki yango?

Oyebaki yango?

Nini ekesenisaki Yesu na bato mosusu na ndenge ya kosalela bato ya maba makambo?

Bayuda bazalaki kobanga lolenge ya maladi ya maba oyo ezalaki mingi na ntango wana. Maladi yango ezalaki kokende tii na nsɔngɛ ya misisa mpe kobebisa nzoto mpo na libela. Ezalaki na nkisi te. Kutu, moto ya maba asengelaki kofanda esika moko na bato te mpe kokebisa basusu ete azali na maba.​—Balevi 13:45, 46.

Bakonzi ya mangomba ya Bayuda babakisaki mibeko mosusu mpo na maba koleka oyo ezalaki na Makomami mpe yango esalaki ete bato ya maba bámona ete bomoi ezali na ntina te. Na ndakisa, mibeko ya Barabi epekisaki moto nyonso apusana na ntaka ya mɛtrɛ 2 pene ya moto ya maba. Kasi, soki mopɛpɛ ezali, moto moko te asengelaki kopusana pene ya moto ya maba na ntaka ya mɛtrɛ 45. Bato mosusu oyo bakomaki Talmud balobaki ete mobeko oyo esɛngaki bato ya maba báfandaka “libándá ya kaa” elimbolaki ete basengeli kobengana bango na bingumba oyo ezingami na bifelo. Yango wana, soki Rabi moko amoni moto ya maba na kati ya engumba, azalaki kobamba ye mabanga mpe koloba ete: “Kende esika ofandaka mpe kokómisa bato mosusu mbindo te.”

Yesu akesenaki mpenza na bango! Na esika abengana bato ya maba, asimbaki bango mpe abikisaki kutu bango.​—Matai 8:3.

Bakonzi ya mangomba ya Bayuda bazalaki kopesa nzela na koboma libala na likambo nini?

Mokanda ya koboma libala oyo ekomamaki na mobu 71 to 72 ya ntango na biso

Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso bakonzi ya mangomba bazalaki na makanisi ekeseni na oyo etali koboma libala. Mokolo moko, Bafarisai batunaki Yesu motuna oyo mpo na komeka ye: “Mobali akoki koboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso?”​—Matai 19:3.

Mibeko ya Moize epesaki mobali lotomo ya koboma libala na mwasi soki “akuti likambo moko ya nsɔni epai na ye.” (Kolimbola Mibeko 24:1) Na ntango ya Yesu, ezalaki na biteyelo mibale ya Barabi oyo mokomoko elimbolaki mobeko yango na ndenge na yango. Shammai, eteyelo oyo elekaki na lokumu, elimbolaki ete libala ekoki kokufa kaka mpo na “pite.” Kasi, na eteyelo ya Hilele balobaki ete mobali akoki koboma libala mpo na matata nyonso oyo ebimi na libala, ata soki ezali ya moke. Mpo na bango mobali akoki koboma libala ata soki mwasi alambeli ye bilei malamu te to soki mobali amoni mwasi mosusu ya kitoko makasi.

Kasi, Yesu apesaki Bafarisai eyano nini? Alobaki boye: “Moto nyonso oyo abomi libala na mwasi na ye, soki mpo na pite te, mpe abali mosusu azali kosala ekobo.”​—Matai 19:6, 9.