Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | EPAI WAPI OKOKI KOZWA LIBƆNDISI?

Ndenge Nzambe abɔndisaka biso

Ndenge Nzambe abɔndisaka biso

Ntoma Paulo amonisi ete Yehova * azali “Nzambe ya kobɔndisama nyonso, oyo abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4) Na yango, Biblia endimisi biso ete Nzambe akoki kosalisa moto nyonso mpe Tata na biso ya likoló akoki kobɔndisa biso na mikakatano ya ndenge nyonso.

Kasi, tosengeli kosala eloko moko soki tolingi Nzambe abɔndisa biso. Ndenge nini monganga akoki kosalisa biso soki toyokanaki te ete tókutana na ye? Mosakoli Amose atunaki boye: “Bato mibale bakotambola nde elongo soki bayokani te?” (Amose 3:3) Makomami elendisi biso boye: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.”​—Yakobo 4:8.

Nini ekoki kondimisa biso ete Nzambe akopusana penepene na biso? Ya liboso, mpo ayebisaka biso mbala na mbala ete alingi kosalisa biso. (Talá  etanda.) Ya mibale, mpo ezali na bato oyo balobi ete Nzambe abɔndisaki bango​—bato ya solo mpenza, ezala na ntango na biso to na ntango ya kala.

Ndenge moko na bato mingi oyo balukaka lisalisi ya Nzambe lelo, Mokonzi Davidi mpe akutanaki na bampasi. Mokolo moko abondelaki Yehova boye: “Yoká mongongo ya malɔmbɔ na ngai ntango nazali kolelela yo mpo na kosɛnga lisalisi.” Nzambe ayokaki ye? Ɛɛ. Mpo Davidi abakisi boye: “Nasalisami, bongo motema na ngai ezali kosepela.”​—Nzembo 28:2, 7.

MOKUMBA YA YESU NA OYO ETALI KOBƆNDISA BAOYO NYONSO BAZALI KOLELA

Nzambe apesaki Yesu mokumba monene ya kobɔndisa bato. Na mikumba oyo Nzambe apesaki ye, Yesu asengelaki mpe ‘kokanga mpota ya bato oyo bazoki na mitema’ mpe ‘kobɔndisa baoyo bazali kolela.’ (Yisaya 61:1, 2) Ndenge esakolamaki, Yesu atyaki likebi mingi epai ya baoyo bazalaki “komona mpasi na mosala mpe na kokumba mikumba.”​—Matai 11:28-30.

Yesu abɔndisaki bato na batoli oyo azalaki kopesa bango, kosalela bango makambo na boboto ata mpe kobikisa bamosusu na maladi na bango. Mokolo moko moto ya maba alobaki na Yesu boye: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Lokola ayokaki mawa, Yesu ayebisaki moto yango ete: “Nalingi. Kómá pɛto.” (Marko 1:40, 41) Mpe maba na ye esilaki.

Lelo oyo, Mwana ya Nzambe azali awa na mabele te mpo ye moko abɔndisa biso. Kasi Tata na ye, Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” azali kokoba kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi. (2 Bakorinti 1:3) Tótalela makambo minei oyo Nzambe asalelaka mpo na kobɔndisa bato.

  • Biblia. “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso, mpo, na ezaleli na biso ya koyika mpiko mpe na libɔndisi oyo euti na Makomami, tózala na elikya.”​—Baroma 15:4.

  • Elimo santu ya Nzambe. Mwa moke nsima ya liwa ya Yesu, lisangá mobimba ya bokristo ekɔtaki na eleko moko ya kimya. Mpo na nini? “Ezalaki kotambola na kobanga Yehova mpe na libɔndisi ya elimo santu.” (Misala 9:31) Elimo santu, nguya oyo Nzambe asalaka na yango mosala, ezali makasi mingi mpenza. Nzambe akoki kosalela yango mpo na kobɔndisa moto nyonso na likambo nyonso.

  • Libondeli. Biblia epesi toli oyo: “Bómitungisa ata na likambo moko te.” Kutu ebakisi: “Kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe; mpe kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”​—Bafilipi 4:6, 7.

  • Bandeko na biso bakristo bakoki kokóma baninga ya solosolo oyo bakoki kobɔndisa biso na ntango ya mpasi. Ntoma Paulo amonisaki ete baninga na ye ‘bakómaki lisalisi oyo ezali kopesa ye makasi’ na ntango ya ‘kokelela mpe bolɔzi.’​—Bakolose 4:11; 1 Batesaloniki 3:7.

Kasi okoki komituna soki esalemaka ndenge nini mpenza. Tiká tólobela naino makambo oyo bato oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo bakutanaki na yango. Ndenge moko na bango, okoki komona ete Nzambe akokisaka elaka na ye oyo: “Nakokoba kobɔndisa bino lokola moto oyo mama na ye azali se kobɔndisa.”​—Yisaya 66:13.

^ par. 3 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.