Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | EPAI WAPI OKOKI KOZWA LIBƆNDISI?

Biso nyonso tozalaka na mposa ya libɔndisi

Biso nyonso tozalaka na mposa ya libɔndisi

Ozali koyeba lisusu ndenge okweaki ntango ozalaki mwana moke? Mbala mosusu ozokaki na lobɔkɔ to na libɔlɔngɔ. Ozali koyeba lisusu ndenge mama abɔndisaki yo? Ekoki kozala asukolaki mpota yango mpe atyaki yango bande. Olelaki, kasi maloba ya boboto oyo alobaki mpe ndenge amemaki yo esalaki ete omiyoka malamu. Na eleko wana ya bomwana, ezalaki mpasi te bábɔndisa yo.

Kasi bomoi ekómaka matata ntango moto azali kokola. Makambo eyaka minene mpe kozwa libɔndisi ekómaka mpasi. Likambo ya mawa, ezali te bande to bizi ya mama nde esilisaka mikakatano oyo mokóló akoki kokutana na yango. Tózwa mwa bandakisa.

  • Ekómelá yo naino te osila mayele ntango balongoli yo na mosala? Julian alobi ete ntango balongolaki ye na mosala, amitungisaki mpenza. Amitunaki boye: ‘Ndenge nini nakosunga libota na ngai? Nsima ya kosala mosala makasi bambula ebele boye, mpo na nini kompanyi emoni ete nazali lisusu na ntina te?’

  • Mbala mosusu olɛmbi nzoto mpo libala na yo ekufi. Raquel alobi boye: “Ntango mobali na ngai asundolaki ngai na mbalakaka eleki sikoyo mbula moko na ndambo, nayokaki mawa makasi. Ezalaki lokola motema ekabwanaki na biteni mibale. Mpasi ezalaki na nzoto mpe na makanisi. Ebangisaki ngai.”

  • Mbala mosusu ozali na maladi moko ya makasi oyo ezali komonana lokola ekosila te. Ekoki kozala ete omiyokaka mpe lokola Yobo, oyo amilelaki boye: “Naboyi; nalingi kozala na bomoi te.” (Yobo 7:16) Mbala mosusu ozali komiyoka lokola Luis, mobali moko ya mbula 80, oyo alobaki boye: “Ntango mosusu nayokaka lokola nazali kozela kaka liwa.”

  • To ekoki kozala liwa ya ndeko to moninga moko ezali kosɛnga bábɔndisa yo. Robert alobi boye: “Ntango mwana na ngai akufaki na likama ya mpɛpɔ, liboso nandimaki te. Na nsima nayokaki mpasi mpenza, mpasi oyo Biblia ekokanisi yango na kotɔbɔlama na mopanga.”​—Luka 2:35.

Robert, Luis, Raquel ná Julian bazwaki libɔndisi ata na ntango wana ya mpasi. Bazwaki moto oyo abongi kopesa bango yango​—Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Ndenge nini Nzambe abɔndisaka biso? Akoki mpe kopesa yo libɔndisi oyo ozali koluka?