Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA EBONGOLAKA BATO

Ezalaki mpasi natika bomoi na ngai ya kala

Ezalaki mpasi natika bomoi na ngai ya kala
  • ABOTAMAKI NA: 1953

  • EKÓLO: AUSTRALIE

  • BOMOI NA YE YA KALA: MOOMBO YA PORNOGRAFI

NDENGE NAZALAKI:

Papa alongwaki na Allemagne mpe akendaki kofanda na Australie na 1949 mpo na koluka mosala na esika batimolaka mabanga ya ntalo mpe na bakompanyi ya kura mpe akómaki kofanda na mboka Victoria. Kuna nde abalaki mama, mpe na 1953, babotaki ngai.

Kaka mwa bambula moke na nsima, mama akómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, yango wana nayebaki mwa mateya ya Biblia na bomwana. Kasi, papa azalaki kolinga makambo ya losambo te. Akómaki kotya mobulu mpe mama akómaki kobanga ye makasi. Mama akobaki koyekola Biblia na kobombana mpe azalaki kosepela na mateya na yango. Mpe soki papa abimi, azalaki koteya ngai ná leki na ngai ya mwasi. Ayebisaki biso makambo etali paradiso awa na mabele na mikolo ezali koya mpe ndenge oyo tokoki kozala na esengo soki tosaleli batoli ya Biblia.​—Nzembo 37:10, 29; Yisaya 48:17

Ntango nakokisaki mbula 18, namonaki ete esengeli nalongwa na ndako mpo papa azalaki matata. Atako nazalaki kondima mateya ya Biblia oyo mama ateyaki ngai, kasi nazwaki yango na motuya te. Yango wana nasalelaki yango te. Nakómaki kosala mosala ya kobongisa kura na mabulu ya charbon. Nabalaki ntango nakómaki na mbula 20. Mbula misato na nsima, tobotaki mwana na biso ya liboso, mpe natalelaki lisusu makambo ya kotya na esika ya liboso na bomoi na ngai. Nayebaki ete Biblia ekoki kosalisa libota na biso, yango wana nabandaki koyekola Biblia na Motatoli ya Yehova. Kasi, mwasi na ngai azalaki kotɛmɛla Batatoli ya Yehova. Ntango nakendaki na makita na bango, ayebisaki ngai napona likambo moko​—kotika koyekola to kotika libota. Lokola nasilaki mayele, nasalaki ndenge alingaki mpe nakataki boyokani na Batatoli ya Yehova. Na nsima, nayokaki mabe ndenge natikaki kosala likambo oyo nayebaki ete ezali malamu.

Mokolo moko, baninga na ngai ya mosala balakisaki ngai pornografi. Esepelisaki ngai kasi ebangisaki ngai mpe esalaki ete namiyoka lokola namemi ngambo. Ntango nakanisaki makambo nayekolá na Biblia, namonaki mpenza ete Nzambe akopesa ngai etumbu. Kasi, lokola nakómaki kotala bililingi ya mbindo mbala mingi, nakómaki komona ete pornografi ezali mabe te. Nsukansuka nakómaki moombo na yango.

Mbula 20 na nsima, nabosanaki makambo nyonso oyo mama ateyaki ngai. Makambo oyo nakɔtisaki na bɔɔngɔ na ngai ebebisaki bizaleli na ngai. Nakómaki na maloba mabe mpe kosepela na masɛki ya mbindo. Nakómaki na makanisi mabe na likambo etali kosangisa nzoto. Atako nazalaki na mwasi na ndako, nabandaki kobima na basi mosusu. Mokolo moko natalaki na talatala mpe namilobelaki boye: ‘Nalingaka yo te.’ Nazalaki komona ete nasili valɛrɛ mpe nazangi ntina.

Tokabwanaki na mwasi na ngai mpe bomoi na ngai ebebaki. Na nsima, nabondelaki Yehova na motema mobimba. Nazongelaki lisusu koyekola Biblia atako mbula 20 elekaki. Na ntango wana, papa akufaki, mama azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.

NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:

Bomoi na ngai ezalaki koyokana ata moke te na batoli ya Biblia, oyo eleki batoli nyonso. Kasi, na mbala oyo nazwaki ekateli ya koluka kimya ya makanisi oyo Biblia elobaka. Nazwaki ekateli ya kobongisa maloba na ngai mpe kotika ezaleli mabe ya nkandankanda. Nazwaki mpe ekateli ya kotika bomoi ya mbindo, kobɛta masano ya mbongo, komɛla mingi mpe koyiba patrɔ na ngai.

Baninga ya mosala bakómaki komituna mpo na nini nalingaki kobongwana ndenge wana. Batyaki ngai mpanzi likoló mbula misato mobimba nazongela bomoi na ngai ya kala. Soki kaka nasali likambo moko ya mabe, na ndakisa nasiliki, nalobi likambo ya mabe, bazalaki koganga na esengo mpenza: “Wɛɛ! Joe oyo toyebaki ye yo.” Maloba wana ezalaki kosala ngai mpasi! Ezalaki kolɛmbisa ngai nzoto.

Na esika ya mosala pornografi ezalaki mingi, ezala na telefone, na ordinatɛrɛ to na mikanda. Baninga ya mosala bazalaki kotindelana bililingi ya mbindo na ordinatɛrɛ, ndenge nazalaki kosala liboso. Nazalaki kosala makasi natika, kasi bango mpe bazalaki kosala nyonso mpo nakwea. Nakendaki epai ya ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia mpo asalisa mpe alendisa ngai. Ayokaki ngai na likebi ntango nazalaki koyebisa ye makambo nyonso. Asalelaki bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli mpenza likambo na ngai mpe alakisaki ngai ndenge ya kolonga yango mpe alendisaki ngai nakoba kobondela Yehova asalisa ngai.​—Nzembo 119:37.

Mokolo moko nasalaki likita na baninga ya mosala. Ntango bayaki, nayebisaki bango bápesa baninga mibale oyo bakómá baombo ya masanga molangi moko ya masanga. Baninga nyonso bagangaki, balobaki: “Kosala bongo te! Bazali kobundana mpo na kolongwa na boombo ya masanga!” Nayebisaki bango: “Ngai mpe nazali kobundana mpo natika pornografi.” Banda wana, bayebaki ndenge nazalaki kobunda mpo nalongwa na boombo ya pornografi mpe batikaki kotya ngai mbamba nazongela bomoi na ngai ya kala.

Nsukansuka, na lisalisi ya Yehova nalongwaki na boombo ya pornografi. Na 1999, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova, nazwaki lisusu libaku ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.

Sikoyo nayebi ntina oyo Yehova ayinaka makambo oyo nazalaki kosepela na yango kala. Lokola azali Tata ya bolingo, azalaki na mposa ya kobatela ngai na makama ya pornografi. Maloba ya Masese 3:5, 6 ezali mpenza ya solo! Elobi boye: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba mpe kondimela mayele na yo moko te. Na banzela na yo nyonso, kanisá ye, mpe ye akosembola banzela na yo.” Batoli ya Biblia ebatelaka mpe esalaka mpenza ete moto alonga.​—Nzembo 1:1-3.

MATOMBA OYO NAZWI:

Liboso nazalaki komimona ete nazangi ntina, kasi lelo namipesaka kilo mpe nazali na kimya ya motema. Nazali na bizaleli ya malamu mpe namonaka ete Yehova alimbisá ngai mpe asalisaka ngai. Na mobu 2000, nabalaki Karolin, mokristo moko ya kitoko oyo alingaka Yehova mingi lokola ngai. Ndako na biso ezali esika ya kimya. Tozwá libaku ya kozala na kati ya bandeko ya mokili mobimba, oyo bazali na bizaleli malamu mpe balingaka biso.