Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Biblia elobi nini?

Biblia elobi nini?

Bokonzi ya Nzambe ezali nini?

BATO MOSUSU BAKANISAKA ete ezali boyangeli ya Nzambe na kati ya motema ya moto; basusu mpe bakanisaka ete ekouta na milende oyo bato basalaka mpo na kotya kimya na mokili mpe boyokani kati na bato. Okanisi nini?

OYO BIBLIA ELOBI

“Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. . . . Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso [ya bato].” (Danyele 2:44) Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya solo.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela na likoló.​—Matai 10:7; Luka 10:9.

  • Nzambe azali kosalela Bokonzi yango mpo na kokokisa mokano na ye na likoló mpe na mabele.​—Matai 6:10.

Bokonzi ya Nzambe ekoya ntango nini?

OKOPESA EYANO NINI?

  • Moto moko te ayebi

  • Mosika te

  • Ekoya te

OYO BIBLIA ELOBI

“Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Soki nsango malamu esakolami malamumalamu, Bokonzi ekoya kotya nsuka na mokili mabe oyo.

MAKAMBO NINI MOSUSU TOKOKI KOYEKOLA NA BIBLIA?

  • Moto moko te ayebi ntango mpenza oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya.​—Matai 24:36.

  • Bisakweli ya Biblia emonisi ete Bokonzi ya Nzambe ekoya mosika te.​—Matai 24:3, 7, 12.