Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nkɔngi

Mateya oyo tokoki kozwa epai ya bandɛkɛ

Mateya oyo tokoki kozwa epai ya bandɛkɛ

“Nabondeli yo, tuná . . . bandɛkɛ ya likoló, mpe ekoyebisa yo. Nani kati na yango nyonso eyebi malamu te ete lobɔkɔ ya Yehova nde esali yango?”​—Yobo 12:7, 9.

ELEKI sikoyo mbula 3 000, Yobo amonaki ete bandɛkɛ ekoki koteya biso makambo ebele etali misala ya Nzambe. Kasi ndenge oyo bandɛkɛ ezalaka, esalaka ete básalela yango lokola ndakisa mpe maloba ya elilingi. Na Biblia, bisika mingi oyo elobeli bandɛkɛ eteyaka biso makambo mingi ya ntina etali bomoi mpe boyokani na biso na Nzambe. Tótalela mwa ndambo.

ESIKA NYAMPEKE (HIRONDELLE) ESALAKA ZUMBU

Nyampeke

Bato ya Yerusaleme bayebaki nyampeke malamu mpo ezalaki kosala zumbu na yango na baplafɔ. Bandɛkɛ yango mosusu esalaki zumbu na yango na tempelo ya Salomo. Ekoki kozala ete banyampeke oyo ezalaki kosala zumbu na yango na tempelo, ezalaki komona ete ezali esika ya kimya mpo na kobɔkɔla bana na yango malamu.

Moko ya bana ya Kora oyo azalaki kosala na tempelo pɔsɔ moko nsima ya sanza motoba mpe akomaki Nzembo 84​—amonaki bazumbu yango. Azalaki na mposa ya kozala lokola bandɛkɛ yango oyo ezalaki na esika ya kofanda ya libela na ndako ya Yehova; alobaki boye: “Ee Yehova ya mampinga! Molimo na ngai ezali na mposa ya mapango ya Yehova mpe lisusu eyoki mposa na yango makasi. . . . Ata ndɛkɛ ezwi ndako, mpe nyampeke zumbu na yango, epai etye bana na yango​— Etumbelo na yo monene, Ee Yehova ya mampinga, Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai!” (Nzembo 84:1-3) Biso ná bana na biso, tomonisaka mpe mposa wana ya kozalaka elongo na lisangá ya basaleli ya Nzambe?​—Nzembo 26:8, 12.

NKƆNGI (CIGOGNE) EYEBAKA NTANGO NA YANGO

Mosakoli Yirimia akomaki ete, “nkɔngi na likoló eyebaka ntango na yango oyo etyamá.” Na ntembe te, ayebaki eleko oyo nkɔngi ezalaki koya na Mokili ya Ndaka. Na prɛnta, bandɛkɛ yango ya mpɛmbɛ koleka 300 000 elongwaka na Afrika mpe elekaka na lobwaku ya Yordani mpo na kokende na Mpoto. Mayele na yango ya lɔɔmbi (instinct) esalisaka yango ezonga na bisika oyo ekoki kolya na eleko ya molunge. Ndenge moko na bandɛkɛ mosusu oyo esalaka mibembo, yango mpe “etosaka malamu ntango oyo mokomoko na yango esengeli koya.”​—Yirimia 8:7.

Buku moko (Collins Atlas of Bird Migration) elobi boye: “Likambo ya kokamwa na mibembo yango ezali ete lɔɔmbi nde ekambaka bandɛkɛ yango.” Yehova Nzambe apesá bandɛkɛ yango mayele ya lɔɔmbi mpo na koyeba bileko, kasi apesá moto likoki ya kososola ntango mpe bileko. (Luka 12:54-56) Na kokesana na mayele ya lɔɔmbi oyo nkɔngi ezalaka na yango, boyebi ya Nzambe esalisaka moto akanga ntina ya makambo oyo ezali kosalema na eleko oyo tozali. Na ntango ya Yirimia, Bayisraele bazalaki kotya likebi te na bilembo ya ndenge wana. Nzambe amonisaki likambo mpenza oyo etindaki bango básala bongo: “Babwaki liloba mpenza ya Yehova, bongo bwanya nini bazali na yango?”​—Yirimia 8:9.

Lelo ezali na makambo oyo emonisi ete tozali kobika na eleko oyo Biblia ebengi “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1-5) Okolanda ndakisa ya nkɔngi mpe okoyeba soki tozali na ‘eleko’ nini?

MISO YA MPONGO EMONAKA MOSIKA MPENZA

Mpongo

Mpongo elobelami mingi na Biblia mpe ezalaki komonana mingi na Mokili ya Ndaka. Na zumbu na yango likoló ya bangomba, mpongo ‘elukaka bilei; miso na yango etalatalaka mosika mpenza.’ (Yobo 39:27-29) Mpongo emonaka mosika mpenza, ekoki kutu komona lapin na ntaka ya kilomɛtrɛ moko.

Ndenge kaka mpongo ekoki “kotalatala mosika mpenza,” Yehova mpe azali na likoki ya komona makambo oyo ekosalema na avenire. Yango wana, Yehova alobi boye: “Moto oyo banda na ebandeli ayebisaka ndenge makambo ekosuka, mpe banda kala makambo oyo esalemi naino te.” (Yisaya 46:10) Soki tolandi toli ya Yehova, tokozwa matomba na bwanya na ye oyo eleki bwanya nyonso mpe likoki na ye ya komona mosika.​—Yisaya 48:17, 18.

Biblia ekokanisi baoyo batyelaka Nzambe motema na bampongo; elobi: “Baoyo bazali kotyela Yehova elikya bakozwa nguya ya sika. Bakomata likoló na mapapu lokola bampongo.” (Yisaya 40:31) Mpo epumbwa, mpongo elandaka mopɛpɛ ya molunge oyo ezali komata likoló. Soki emoni mopɛpɛ yango, mpongo etandaka mapapu na yango mpe ebalukaka na kati ya mopɛpɛ yango mpe emataka se komata. Mpongo esalelaka makasi na yango moko te mpo na kopumbwa mpe kokende mosika kozanga kobɛta mapapu. Ndenge moko mpe baoyo batyelaka Yehova motema bamonaka ete akoki kopesa bango “nguya oyo eleki makasi.”​—2 Bakorinti 4:7, 8.

“NDENGE NSOSO YA MWASI EYANGANISAKA BANA NA YANGO”

Nsoso na bana na yango

Mwa moke liboso Yesu akufa, atɛlɛmaki mpo na kotala engumba mokonzi ya Bayuda. Abayaki boye: “Yerusaleme, Yerusaleme, engumba oyo ebomaka basakoli mpe ebambaka baoyo batindami epai na yango mabanga,​—mbala boni nalingaki koyanganisa bana na yo esika moko, ndenge nsoso ya mwasi eyanganisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango! Kasi bolingaki yango te.”​—Matai 23:37.

Ndenge bandɛkɛ ezalaka na mposa ya kobatela bana na yango, ekamwisaka mpenza. Bandɛkɛ oyo ebwakaka maki na yango na nse, na ndakisa nsoso, ekɛngɛlaka bana na yango malamumalamu na likama. Soki nsoso emoni kombekombe ezali kotambolatambola likoló, egangaka makasi mpo bana na yango eya nokinoki kobombana na nse ya mapapu na yango. Ebatelaka mpe bana na yango na nse ya mapapu na moi to na mbula makasi. Ndenge moko mpe Yesu azalaki na mposa ya kopesa bato ya Yerusaleme esika ya kobombana na elimo mpe libateli. Lelo oyo, Yesu asɛngi biso tóya epai na ye mpo apemisa biso mpe abatela biso na mikakatano mpe mitungisi ya mokolo na mokolo.​—Matai 11:28, 29.

Ya solo, ezali na makambo mingi oyo tokoki koyekola epai ya bandɛkɛ yango. Ntango ozali kotala ndenge bandɛkɛ yango esalaka, meká kokanisa lisusu bavɛrsɛ ya Biblia oyo elobeli bango na ndenge ya elilingi. Tiká ete nyampeke esalisa yo osepelaka na ndako ya losambo ya Yehova, otalela Nzambe mpo na kozwa elikya oyo ekoki kosalisa yo opumbwa lokola mpongo mpe oya epai ya Yesu mpo na koyeba solo oyo ekobatela yo ndenge nsoso ebatelaka bana na yango. Tiká ete nkɔngi esalisa yo oyeba soki makambo oyo ezali kosalema na eleko na biso ezali komonisa nini.